Makomi
2 Nefi 31


Mokapo 31

Nefi alobeli ntina nini Klisto abatisamaki—Bato basengeli kolanda Klisto, kobatisama, kozwa Molimo Mosantu, mpe kotia molende kina o nsuka mpo ya kobikisama—Boyamboli mpe libatisi lizali ekuke o nzela eke mpe ya nkaka—Bomoi bwa seko bokoya na bango baye bakobatela mitindo nsima ya libatisi. Penepene na 559–545 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa ngai, Nefi, natii nsuka yoko ya bobikuli bwa ngai epai ya bino, bandeko balingami ba ngai. Mpe nakoki kokoma bobele mwa makambo, maye nayebi masengeli solo kosalema; mpe nakoki kokoma bobele ndambo yoko ya maloba ma ndeko mobali wa ngai Yakobo.

2 Yango wana, makambo maye nakomaki makoki na ngai, longola se soko ezali mwa maloba maye nasengeli koloba matali malongi ma Klisto; yango wana, nakoloba epai ya bino polele, engebene na polele ya bobikuli bwa ngai.

3 Mpo bozo bwa ngai bokosepela o polele; mpo nsima ya lolenge loye Nkolo Nzambe akosala o ntei ya bana ba bato. Mpo Nkolo Nzambe akopesa mwinda mpo ya bosololi; mpo akoloba epai ya bato engebene na lokota la bango, mpo ya bosololi bwa bango.

4 Yango wana, nalingi ete bomikundola ete nalobaki na bino etali profeta ona oyo Nkolo alakisaki epai ya ngai, oyo akobatisa Mwana wa Mpate wa Nzambe, oyo akolongola masumu ma mokili.

5 Mpe sikawa, soko Mwana wa Mpate wa Nzambe, ezali ye mosantu, asengelaki kobatisama o mai, mpo ya kokokisa bosembo bonso, O nde, boniboni nzike koleka esengeli biso, ezali biso basantu te, kobatisama, iyo, kutu o mai!

6 Mpe sikawa, nalingi kotuna na bino, bandeko balingami ba ngai, na nini Mwana wa Mpate wa Nzambe akokisaki bosembo bonso na kobatisamaka o mai?

7 Eyebi bino te ete azali mosantu? Kasi ata ezali ye mosantu, alakisi epai ya bana ba bato ete, engebene na mosuni amikitisi liboso lya Tata, mpe atatoli epai ya Tata ete akozala na botosi epai ya ye na kobatelaka mitindo mya ye.

8 Yango wana, esili ye kobatisama o mai Molimo Mosantu akiti likolo lya ye o lolenge la ebenga.

9 Mpe lisusu, elakisi epai ya bana ba bato boke bwa nzela, mpe nkaka ya ekuke, o yango bakokota, ye kotiaka ndakisa liboso lya bango.

10 Mpe alobaki epai ya bana ba bato ete: Landani ngai. Yango wana, bandeko balingami ba ngai, ekoki biso kolanda Yesu longola se soko tokozala na bolingi bwa kobatela mitindo mya Tata?

11 Mpe Tata alobaki: Yambolani, yambolani, mpe batisamani o nkombo ya Mwana Mobali Molingami wa ngai.

12 Mpe lisusu, mongongo mwa Mwana Mobali moyaki epai ya ngai, kolobaka: Oyo akobatisama o nkombo ya ngai, Tata wa ngai akopesa ye Molimo Mosantu, bo epai ya ngai; yango wana, landani ngai, mpe salani makambo maye bomonoki ngai kosala.

13 Yango wana, bandeko balingami ba ngai, nayebi ete soko bokolanda Mwana Mobali, na mokano motonda mwa motema, kosalaka bokibisi te mpe lokuta te liboso lya Nzambe, kasi na mokano mwa solo, koyambolaka masumu ma bino, kotatolaka epai ya Tata ete bolingi kokamata likolo lya bino nkombo ya Klisto, na libatisi—iyo, na kolandaka Nkolo mpe Mobikisi wa bino o nse o kati ya mai, engebene na liloba lya ye, nde, ekozwa bino Molimo Mosantu; iyo, nde ekoya libatisi lya moto mpe lya Molimo Mosantu; mpe nde ekokoka bino koloba na monoko mwa banzelu, mpe ekosanzola bino Mosantu Moko wa Yisalaele.

14 Kasi, tala, bandeko balingami ba ngai, boye eyaki mongongo mwa Mwana Mobali epai ya ngai, kolobaka: Esilisi bino koyambola masumu ma bino, mpe kotatola epai ya Tata ete bolingi kobatela mibeko mya ngai, na libatisi lya mai, mpe kozwa libatisi lya moto mpe lya Molimo Mosantu, mpe kokoka koloba na monoko moko mwa sika, iyo, kutu na monoko mwa banzelu, mpe nsima ya eye koboya ngai, elingaki kozala bolamu koleka mpo ya bino ete boyebaka ngai te.

15 Mpe nayokaki mongongo uta na Tata, kolobaka: Iyo, maloba ma Molingami wa ngai mazali solo mpe potongono. Oyo akotia molende kina o nsuka, ye kaka akobikisama.

16 Mpe sikawa, bandeko balingami ba ngai, nayebi na eye ete longola se soko moto moko akotia molende kina o nsuka, na kolandaka ndakisa ya Mwana Mobali wa Nzambe wa bomoi, akoki kobisama te.

17 Yango wana, salani makambo maye nalobelaki bino namonoki ete Nkolo wa bino mpe Mosikoli wa bino akosala; mpo, mpo ya ntina eye malakisamaki epai ya ngai, ete bokoka koyeba ekuke o yango bosengeli kokota. Mpo ekuke o yango bosengeli kokota ezali boyamboli mpe libatisi lya mai; mpe nde ekoya bolimbisi bwa masumu ma bino o moto mpe o Molimo Mosantu.

18 Mpe nde ekozala bino o nzela eye eke mpe ya nkaka eye ekokamba o bomoi bwa seko; iyo, ekoti bino o ekuke; bosali engebene na mitindo mya Tata mpe Mwana Mobali; mpe ezwi bino Molimo Mosantu, oyo atatoli Tata mpe Mwana Mobali, mpo ya bokokisami bwa elako eye asalaki, ete soko bokoti o kati ya nzela bokozwa.

19 Mpe sikawa, bandeko balingami ba ngai, esili bino kokota o kati ya nzela eke mpe ya nkaka, nalingi kotuna soko enso esalemi ? Tala, nalobi epai ya bino, Te; mpo bokomaki kina lelo te longola se soko ezalaki liloba lya Klisto na bondimi bwa sikisiki na ye, mpe koyekeme mobimba likolo lya matomba ma ye oyo azali mokasi mpo ya kobikisa.

20 Yango wana, bosengeli kokende mbangu o boso na sikisiki na Klisto, kozalaka na bongengi bolamu bwa elikia, mpe bolingo bwa Nzambe mpe bwa bato banso. Yango wana, soko bokokende mbangu o boso, kosalaka limpati likolo lya liloba lya Klisto, mpe botii molende kina o nsuka, tala, boye elobi Tata: Bokozwa bomoi bwa seko.

21 Mpe sikawa, tala, bandeko balingami ba ngai, eye ezali nzela; mpe ezali nzela esusu te to nkombo esusu te epesami o nse ya lola na yango moto akoki kobikisama o bokonzi bwa Nzambe. Mpe sikawa, tala, eye ezali malongi ma Klisto, mpe lilako se lyoko mpe lya solo lya Tata, mpe lya Mwana Mobali, mpe lya Molimo Mosantu, oyo azali Nzambe moko, wa nsuka te. Amene.