Makomi
2 Nefi 15


Mokapo 15

Elanga ya vino ya Nkolo (Yisalaele) ekokoma mpamba, mpe bato ba ye bakopalanganisama—Lisuma likoya likolo lya bango o lizali lya bopengwi mpe bopalangani bwa bango—Nkolo akotombola bendele mpe akosangisa Yisalaele—Mekisani Yisaya 5. Penepene na 559–545 Yambo ya Klisto.

1 Mpe nde nakoyemba na molingami-molamu wa ngai loyembo loko la molingami wa ngai, etali elanga ya vino ya ye. Molingami-molamu wa ngai azali na elanga yoko ya vino o ngomba patatalu yoko ya mbuma mingi.

2 Mpe atongelaki yango lobala, mpe asangisaki mabanga libanda lya yango, mpe akonaki yango na vino eponomo mingi koleka, mpe atongaki linongi lyoko o katikati ya yango, mpe lisusu asalaki ekamolelo-vino o kati ya yango; mpe azelaki ete ebota mbuma ya vino, mpe ebotaki mbuma ya vino ya zamba

3 Mpe sikawa, O bafandi ba Yelusaleme, mpe bato ba Yuda, sambisani, nakosenge bino, kati ya ngai mpe elanga ya vino ya ngai.

4 Nini ekokaki esalema lisusu o elanga ya vino ya ngai eye nasalaki o yango te? Yango wana, ezelaki ngai ete ebota mbuma ya vino ebotaki mbuma ya vino ya zamba.

5 Mpe sikawa kendeni; nakolobela bino nini nakosala o elanga ya vino ya ngai—nakolongola lopango la yango, mpe ekoliama; mpe nakobuka efelo ya yango, mpe ekoniatama o nse;

6 Mpe nakoyeisa yango mpamba; ekopetolama bitape te to ekotimolama te; kasi ekobimisa matiti mabe mpe nzube; lisusu nakotinda mapata ete manokisa mvula te likolo lya yango.

7 Mpo elanga ya vino ya Nkolo wa Bibele ezali ndako ya Yisalaele, mpe bato ba Yuda nzete ya ye alingaki; mpe azilaki mpo ya bosambisi, mpe tala, bokakemi; mpo ya bosembo, kasi tala, boleli.

8 Lisuma epai ya bango baye bakokangisa ndako na ndako, kina ekoka kozala esika lisusu te, ete batikala bango moko o katikati ya mabele!

9 O matoyi ma ngai, elobaki Nkolo wa Bibele, na bosolo ndako mingi ekozaka mpamba, mpe mboka inene mpe ya malonga ezanga bafandi.

10 Iyo, ntaka zomi ya elanga ya vino ekopesa bobele bati yoko, mpe nkona ya homele yoko ekopesa efa yoko.

11 Lisuma epai ya bango baye bakolamuka o ntongo mpenza, ete bakoka kolanda masanga makasi, baye bakokoba kina o butu, mpe vino ezikisi bango!

12 Mpe likembe, mpe lizeze, lokole, mpe mondule, mpe vino izali o limpati lya bango; kasi bakokeba te na misala mya Nkolo, mpe bakotala mosala mwa maboko ma ye te.

13 Yango wana, bato ba ngai bakei o kati ya bokangemi, zambi bazali na boyebi te; mpe bato ba lokumu ba bango bakufi nzala, mpe ebele ya bango bakauki na mposa ya mai.

14 Yango wana, limfelo liyeisami lyangomei linene, mpe lizipolaki monoko mwa lyango ndelo te; mpe nkembo ya bango, mpe ebele ya bango, mpe monzele mwa bango, mpe ye oyo akosepela, bakokita o kati ya lyango.

15 Mpe moto wa nse akokitisama, mpe mokasi akokweyisama, mpe miso mya baye ba lolendo mikokitisama.

16 Kasi Nkolo wa Bibele akonetolama o bosambisi, mpe Nzambe oyo azali mosantu akosantisama o bosembo.

17 Nde ekolia bana ba mpate nsima ya lolenge la bango, mpe bisika bya mpamba bya bazwi bampaya bakolia.

18 Lisuma epai ya bango baye bakobenda bobe na nsinga ya lipombo, mpe lisumu lokola soko ezalaki na nsinga yoko ya likalo;

19 Baye balobi: Tika ye asala mbangu, awelisa mosala mwa ye, ete tomono mwango; mpe tika toli ya Mosantu Moko wa Yisalaele ebeleme penepene mpe eya, ete tokoka koyeba yango.

20 Lisuma epai ya baye bakobianga bobe bolamu, mpe bolamu bobe, baye bakotia molili mpo ya mwinda, mpe mwinda mpo ya molili, baye bakotia bololo mpo ya elengi, mpe elengi mpo ya bololo!

21 Lisuma epai ya bato ba bwania o miso mya bangomei mpe bato ba ekenge o bomoni bwa bangomei!

22 Lisuma epai ya bakasi na komele vino, mpe bato ba makasi na kosangisa masanga makasi;

23 Baye bakoyengebene moto wa nkuna mpo ya mbano, mpe bakolongola bosembo bwa mosembo mosika na ye!

24 Yango wana, lokola moto mokodunda mpumbulu, mpe lokola mololi mokozikisa matiti makauka, mosisa mwa bango mokokoma likunde, mpe bafulele ya bango ikopimbwa lokola mputulu; zambi babwakaki mosika mobeko mwa Nkolo wa Bibele, mpe batioli liloba lya Mosantu Moko wa Yisalaele.

25 Yango wana, epeli nkanda ya Nkolo na bato ba ye, mpe atandolaki loboko la ye na bango mpe abeteki bango; mpe ngomba patatalu ilengi, mpe bibembe bya bango bipoli o katikati ya balabala. Mpo ya manso maye, nkanda ya ye elongwi te, kasi loboko la ye lotandolami naino.

26 Mpe akotombola bendele ya bikolo uta o mosika, mpe akobete piololo epai ya bango uta o nsuka ya mabele; mpe tala, bakoya na lombangu mpenza; moko te akolembe to akobete libaku.

27 Moko te akozala motau to a kolala; to mpe mokaba mwa nketo ya bango mokofungwama te, to mpe nsinga ya sapato ya bango ekokatana te;

28 Oyo ya ye makula makozala mapotu, mpe matimbo manso ma bango magumbami, mpe biengindi bya farasa ya bango bikotangema bo libanga likasi, mpe biyika bya bango bo mopepe mwa kaina, mogango mwa bango bo nkosi.

29 Bakoganga bo nkosi ya elenge; iyo, bakoganga mpe bakogbata niama, mpe bakomeme mosika o bobangi te, mpe moko te akobikisa.

30 Mpe o mokolo mona bakoganga likolo na bango bo mogango mwa mbu; mpe soko batali epai ya mboka, tala, molili mpe mawa, mpe mwinda mokoyinda o lola la mwango.