Makomi
2 Nefi 27


Mokapo 27

Molili mpe bopengwi bokozipa mabele o mikolo mya nsuka—Buku ya Molomoni ekobima—Banzeneneke basato bakotatola mpo ya buku yango—Moto ayekola akoloba ete akoki te kotanga buku ekangema—Nkolo akosala mosala moko mwa bokamwi mpe likamwa lyoko—Mekisani Yisaya 29. Penepene na 559–545 Yambo ya Klisto.

1 Kasi, tala, o mikolo mya nsuka, to o mikolo mya Bapaganu—iyo, tala bikolo binso bya Bapaganu mpe bya Bayuda, bango baye bakoya likolo lya mboka eye mpe bango baye bakozala likolo lya mboka isusu, iyo, kutu likolo lya mboka inso ya mabele, tala, bakolangwisama na bobe mpe ndenge inso ya bonsomo—

2 Mpe ekoya mokolo mona bakobimelama na Nkolo wa Bibele, elongo na nkake mpe elongo na boningani bwa mabele, mpe elongo na makelele makasi, mpe elongo na ekumbaki, mpe elongo na moketi, mpe elongo na mololi mwa moto kozikisaka nie.

3 Mpe bikolo binso biye bikobunda na Siona, mpe bikotungisa ye, bikozala lokola ndoto ya limoni lya butu; iyo, ekozala epai ya bango, kutu lokola moto moko wa nzala oyo azali koloto, mpe tala azali kolia kasi alamuki mpe bozo bwa ye bozali mpamba; to bo moto wa mposa ya mai oyo azali koloto, mpe tala azali komele kasi alamuki mpe tala alembi, mpe bozo bwa ye bozali na mposa; iyo, kutu boye ekozala ebele ya bikolo binso biye bikobunda na ngomba ya Siona.

4 Mpo tala, bino banso baye bozali kosala lisumu, fandani nie binomei mpe kamwani, mpe lelani, mpe belelani, iyo, bokolangwisama kasi na vino te, bakondingbandingba kasi o masanga makasi te.

5 Mpo tala, Nkolo asopaki likolo lya bino molimo mwa mpongi ya mozindo. Mpo tala, bozipaki miso mya bino, mpe bobwakaki baprofeta; mpe bayangeli ba bino, mpe bamoni ezipaki ye na ntina ya masumu ma bino.

6 Mpe ekosalema ete Nkolo Nzambe akokumba epai ya bino maloba ma buku yoko, mpe makozala maloba ma bango baye balala mpongi.

7 Mpe tala buku ekokangema; mpe o buku ekozala libimisi uta na Nzambe, uta o ebandeli ya mokili kina o nsuka ya mwango.

8 Yango wana, mpo ya makambo makangemi, makambo maye makangemi makopesama te o mokolo mwa nkuna mpe bonsomo bwa bato. Yango wana buku ekobombama mosika na bango.

9 Kasi buku ekopesama na moto moko, mpe ye akopesa maloba ma buku, maye mazali maloba ma bango baye balali mpongi o mputulu, mpe akopesa maloba maye epai ya moto mosusu;

10 Kasi maloba maye makangema akopesa te, mpe ekopesa ye buku te. Mpo buku ekokangema na nguya ya Nzambe, mpe libimisi liye likangemaki likobombama o buku kina o ntango esengeli ya Nkolo yemei, ete makoka koya; mpo tala, mabimisi makambo manso uta o bokelami bwa mokili kina o nsuka ya mwango.

11 Mpe mokolo mokoya moye maloba ma buku eye ekangema makotangema likolo lya mitondo mya ndako; mpe makotangema na nguya ya Klisto; mpe makambo manso makobimisama epai ya bana ba bato maye mazali mokolo moko te o ntei ya bana ba bato, mpe maye makozala libela kina o nsuka ya mabele.

12 Yango wana, o mokolo mona moye mokopesama buku epai ya moto oyo nalobelaki, buku yango ekobombama o miso mya mokili, ete miso mya moko te mikomono yango longola se soko ezali ete banzeneneke basato bakomono yango, na nguya ya Nzambe, mpembeni ya oyo na ye buku ekopesama; mpe bakotatola bosolo bwa buku mpe makambo o yango.

13 Mpe moto mosusu azali te oyo akomono yango, longola se soko ezali mwa moke engebene na bolingi bwa Nzambe, mpo ya kopesa litatoli lya maloba ma ye epai ya bana ba bato; mpo Nkolo Nzambe alobaki ete maloba ma mondimi makoloba lokola soko ezalaki uta na bakufi.

14 Yango wana, Nkolo Nzambe akokoba kobimisa maloba ma buku; mpe o monoko mwa banzeneneke mingi lokola ekomono ye bolamu akotia liloba lya ye; mpe lisuma ezala epai ya ye oyo akobwaka liloba lya Nzambe!

15 Kasi tala, ekosalema ete Nkolo Nzambe akoloba epai ya oyo na ye akopesa buku: Kamata maloba maye makangema te mpe pesa mango na mosusu, ete akoka kolakisa mango epai ya oyo ayekola, kolobaka: Tanga eye, nakosenge yo. Mpe oyo ayekola akoloba: Kumba awa buku, nakotanga mango.

16 Mpe sikawa, na ntina ya nkembo ya mokili mpe mpo ya kozwa matabisi bakoloba eye, mpe mpo ya nkembo ya Nzambe te.

17 Mpe moto akoloba: Nakoki kokumba buku te, mpo ekangemi.

18 Nde oyo ayekola akoloba: Nakoki kotanga yango te.

19 Yango wana ekosalema, ete Nkolo Nzambe akopesa lisusu buku mpe maloba ma yango na oyo ayekola te; mpe oyo ayekola te akoloba: Nayekola te.

20 Nde Nkolo Nzambe akoloba epai ya ye: Ayekola akotanga mango te, mpo babwakaki mango, mpe nakoki kosala mosala mwa ngaimei; yango wana okotanga maloba maye nakopesa epai ya yo.

21 Simba te makambo makangemi, mpo nakobimisa mango o ntango esengeli ya ngaimei; mpo nakolakisa epai ya bana ba bato ete nakoki kosala mosala mwa ngaimei.

22 Yango wana, ekotanga yo maloba natindaki yo, mpe kozwa banzeneneke baye nalakaki epai ya yo, nde okokanga buku lisusu, mpe okobomba yango epai ya ngai, ete nabatela maloba maye otangaki te, kina nakomono elongobani na bwania bwa ngaimei kobimisa makambo manso epai ya bana ba bato.

23 Mpo tala, nazali Nzambe; mpe nazali Nzambe moko wa makamwisi; mpe nakolakisa epai ya mokili ete nazali ngai kaka lobi, lelo, mpe libela; mpe nakosalaka te o ntei ya bana ba bato longola se soko ezali engebene na bondimi bwa bango.

24 Mpe lisusu ekosalema ete Nkolo akoloba epai ya ye oyo akotanga maloba maye makopesamela ye:

25 Mpo mbala nzike bato baye bakobeleme epai ya ngai na monoko mwa bango, mpe na mbebo ya bango bakokumisa ngai, kasi balongoli mitema mya bango mosika na ngai, mpe bobangi bwa bango ona ngai elakisami na misise mya bato—

26 Yango wana, nakobanda kosala makambo ma bokamwi o ntei ya bato baye, iyo, mosala moko mwa bokamwi mpe likamwa lyoko, mpo bwania bwa bato ba bwania ba bango mpe bayekola ba bango bokowa, mpe bososoli bwa moto na ekenge wa bango bokobombama.

27 Mpe lisuma epai ya baye bakoluka o mozindo kobomba toli ya bango na Nkolo! Mpe misala mya bango mizali o molili; mpe bakoloba: Nani amoni biso, mpe nani ayebi biso? Mpe bakoloba lisusu: Solo, bobaloli makambo likolo mpe nse bokomonomo lokola modongo ya mosali biloko. Kasi tala, nakolakisa bango, elobi Nkolo wa Bibele, ete nayebi misala minso mya bango. Mpo ekolobela ye mosala oyo asali mwango, asali ngai te? To ekolobela ye eloko ekelami oyo akeli yango, ye azalaki na bososoli te?

28 Kasi tala, elobi Nkolo wa Bibele: Nakolakisa epai ya bana ba bato ete ekozala bobele ntango eke mpenza mpe Lebanona ekobongwana elanga ya mbuma mingi; mpe elanga ya mbuma mingi ekomonomo lokola zamba.

29 Mpe o mokolo mona bakufa matoyi bakoyoka maloba ma buku; mpe miso mya bato ba lolanda mikomono libanda lya molili mpe libanda lya boindo.

30 Mpe basokemi lisusu bakofuluka, mpe bosepeli bwa bango ekozala na Nkolo, mpe bakeleli o ntei ya bato bakosepela na Mosantu Moko wa Yisalaele.

31 Mpo solo lokola Nkolo azali na bomoi bakomono ete moto wa nsomo akoyeisama mpamba, mpe motioli akosila, mpe baye banso bakoluka mpo ya bobe bakokatama.

32 Mpe bango baye bakoyeisa moto moko mobe mpo ya liloba lyoko, mpe bakotanda motambo mpo ya ye oyo apalelaka o ekuke, mpe akotia mpembeni moyengebene mpo ya likambo lya mpamba.

33 Yango wana, boye elobi Nkolo, oyo asikolaki Abalayama, etali ndako ya Yakobo: Yakobo sikawa akoyokisama nsoni te, mpe elongi ya ye sikawa ekokoma enzuluka te.

34 Kasi ekomono ye bana ba ye, mosala mwa maboko ma ngai, o katikati ya ye, bakosantisa nkombo ya ngai, mpe bakosantisa Mosantu Moko wa Yakobo mpe bakobanga Nzambe wa Yisalaele.

35 Lisusu baye babungaki o molimo bakoya o bososoli, baye bayimayimaki bakoyekola malongi.