Makomi
2 Nefi 1


Buku ya Ibale ya Nefi

Nsango yoko ya liwa lya Lehi. Bandeko babali ba Nefi batomboki na ye. Nkolo akebisi Nefi mpo ya kokende o esobe. Mibembo mya ye o kati ya esobe, mpe bongo na bongo.

Mokapo 1

Lehi abikuli etali mboka ya lipanda—Nkona ya ye likopalanganisama mpe likobeteme soko babwaki Mosantu Moko wa Yisalaele—Alendisi bana babali ba ye balata ebundele ya bosembo. Penepene na 588–570 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete esilisaka ngai, Nefi, kotia nsuka etali kolakisaka bandeko ba ngai babali, tata wa biso, Lehi, alobaki lisusu makambo mingi epai ya bango, mpe azongelaki epai ya bango, makambo manene boniboni Nkolo asalaka mpo ya bango na komemeke bango libanda lya mboka ya Yelusaleme.

2 Mpe alobaki epai ya bango etali botomboki bwa bango likolo lya mai, mpe ngolu ya Nzambe na kobikisaka bomoi bwa bango, ete baminamaki te o mbu.

3 Mpe alobaki lisusu epai ya bango etali mboka ya elako, eye bazwaka—ya ngolu boniboni Nkolo azalaki na kokebisaka biso ete tokima libanda lya mboka ya Yelusaleme.

4 Mpo, tala, elobaki ye, namonoki limoni lyoko, o lyango nayebi ete Yelusaleme ebebisami; mpe etikalaka biso o Yelusaleme tolingaki kowa lokola.

5 Kasi, elobaki ye, ata matungisi ma biso, tozwi mboka yoko ya elako, mboka yoko eye eponomo likolo lya mboka inso isusu; mboka yoko eye Nkolo Nzambe ayokanaki elongo na ngai ekozala mboka mpo ya lisango lya nkona ya ngai. Iyo, Nkolo ayokanaki mboka eye epai ya ngai, mpe na bana ba ngai libela, mpe lisusu bango banso baye bakokumbana uta o mboka isusu na loboko la Nkolo.

6 Yango wana, ngai, Lehi, nabikuli engebene na misala mya Molimo oyo azali na ngai, ete moko te akoya o mboka eye longola se soko bakokumbana na loboko la Nkolo.

7 Yango wana, mboka eye ebulisami epai ya ye oyo akokumbana. Mpe soko ekozala ete bakosalela ye engebene na mitindo miye apesi, ekozala mboka ya lipanda epai ya bango; yango wana, bakoki kokweyisama te o kati ya bokangemi; soko ekozala boye, ekozala na ntina ya bobe; mpo soko bobe bokomi beboo botutu bokozala o mboka mpo ya ntina ya bango, kasi mpo ya basembo ekopambolama libela.

8 Mpe tala, ezali bwania ete mboka eye ekobombama lokola sikawa uta o boyebi bwa bikolo bisusu; mpo tala, bikolo mingi bilingaki kokamata mboka, ete elingaki kozala esika te mpo ya lisango lyoko.

9 Yango wana, ngai, Lehi, nazwaki elako, ete mbala nzike lokola bango baye Nkolo Nzambe akokumba libanda lya mboka ya Yelusaleme bakobatela mitindo mya ye, bakozwa bomengo likolo lya etando ya mboka; mpe bakobombama uta o bikolo binso bisusu, ete bakoka kozwa mboka eye mpo ya bangomei. Mpe soko ekozala ete bakobatela mitindo mya ye bakopambolama likolo lya etando ya mboka eye, mpe ekozala moko te mpo ya kosala bango mpasi, to mpo ya kolongola mboka ya lisango lya bango; mpe bakofanda o bozangi bobangi libela.

10 Kasi tala, ekoya ntango ete bakokulumwa o bozangi bondimi, ekosila bango kozwa mapamboli manene mingi boye na loboko la Nkolo—kozalaka na boyebi boko bwa bokeli bwa mabele, mpe bato banso, koyebaka misala minene mpe mya bokamwi mya Nkolo uta o bokeli bwa mokili; kopesamelaka bango nguya ya kosala makambo manso na bondimi; mpe kozalaka na mitindo minso uta o ebandeli, mpe kokumbanamaka na bolamu bozanga ndelo bwa ye o kati ya mboka ya motuya ya elako—tala, nalobi, soko mokolo mokoya ete bakobwaka Mosantu Moko wa Yisalaele, Masiya wa solo, Mosikoli wa bango mpe Nzambe wa bango, tala, masambisi ma ye oyo azali moyengebene makofanda likolo lya bango.

11 Iyo, akokumba bikolo bisusu epai ya bango, mpe akopesa epai ya bango nguya, mpe akolongola uta na bango mboka ya bozwi bwa bango, mpe akosala bango bapalanganisama mpe babeteme.

12 Iyo, lokola ekoleka nkona yoko ekozala bosopi makila, mpe mabimeli manene o ntei ya bango; yango wana, bana babali ba ngai, nalingi ete bokoka komikundola; iyo, nalingi ete boyokemela epai ya maloba ma ngai.

13 O tika ete bokoka kolamuka; lamukani uta o mpongi ya mozindo, iyo, kutu uta o mpongi ya limfelo, mpe ningisani mosika miniololo mya nsomo na myango bokangemi, miye mizali miniololo miye mikangi bana ba bato, ete bamememi mosika bakangemi o nse ya libulu lya seko lya bobola mpe lisuma.

14 Lamukani! Mpe telemeni uta o mputulu, mpe yokani maloba ma moboti moko akolenge, oyo bya ye binama bokolalisa mosika te o lilita lya mpio mpe nie, uta wapi moto wa mobembo moko te akoki kozonga; mwa mikolo mike mpe nakokende nzela ya mabele manso.

15 Kasi tala, Nkolo asikoli bozo bwa ngai uta o limfelo; namoni nkembo ya ye, mpe nazingami mpembeni seko o maboko ma bolingo bwa ye.

16 Mpe nalingi ete bomikundola kotosa meko mpe masambisi ma Nkolo; tala, eye ezalaki kopesa motema likolo o bozo bwa ngai uta o ebandeli.

17 Motema mwa ngai motondaki na mawa mbala na mbala, zambi nabangaki, mbele mpo ya bokasi bwa mitema mya bino Nkolo Nzambe wa bino abima o litondi lya nkele ya ye epai ya bino, ete bokatama mosika mpe bobebisama libela;

18 To, ete botutu boya likolo lya bino mpo ya ntaka ya nkola mingi; mpe bobimelami na mopanga, mpe na nzala, mpe boyinami, mpe bokambemi engebene na bolingi mpe bokangemi bwa zabulu.

19 O bana babali ba ngai, tika ete makambo maye makoka koya likolo lya bino te, kasi ete bokoka kozala bato boponomo mpe basungama na Nkolo. Kasi tala, bolingi bwa ye bosalema; mpo nzela ya ye izali sembo libela.

20 Mpe alobaki ete: Mbala nzike lokola ekobomba bino mitindo mya ngai bokozwa bomengo o mboka; kasi mbala nzike lokola ekobomba bino te mitindo mya ngai bokokatama mosika uta o miso mya ngai.

21 Mpe sikawa mpo ete bozo bwa ngai bozala na bosepeli na bino, mpe mpo ete motema mwa ngai motika mokili moye na bosepeli na ntina ya bino, ete nakoka te kokitisama o lilita na mpasi mpe mawa, telemeni o mputulu, bana babali ba ngai, mpe zalani babali, mpe zwani mokano o likanisi lyoko mpe o motema moko, ezali bino o bomoko o makambo manso, ete bokoka kokweya te o kati ya bokangemi;

22 Mpo ete bokoka kolakelama botutu te na botutu bwa nsomo; mpe lisusu, mpo ete bomilukela te nkanda ya Nzambe moko moyengebene likolo lya bino, kina o bobebisami, iyo, bobebisami bwa seko bwa bozo mpe nzoto lokola.

23 Lamukani, bana babali ba ngai; latani ebundele ya bosembo. Ningisani miniololo o myango bokangemi, mpe bimani libanda lya molili, mpe telemeni uta o mputulu.

24 Tombokani lisusu te na ndeko mobali wa bino, oyo ya ye mamoni mazalaki ma nkembo, mpe oyo abombaki mitindo uta o ntango totikaki Yelusaleme; mpe oyo azalaki esalele yoko o maboko ma Nzambe, na komemeke biso o mboka ya elako; mpo ezalaki te mpo ya ye, mbele tosengelaki kowa na nzala o esobe; nzokande, bolukaki kolongola bomoi bwa ye; iyo, mpe ayokaki mpasi ya mawa nzike na ntina ya bino.

25 Mpe nakobanga mpe nakolenge mpenza na ntina ya bino, mbele akoyoka mpasi lisusu; mpo tala, bofundaki ye ete alukaki nguya mpe bokulaka likolo lya bino; kasi nayebi ete alukaki nguya to bokulaka te likolo lya bino, kasi alukaki nkembo ya Nzambe, mpe bolamu bwa binomei bwa seko.

26 Mpe boyimayimaki zambi azalaki epai ya bino polele. Bolobi ete asalelaki monkete; bolobi ete asilikaki na bino; kasi tala, monkete mwa ye mozalaki monkete mwa nguya ya liloba lya Nzambe, liye lizalaki na ye; mpe liye bobiangaki nkanda ezalaki bosolo, engebene na bona bozali na Nzambe, boye akokaki te kokanga, komonisaka na bobangi te etali mabe ma bino.

27 Mpe esengeli mpenza ete nguya ya Nzambe esengelaki kozala elongo na ye, kina etindaki ye bino ete bosengelaki kotosa. Kasi tala, ezalaki ye te, kasi ezalaki Molimo mwa Nkolo oyo azalaki na ye, oyo afungolaki monoko mwa ye o bolobi mpe akokaki te kokanga mwango.

28 Mpe sikawa mwana mobali wa ngai, Lamani, mpe lisusu Lemuele mpe Sami, mpe lisusu bana ba ngai babali baye bazali bana babali ba Yisamaele, tala, soko bokoyokemela epai ya mongongo mwa Nefi bokowa te. Mpe soko bokoyokemela epai ya ye natiki epai ya bino lipamboli, iyo, kutu lipamboli lya ngai lya yambo.

29 Kasi soko bokoyokemela te epai ya ye nalongoli lipamboli lya ngai lya yambo, iyo, kutu lipamboli lya ngai, mpe likotikala likolo lya ye.

30 Mpe sikawa, Zolami, nakoloba epai ya yo: Tala, ozali mosali wa Labana; nzokande, okumbanaki libanda lya mboka ya Yelusaleme, mpe nayebi ete ozali moninga wa solo wa mwana wa ngai, Nefi, libela.

31 Yango wana, zambi ozalaki potongono nkona ya yo ekopambolama elongo na nkona ya ye, ete bawumela o bomengo ntango elai likolo lya etando ya mboka; mpe eloko te, longola se soko ekozala bobe o ntei ya bango, ekobebisa to ekobulunganisa bomengo bwa bango likolo lya etando ya mboka eye libela.

32 Yango wana, soko bokobatela mitindo mya Nkolo, Nkolo akobulisa mboka eye mpo ya bozangi bobangi ya nkona ya yo elongo na nkona ya mwana mobali wa ngai.