Makomi
1 Nefi 5


Mokapo 5

Salia amileli likolo lya Lehi—Bango babale basepeli likolo lya bozongi bwa bana babali ba bango—Babonzi mabonza—Palaki ya motako izali na nkoma ya Mose mpe ya baprofeta—Palaki ikitoli Lehi lokola eboto moko wa Yosefe—Lehi abikuli etali nkona ya ye mpe bobateli palaki. Penepene na 600–592 Yambo ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete esilaka biso kokita o kati ya esobe epai ya tata wa biso, tala, atondaki na esengo, mpe mama wa ngai lokola, Salia, azalaki na nsai mpenza, mpo alelaka solo na ntina ya biso.

2 Mpo abanzaki ete towaki o esobe; mpe ye lisusu amilela ka likolo lya tata wa ngai, kolobelaka ye ete azali moto wa mamoni; kolobaka: Tala, akumbaki biso mosika uta o mboka ya lisango lya biso, mpe bana babali ba ngai bazali lisusu te, mpe towei o esobe.

3 Mpe nsima ya lolenge loye la elobeli, eyimayimaka mama wa ngai likolo lya tata wa ngai.

4 Mpe esalemaka ete tata wa ngai alobaki epai ya ye, kolobaka: Nayebi ete nazali moto wa mamoni; mpo soko namonoko makambo ma Nzambe o limoni lyoko te, nalingaki koyeba bolamu bwa Nzambe te, kasi natikalaka o Yelusaleme, mpe nawaka elongo na bandeko ba ngai.

5 Kasi tala, nazwi mboka yoko ya elako, o maye makambo nasepeli; iyo, mpe nayebi ete Nkolo akobikisa bana babali ba ngai libanda lya maboko ma Labana, mpe akokitisa bango epai ya biso o esobe.

6 Mpe nsima ya lolenge loye la elobeli, tata wa ngai, Lehi, abondisaki mama wa ngai, Salia, etali biso, ntango ekendeki biso mobembo o esobe komata o mboka ya Yelusaleme, kozwa likundoli lya Bayuda.

7 Mpe ezongaki ngai o ema ya tata wa ngai, tala esengo ya bango etondaki, mpe mama wa ngai abondisamaki.

8 Mpe alobaki, kolobaka: Sikawa nayebi na ntembe te ete Nkolo atindaki mobali wa ngai akima o kati ya esobe; iyo, mpe nayebi lisusu na ntembe te ete Nkolo abatelaki bana ba ngai, mpe abikisaki bango libanda lya maboko ma Labana, mpe apesaki bango nguya na yango bakokisaki likambo liye Nkolo atindaki bango. Mpe nsima ya lolenge loye la elobeli ye alobaki.

9 Mpe esalemaki ete basepelaki mpenza, mpe babonzaki libonza mpe mabonza matumbama epai ya Nkolo; mpe bapesaki matondi epai ya Nzambe wa Yisalaele.

10 Mpe esilisaka bango kopesa matondi epai ya Nzambe wa Yisalaele, tata wa ngai, Lehi, akamataki makundoli maye makomamaki likolo lya palaki ya motako, mpe amaniolaki mango uta o ebandeli.

11 Mpe amonoki ete ezalaki buku itano ya Mose, iye izalaki kopesa nsango yoko ya bokeli bwa mokili, mpe lisusu ya Adami mpe Ewa, baye bazalaki baboti ba biso ba yambo;

12 Mpe lisusu likundoli lya Bayuda uta o ebandeli, kutu kina o ebandeli ya bokonzi bwa Sidikiya, mokonzi wa Yuda;

13 Mpe lisusu mabikuli ma baprofeta basantu, uta o ebandeli, kutu kina o ebandeli ya bokonzi bwa Sidikiya; mpe lisusu mabikuli mingi maye malobama na monoko mwa Yilimia.

14 Mpe esalemaki ete tata wa ngai, Lehi, akutaki lisusu likolo lya palaki ya motako moko bonkoko boko bwa batata ba ye; yango wana ayebaki ete azalaki eboto moko wa Yosefe; iyo, kutu Yosefe oyo azalaki mwana wa Yakobo, o yo atekemeki o kati ya Ejipito, mpe oyo abatelamaki na loboko la Nkolo, ete akoka kobatela tata wa ye, Yakobo, mpe libota lya ye mobimba na bowei na nzala.

15 Mpe lisusu bakambemaki libanda lya bokangemi mpe libanda lya mboka ya Ejipito, na Nzambe ona kaka oyo abatelaki bango.

16 Mpe boye, tata wa ngai, Lehi, akutaki bonkoko bwa batata ba ye. Mpe Labana lisusu azalaki eboto moko wa Yosefe, yango wana ye, mpe batata ba ye, babatelaka makundoli.

17 Mpe sikawa emonoki tata wa ngai makambo maye manso, atondisamaki na Molimo, mpe abandaki kobikula etali nkona ya ye—

18 Ete palaki ya motako iye isengeli kokende epai ya bikolo, mabota, minoko, mpe bato banso baye bazalaki ba nkona ya ye.

19 Yango wana , alobaki ete palaki ya motako isengeli kowa mokolo moko te; mpe isengeli kobebisama lisusu te na ntango. Mpe abikulaki makambo mingi maye matali nkona ya ye.

20 Mpe esalemaki ete kina lelo, ngai mpe tata wa ngai tobatelaka mitindo, o myango Nkolo atindaka biso.

21 Mpe tozwaka makundoli maye Nkolo atindaka biso, mpe tomaniolaka mango mpe tososolaka ete malongobana; iyo, kutu malongobani mpenza epai ya biso, mpo ete tokoka kobomba mitindo mya Nkolo mpo ya bana ba biso.

22 Yango wana , ezalaki bwania na Nkolo ete tokoka komeme mango elongo na biso, lokola ekendeki biso o esobe ona mboka ya elako.