Makomi
2 Nefi 25


Mokapo 25

Nefi akembeli o polele—Mabikuli ma Yisaya makososolama o mikolo mya nsuka—Bayuda bakozonga uta o Babiloni bakobaka Masiya o ekulusu mpe bakopalanganisama mpe bakobeteme—Bakozongisama ntango bakondima na Masiya—Akoya yambo ya mibu nkama motoba ekosila Lehi kotika Yelusaleme—Banefi babateli mobeko mwa Mose mpe bandimi na Klisto, oyo azali Mosantu Moko wa Yisalaele. Penepene na 559–545 Yambo ya Klisto.

1 Sikawa ngai, Nefi, nakolobela mwa moke etali maloba maye nakomaki, maye malobamaki na monoko mwa Yisaya. Mpo tala, Yisaya alobaki makambo mingi maye mazalaki makasi mpo ya bato ba ngai mingi kososola; mpo bayebaki te lolenge la kobikula o ntei ya Bayuda.

2 Mpo ngai, Nefi, nalakisaki bango te makambo mingi matali lolenge la Bayuda; mpo misala mya bango mizalaki misala mya molili, mpe misala mya bango mizalaki misala mya bonsomo.

3 Yango wana, nakokoma epai ya bato ba ngai, epai ya bango banso baye bakoyamba nsima makambo maye nakomi, ete bakoka koyeba masambisi ma Nzambe, ete maya likolo lya bikolo binso, engebene na liloba alobaki.

4 Yango wana, yokemelani, O bato ba ngai, baye bazali baye ndako ya Yisalaele, mpe pesani litoyi epai ya maloba ma ngai; mpo zambi maloba ma Yisaya mazali polele te epai ya bino, nzokande mazali polele epai ya baye batondisami na molimo mwa bobikuli. Kasi napesi bino bobikuli, engebene na molimo moye mozali na ngai; yango wana nakobikula engebene na polele eye ezalaki na ngai uta o ntango nabimaki uta o Yelusaleme elongo na tata wa ngai; mpo tala, bozo bwa ngai bokosepela o polele ya bato ba ngai, ete bakoka koyekola.

5 Iyo, mpe bozo bwa ngai bokosepela o maloba ma Yisaya, mpo nayaki uta o Yelusaleme, mpe miso mya ngai mimonoki makambo ma Bayuda, mpe nayebi ete Bayuda bakososola makambo ma baprofeta, mpe ezali bato basusu te baye bakososola makambo maye malobamaki epai ya Bayuda bo bango, longola se soko balakisami nsima ya lolenge la makambo ma Bayuda.

6 Kasi tala ngai, Nefi, nalakisaki te bana ba ngai nsima ya lolenge la Bayuda; kasi tala, ngai, ya ngaimei, nafandaki o Yelusaleme, yango wana nayebi etali bikolo zingazinga mpembeni; mpe nalobaki epai ya bana ba ngai etali masambisi ma Nzambe, maye masalemaki o ntei ya Bayuda, epai ya bana ba ngai, engebene na manso maye Yisaya alobaki, mpe nakokoma mango te.

7 Kasi tala, nakobanda bobikuli bwa ngaimei, engebene na polele ya ngai; o bwango nayebi ete moto te akoki kobunga; nzokande, o mikolo miye mabikuli ma Yisaya makokokisama bato bakoyeba na ntembe te, o ntango ekosalema mango.

8 Yango wana, malongobani epai ya bana ba bato, mpe ye oyo abanzi ete mazali te, epai ya bango nakoloba mingi mingi, mpe nakokata ndelo ya maloba epai ya bato ba ngaimei; mpo nayebi ete makolongobana mpenza epai ya bango o mikolo mya nsuka; mpo o mokolo mona bakososola mango; yango wana, mpo ya bolamu bwa bango nakomaki mango.

9 Mpe lokola nkola yoko ebebisamaki o ntei ya Bayuda na ntina ya mabe ma bango, kaka boye ebebisamaki bango uta nkola o nkola engebene na mabe ma bango; mpe ata moko wa bango te abebisamaki longola se soko elobelamaki bango yambo esalema na baprofeta ba Nkolo.

10 Yango wana, elobelamaki bango etali bobebisami boye bokoya likolo lya bango sasapi ekosila tata wa ngai kotika Yelusaleme; nzokande, bayeisaki mitema mya bango mikasi; mpe engebene na mabikuli ma ngai babebisamaki, longola se bango baye bamememeki mosika bakangemi o Babiloni.

11 Mpe sikawa nakoloba boye na ntina ya molimo moye mozali na ngai. Mpe ata bamemeki mosika bango bakozonga lisusu, mpe bakozwa mboka ya Yelusaleme; yango wana, bakozonga lisusu o mboka ya lisango lya bango.

12 Kasi, tala, bakozala na bitumba, mpe manungunungu ma bitumba; mpe ekoya mokolo moye Mobotami Se Moko wa Tata, iyo, kutu Tata wa lola mpe wa mabele, akomimonisa yemei epai ya bango o mosuni, tala, bakoboya ye, na ntina ya mabe ma bango, mpe bokasi bwa mitema mya bango, mpe nkanza ya nkingo ya bango.

13 Tala, bakobaka ye o ekulusu; mpe nsima ya kolalisama o lilita o ntaka ya mikolo misato akosekwa uta o bakufi, elongo na bobikisi bwa bokono o mapapu ma ye; mpe baye banso bakondima likolo lya nkombo ya ye bakobikisama o bokonzi bwa Nzambe. Yango wana, bozo bwa ngai bosepeli mpo ya kobikula etali ye, mpo namonoki mokolo mwa ye, mpe motema mwa ngai mokokumisa nkombo esantu ya ye.

14 Mpe tala ekosalema ete ekosila Masiya kosekwa uta o bakufi, mpe komimonisa epai ya bato ba ye, epai ya mingi lokola bakondima likolo lya nkombo ya ye, tala, Yelusaleme ekobebisama lisusu; mpo lisuma epai ya bango baye bakobunda na Nzambe mpe bato ba eklezia ya ye.

15 Yango wana, Bayuda bakopalanganisama o ntei ya bikolo binso; iyo, mpe lisusu Babiloni ekobebisama; yango wana, Bayuda bakopalanganisama o bikolo bisusu.

16 Mpe ekosila bango kopalanganisama, mpe Nkolo Nzambe kobete bango na bikolo bisusu mpo ya ntaka ya nkola mingi, iyo, kutu o nse uta nkola o nkola kina bakondimisama na kondima na Klisto, Mwana Mobali wa Nzambe, mpe botumbolami, eye ezanga ndelo mpo ya bato banso—mpe ekoya mokolo mona moye bakondima na Klisto, mpe bakokumbamela Tata o nkombo ya ye, o mitema peto mpe o maboko sembesembe, mpe bakotalela o boso Masiya mosusu te, nde, o ntango ena, mokolo mokoya moye esengeli mpenza ezala elongobani ete bandima makambo maye.

17 Mpe Nkolo akotia loboko la ye lisusu mbala ya ibale mpo ya kozongisa bato ba ye uta o bozali bwa bobungi mpe bokwei bwa bango. Yango wana, akokoba kosala mosala moko mwa bokamwi mpe likamwa lyoko o ntei ya bana ba bato.

18 Yango wana, akokumba maloba ma ye epai ya bango, maye maloba makosambisa bango o mokolo mwa nsuka, mpo makopesamela bango mpo ya ntina ya bondimisi bango Masiya wa solo, oyo babwakaki; mpe mpo ya bondimisi bango ete bazali na ntina ya kotalela o boso lisusu te mpo ya Masiya moko, mpo ekozala mosusu te akoya, longola se soko ezali Masiya wa lokuta oyo akokosa bato; mpo ezali bobele Masiya moko alobelamaki na baprofeta, mpe Masiya ona akobwakama na Bayuda.

19 Mpo engebene na maloba ma baprofeta, Masiya akoya o mibu nkama motoba uta ntango tata wa ngai atikaki Yelusaleme; mpe engebene na maloba ma baprofeta mpe lisusu liloba lya anzelu wa Nzambe, nkombo ya ye ekozala Yesu Klisto, Mwana Mobali wa Nzambe.

20 Mpe sikawa, bandeko ba ngai, nalobi o polele mpo ete bobunga te. Mpe lokola Nkolo Nzambe azali oyo akumbaki Yisalaele libanda lya mboka ya Ejipito, mpe apesaki Mose nguya ete abikisa bikolo ekosila bango koswama na nioka ya ngenge, soko balingaki kobwaka miso epai ya nioka eye atelemisaki liboso lya bango, mpe lisusu apesaki ye nguya ete abete libanga mpe mai makobima; iyo, tala nakoloba epai ya bino, ete lokola makambo maye mazali ma solo, mpe lokola Nkolo Nzambe azali na bomoi, nkombo mosusu ezali te oyo epesami o nse ya lola, longola se soko ezali Yesu Klisto oyo, oyo nalobelaki, na ye moto akoki kobikisama.

21 Yango wana, mpo ya ntina eye Nkolo Nzambe alakaki epai ya ngai ete makambo maye nakomi makobombama mpe makobatelama, mpe makokitanisama epai ya nkona ya ngai, uta nkola o nkola, ete elako ekoka kokokisama epai ya Yosefe, ete nkona ya ye ekowa mokolo moko te ntango elai lokola mabele makoteleme.

22 Yango wana, makambo maye makokende uta nkola o nkola ntango inso lokola mabele makoteleme; mpe makokende engebene na bolingi mpe elengi ya Nzambe; mpe bikolo biye bikozwa mango bikosambisama engebene na maloba maye makomami.

23 Mpo tosali na etingia mpo ya kokoma, mpo ya kondimisa bana ba biso, mpe lisusu bandeko ba biso, kondima na Klisto, mpe kozongisa boyokani na Nzambe; mpo toyebi ete ezali na boboto bwa ye tobikisami, nsima ya manso tokoki kosala.

24 Mpe ata tondimi na Klisto, tobateli mobeko mwa Mose, mpe totali o boso na molende epai ya Klisto, kina mobeko mokokokisama.

25 Mpo, mpo ya ntina eye mobeko mopesamaki; yango wana mobeko mwango mokomi mokufa epai ya biso, mpe tokomisami na bomoi na Klisto na ntina ya bondimi bwa biso; nzokande tokobatela mobeko na ntina ya mitindo.

26 Mpe tokolobela Klisto, tokosepela na Klisto, tokoteya Klisto, tokobikula Klisto, mpe tokokoma engebene na mabikuli ma biso, ete bana ba biso bakoka koyeba o liziba kani bakoki koluka bolimbisi bwa masumu ma bango.

27 Yango wana, tokoloba etali mobeko ete bana ba biso bakoka koyeba kufa ya mobeko; mpe bango, na koyebaka kufa ya mobeko, bakoka kotalela o boso epai ya bomoi boye bozali na Klisto, mpe koyeba mpo ya ntina kani mobeko mopesamaki. Mpe ekosila mobeko kokokisama na Klisto, ete bazali te na ntina ya koyeisa mitema mya bango mikasi na ye ntango mobeko mosengelaki kolongolama.

28 Mpe sikawa tala, bato ba ngai, bozali bato ba nkanza; yango wana, nalobaki o polele epai ya bino, ete bokoka kososola mabe te. Mpe maloba maye nalobaki makoteleme lokola litatoli lyoko likolo lya bino; mpo makoki mpo ya kolakisa moto na moto nzela alima; mpo nzela alima ezali kondima na Klisto mpe kowangana ye te; mpo na kowanganaka ye, owangani lokola baprofeta mpe mobeko.

29 Mpe sikawa tala, nakoloba epai ya bino ete nzela alima ezali kondima na Klisto, mpe koboya ye te; mpe Klisto azali Mosantu Moko wa Yisalaele; yango wana bosengeli kogumbama o nse liboso lya ye, mpe kokumbamela ye na bokasi, mayele, mpe makasi ma bino manso, mpe bozo bwa bino mobimba; mpe soko bosali eye bokobwakama libanda ata moke te.

30 Mpe, mbala nzike lokola ekolongobana, bosengeli kobatela makokisi mpe makuli ma Nzambe kina mobeko mokokokisama moye mopesamaki epai ya Mose.