Makomi
1 Nefi 7


Mokapo 7

Bana babali ba Lehi bazongi o Yelusaleme mpe babiangi Yisamaele mpe ndako ya ye basangana elongo na bango o mobembo mwa bango—Lamani mpe basusu batomboki—Nefi alendisi bandeko babali ba ye bazala na bondimi na Nkolo—Bakangi ye na nsinga, mpe bakani liwa lya ye—Abikisami na nguya ya bondimi—Bandeko babali ba ye basengi bolimbisi—Lehi mpe lingomba lya ye libonzi libonza mpe mabonza matumbama. Penepene na 600–592 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa, nalingi ete bokoka koyeba ete esilisaka tata wa ngai, Lehi, kopesa nsuka ya bobikuli botali nkona ya ye, esalemaki ete Nkolo alobaki epai ya ye lisusu, kolobaka ete elongobanaki te mpo ya ye, Lehi, ete akamata libota lya ye o kati ya esobe lyango lyoko; kasi ete bana babali ba ye bakamata bana basi o bolongani, ete bakoka kokolisa nkona mpo ya Nkolo o mboka ya elako.

2 Mpe esalemaki ete Nkolo atindaki ye ete ngai, Nefi, mpe bandeko babali ba ngai tozonga lisusu epai ya mboka ya Yelusaleme, mpe tokita elongo na Yisamaele mpe libota lya ye o kati ya esobe.

3 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, elongo na bandeko babali ba ngai, tokendeki lisusu o kati ya esobe komata o Yelusaleme.

4 Mpe esalemaki ete tomataki epai ya ndako ya Yisamaele, mpe tozwaki lisungi o miso mya Yisamaele, mpo ete tolobaki epai ya ye maloba ma Nkolo.

5 Mpe esalemaki ete Nkolo alembisaki motema mwa Yisamaele, mpe ndako ya ye lokola, mpo ete basalaki mobembo mwa bango elongo na biso o kati ya esobe o ema ya tata wa biso.

6 Mpe esalemaki ete lokola ekendeki biso mobembo o esobe, tala Lamani mpe Lemuele, mpe babale ba bana basi ba Yisamaele, mpe bana babali babale ba Yisamaele elongo na mabota ma bango, batombokaki na biso; iyo, na ngai, Nefi, mpe Sami, mpe tata wa bango, Yisamaele, mpe mwasi wa ye, mpe bana basi basato basusu ba ye.

7 Mpe esalemaki ete o botomboki bona, bazalaki na mposa ya kozonga epai ya mboka ya Yelusaleme.

8 Mpe sikawa ngai, Nefi, eyokaki ngai mawa mpo ya bokasi bwa mitema mya bango, yango wana nalobaki na bango, kolobaka, iyo, kutu na Lamani mpe na Lemuele: Tala bozali bandeko babali ba nkulutu ba ngai, mpe boniboni ezali ete bozali na bokasi boye o mitema mya bino, mpe na lolanda boye o mayele ma bino, ete bosengeli ete ngai, ndeko mobali wa leki wa bino, naloba epai ya bino, iyo, mpe napesa bino ndakisa yoko?

9 Boniboni ezali ete boyokemeli te epai ya liloba lya Nkolo?

10 Boniboni ezali ete bobosani ete bomonoki anzelu wa Nkolo?

11 Iyo, boniboni ezali ete bobosani makambo manene kani Nkolo asalaki mpo ya biso, na kobikisaka biso libanda lya maboko ma Labana, mpe lisusu ete tozwa likundoli?

12 Iyo, mpe boniboni ezali ete bobosani ete Nkolo akoki kosala makambo manso engebene na bolingi bwa ye, mpo ya bana ba bato, soko ezali boye ete bosaleli bondimi na ye? Yango wana tika tozala potongono na ye.

13 Mpe soko ezali boye ete tokozala potongono na ye, tokozwa mboka ya elako; mpe bokoyeba o yoko ntango ekoya nsima ete liloba lya Nkolo likokokisama litali bobebisami bwa Yelusaleme; mpo makambo manso maye Nkolo alobaki matali bobebisami bwa Yelusaleme, masengeli kokokisama.

14 Mpo tala, Molimo mwa Nkolo, mosika te, akotika kobunda elongo na bango; mpo tala, baboyaki baprofeta, mpe Yilimia ebwakaki bango o kati ya boloko. Mpe balukaki kolongola bomoi bwa tata wa ngai, mpo ete babenganaki ye libanda lya mboka.

15 Sikawa tala, nalobi epai ya bino ete soko bokozonga epai ya Yelusaleme, bokowa lokola elongo na bango. Mpe sikawa, soko boponi, bomata o mboka, mpe bomikundola maloba maye nalobi epai ya bino, ete soko bokei, bokowa lokola; mpo boye Molimo mwa Nkolo asengisi ngai ete naloba.

16 Mpe esalemaki ete elobaki ngai, Nefi, maloba maye epai ya bandeko babali ba ngai, basilikaki na ngai. Mpe esalemaki ete batiaki maboko ma bango likolo lya ngai, mpo tala, badasukaki mpenza, mpe bakangaki ngai na nsinga, mpo balukaki kolongola bomoi bwa ngai, ete bakoka kotika ngai o esobe, naliama na niama ya zamba.

17 Kasi esalemaki ete nasambelaki epai ya Nkolo, kolobaka: O Nkolo, engebene na bondimi bwa ngai boye bozali na yo, okobikisa ngai uta o maboko ma bandeko babali ba ngai; iyo, kutu okopesa ngai makasi ete nakoka kokata nkanga iye nakangemi na yango.

18 Mpe esalemaki ete elobaka ngai maloba maye, tala, nkanga ikangolamaki o maboko mpe makolo ma ngai, mpe natelemeki liboso lya bandeko babali ba ngai, mpe nalobaki epai ya bango lisusu.

19 Mpe esalemaki ete basilikaki na ngai lisusu, mpe balukaki kotia maboko ma bango likolo lya ngai; kasi, tala, moko wa bana basi ba Yisamaele, iyo, mpe mama wa ye lokola, mpe moko wa bana babali ba Yisamaele, babondelaki bandeko babali ba ngai, kina balembisaki mitema mya bango; mpe batikaki kokana kolongola bomoi bwa ngai.

20 Mpe esalemaki ete bayokaki mawa, na ntina ya nkuna ya bango, mpo ete bafukamaki liboso lya ngai, mpe babondelaki ngai ete nalimbisa bango likambo basalaki ngai.

21 Mpe esalemaki ete nalimbisaki bango, na motema moko, manso basalaka, mpe nalendisaki bango ete basambela epai ya Nkolo Nzambe wa bango mpo ya bolimbisi. Mpe esalemaki ete basalaki boye. Mpe esilisaka bango kosambelaka epai ya Nkolo, tokobaki lisusu kosala mobembo mwa biso ona ema ya tata wa biso.

22 Mpe esalemaki ete tokitaki epai ya ema ya tata wa biso. Mpe esilaka ngai, mpe bandeko babali ba ngai, mpe ndako mobimba ya Yisamaele, kokita epai ya ema ya tata wa ngai, bapesaki matondi epai ya Nkolo Nzambe wa bango; mpe babonzaki libonza mpe mabonza matumbama epai ya ye.