Makomi
2 Nefi 33


Mokapo 33

Maloba ma Nefi mazali ma solo—Matatoli Klisto—Bango baye bandimi na Klisto bakondima maloba ma Nefi, maye makoteleme lokola litatoli lyoko liboso lya esika ya bosambisi . Penepene na 559–545 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa ngai, Nefi, nakoki kokoma makambo manso te maye malakisamaki o ntei ya bato ba ngai; mpe nazali mokasi te o bokomi, bo o bolobi; mpo ekoloba moto moko na nguya ya Molimo Mosantu nguya ya Molimo Mosantu ekomeme yango epai ya mitema mya bana ba bato.

2 Kasi tala, ezali mingi baye bayeisi mitema mya bango mikasi likolo lya Molimo Mosantu, ete azali na esika te na bango; yango wana, babwaki makambo mingi mosika maye makomama mpe bakotala yango mpamba.

3 Kasi ngai, Nefi, nakomaki nini nakomaki, mpe natalaki yango lokola elongobani mpenza, mpe mingi mingi epai ya bato ba ngai. Mpo nakosambela ntango inso mpo ya bango na moi, mpe mai ma miso mya ngai makopolisa ekata ya ngai na butu, mpo ya bango; mpe nakobelela epai ya Nzambe o bondimi, mpe nayebi ete akoyoka ebelela ya ngai.

4 Mpe nayebi ete Nkolo Nzambe akobulisa nsambo ya ngai mpo ya litomba lya bato ba ngai. Mpe maloba maye nakomaki o botau makoyeisama makasi epai ya bango; mpo makondimisa bango kosala bolamu; makoyebisa epai ya bango batata ba bango; mpe makondimisa bango kondima na ye, mpe kotia molende kina o nsuka, yango ezali bomoi bwa seko.

5 Mpe makoloba na makasi mpo ya mabe ma lisumu, engebene na polele ya bosolo; yango wana, moto te akosilika o maloba maye nakomaki longola se soko akozala wa molimo mwa zabulu.

6 Nakokembela o polele; nakokembela o bosolo; nakokembela na Yesu wa ngai, mpo abikisi bozo bwa ngai uta o limfelo.

7 Nazali na lolango mpo ya bato ba ngai, mpe bondimi bonene na Klisto ete nakokutana na bozo mingi na bozangi mbindo o kiti ya bosambisi ya ye.

8 Nazali na lolango mpo ya Moyuda—nalobi Moyuda, zambi nalingi koloba bango wapi nawutaki.

9 Lisusu nazali na lolango mpo ya Bapaganu. Kasi tala, mpo ya moko te wa baye nakoki kotia elikia longola se soko bakozongisa boyokani epai ya Klisto, mpe bakokota o ekuke ya nkaka, mpe bakotambola o nzela eke eye ekambi o bomoi, mpe bakokoba o nzela kina o nsuka ya mokolo mwa momekano.

10 Mpe sikawa, bandeko balingami ba ngai, mpe lisusu Moyuda, mpe bino banso nsuka ya mabele, yokemelani epai ya maloba maye mpe ndimani na Klisto; mpe soko bondimi o maloba maye te ndimani na Klisto. Mpe soko bokondima na Klisto bokondima maloba maye, mpo mazali maloba ma Klisto, mpe apesaki mango epai ya ngai; mpe makolakisa bato banso ete basala bolamu.

11 Mpe soko mazali maloba ma Klisto te, sambisani—mpo Klisto akomilakisa epai ya bino, na nguya mpe nkembo enene, ete mazali maloba ma ye, o mokolo mwa nsuka; mpe bino na ngai tokoteleme miso na miso liboso lya esika ya ye; mpe bokoyeba ete natindamaki na ye mpo ya kokoma makambo maye, ata botau bwa ngai.

12 Mpe nasambeli Tata o nkombo ya Klisto ete mingi ya biso, soko banso te, bakoka kobika o bokonzi bwa ye o mokolo mona monene mpe mwa nsuka.

13 Mpe sikawa, bandeko balingami ba ngai, bango banso baye bazali ba ndako ya Yisalaele, mpe bino nsuka ya mabele, nakoloba epai ya bino lokola mongongo mwa moko kogangaka uta o mputulu: Sese kina mokolo monene mona mokoya.

14 Mpe bino baye bakokabola te bolamu bwa Nzambe, mpe bokotosa te maloba ma Bayuda, mpe lisusu maloba ma ngai, mpe maloba maye makobima libanda lya monoko mwa Mwana wa Mpate wa Nzambe, tala, nakotombela bino sese ya libela, mpo maloba maye makokweyisa bino o mokolo mwa nsuka.

15 Mpo nini nakangi likolo lya mabele, ekomememe likolo lya bino o esika ya bosambisi; mpo boye Nkolo atindaki ngai, mpe nasengeli kotosa. Amene.