Makomi
2 Nefi 9


Mokapo 9

Bayuda bakosangisama o mboka inso ya elako ya bango—Botumbolami bosikoli moto uta o Bokwei—Nzoto ya bakufi ikobima uta o lilita, mpe milimo mya bango uta o limfelo mpe uta o paradizu—Bakosambisama—Botumbolami bokobikisa uta o liwa, limfelo, zabulu, mpe monioko mozanga nsuka—basembo bakobikisama o bokonzi bwa Nzambe—bitumbu mpo ya masumu bilimbolami—Mosantu Moko wa Yisalaele azali mokengeli wa ekuke. Penepene na 559–545 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa, bandeko babali balingami ba ngai, natangaki makambo maye ete bokoka koyeba etali mayokani ma Nkolo maye ayokanaki elongo na ndako ya Yisalaele—

2 Maye alobaki na Bayuda, na monoko mwa baprofeta basantu ba ye, kutu uta o ebandeli kina nsima, uta nkola o nkola, kina ntango ekoya ete bakozongisama o eklezia ya solo mpe etonga ya Nzambe; ekosangisama bango o ndako o mboka ya lisango lya bango, mpe bakotiama o mboka inso ya elako ya bango.

3 Tala, bandeko babali balingami ba ngai, nazali koloba epai ya bino makambo maye ete bokoka kosepela, mpe botombola mito mya bino libela, na ntina ya mapamboli Nkolo Nzambe akobonza likolo lya bana ba bino.

4 Mpo nayebi ete bolukaki mbala nzike, mingi ya bino, koyeba makambo makoya; yango wana nayebi ete bino boyebi ete mosuni mwa biso mosengeli kowa mpe kokufa; nzokande, o nzoto ya biso tokomono Nzambe.

5 Iyo, nayebi ete boyebi ete o nzoto akomilakisa epai ya bango o Yelusaleme, uta wapi toyaki; mpo elongobani ete ezala o ntei ya bango; mpo esengemi na Mokeli monene ete amitika mpo ya kokoma moyangelami epai ya moto o mosuni, mpo ya kokufa mpo ya bato banso, ete bato banso bakoka kokoma bayangelami epai ya ye.

6 Mpo lokola liwa lilekaki likolo lya bato banso, mpo ya kokokisa mwango mwa ngolu mwa Mokeli monene, esengeli mpenza ezala nguya ya bosekwi, mpe bosekwi bosengeli mpenza boya epai ya moto na ntina ya bokwei; mpe bokwei boyaki na ntina ya bobuki mobeko; mpe zambi bakomaki bakwei bakatamaki mosika uta o miso mya Nkolo.

7 Yango wana, esengeli mpenza ezala botumbolami boko bozanga ndelo—longola se soko ekozala botumbolami boko bozanga ndelo bopoli boye bokokaki te kolata bozangi bopoli. Yango wana, bosambisi bwa yambo boye boyaki likolo lya moto bosengeli mpenza bowumela o bowumeli bozanga nsuka. Mpe soko boye, mosuni moye mosengelaki molalisama o nse mpo ya kopolo mpe kopoto o mama wa mwango mabele, mpo ya kosekwa lisusu te.

8 O bwania bwa Nzambe, ngolu mpe boboto bwa ye! Mpo tala, soko mosuni mokosekwa lisusu te milimo mya biso misengelaki kokoma miyangelami na anzelu oyo akweyaki uta liboso lya miso mya Nzambe wa Seko, mpe akomaki zabulu, mpo ya kosekwa lisusu te.

9 Mpe milimo mya biso misengelaki kokoma lokola ye, mpe tokomi bazabulu, banzelu na zabulu moko, mpo ya kokangema libanda lya miso mya Nzambe wa biso, mpo ya kowumela elongo na tata wa lokuta, o bobola, bo yemei; iyo, na mozali oyo abubaki baboti ba yambo ba biso, oyo amibongoli penepene na anzelu wa mwinda, mpe asenginii bana ba bato o makelemba ma nkuku ma bobomi mpe ndenge inso ya misala mya nkuku mya molili.

10 O enene boniboni bolamu bwa Nzambe wa biso, oyo alengeli nzela mpo ya bopomoki bwa biso uta o bofini bwa dongolomiso wa nsomo oyo; iyo, dongolomiso ona, liwa mpe limfelo, liye nabiangi liwai lya nzoto, mpe lisusu liwa bwa molimo.

11 Mpe na ntina ya nzela ya libiki lya Nzambe wa biso, Mosantu Moko wa Yisalaele, liwa liye, liye nalobeli, liye lizali lya ntango, likotika bakufi ba yango; yango liwa lizali lilita.

12 Mpe liwa liye lyango nalobeli, liye lizali liwa lya molimo, likotika bakufi ba yango; liye liwa lya molimo lizali limfelo; yango wana, liwa mpe limfelo lisengeli kotika bakufi ba lyango, mpe limfelo lisengeli kotika milimo mikangema mya lyango, mpe lilita lisengeli kotika nzoto ikangema ya lyango, mpe nzoto mpe milimo mya bato mikozongisama yoko o isusu; mpe ezali na nguya ya bosekwi bwa Mosantu Moko wa Yisalaele.

13 O enene boniboni ezali mwango mwa Nzambe wa biso! Mpo o ngambo yoko, paradizu ya Nzambe esengeli kotika milimo mya basembo, mpe lilita kotika nzoto ya basembo; mpe molimo mpe nzoto izongisami o yangomei lisusu, mpe bato banso bakokoma bazanga bopoli, mpe bazanga bokufi, mpe bakozala bozo bozali na bomoi, kozalaka na boyebi boko bobongo nie bo biso o mosuni, longola se ekozala ete boyebi bwa biso bokozala bobongo nie.

14 Yango wana, tokozala na boyebi boko bobongo nie bwa elindo enso ya biso, mpe mbindo ya biso, mpe bolumbu bwa biso; mpe basembo bakozala o boyebi boko bobongo nie bwa bosepeli bwa bango, mpe bosembo bwa bango, bolatisami na bopeto, iyo, kutu na monkoto mwa bosembo.

15 Mpe ekosalema ete ntango bato banso bakoleka uta o liwa liye lya yambo o bomoi, lokola ekoma bango bazanga bokufi, esengeli babima liboso lya kiti-ya-bosambisi ya Mosantu Moko wa Yisalaele; nde ekoya bosambisi, mpe esengeli bango kosambisama engebene na bosambisi bosantu bwa Nzambe.

16 Mpe na ntembe te, lokola Nkolo azali na bomoi, mpo Nkolo Nzambe alobaki yango, mpe ezali liloba lya ye lya seko, liye likoki koleka te, ete baye bazali sembo bakozala sembo seko, mpe baye bazali mbindo bakozala mbindo seko. Yango wana, baye bazali mbindo bazali zabulu mpe banzelu ba ye; mpe bakokende mosika o kati ya moto mwa libela, molengeleme mpo ya bango; mpe monioko mwa bango mozali lokola liziba lya moto mpe libanga lya fofolo, ya yango mololi mokomata libela na libela mpe mozali na nsuka te.

17 O bonene mpe boyengebene bwa Nzambe wa biso! Mpo akosala maloba ma ye manso, maye makendeki libanda lya monoko mwa ye, mpe mobeko mwa ye mosengeli kokokisama.

18 Kasi, tala, basembo, basantu ba Mosantu Moko wa Yisalaele, baye bandimaki na Mosantu Moko wa Yisalaele, baye bamemeki na molende bikulusu bya mokili, mpe batalaki mpamba nsoni ya byango, bakosangola bokonzi bwa Nzambe, boye bolengelemeki mpo ya bango uta o bokelami bwa mokili, mpe bosepeli bwa bango bokozala botonda libela.

19 O bonene mpe ngolu ya Nzambe wa biso, Mosantu Moko wa Yisalaele! Mpo abikisi basantu ba ye uta o dongolomiso ya nsomo zabulu, mpe liwa, mpe limfelo mpe liziba lya moto mpe libanga lya fofolo, liye lizali monioko mozanga nsuka.

20 O enene boniboni bosantu bwa Nzambe wa biso! Mpo ayebi makambo manso, mpe ezali eloko yoko te longola se soko ayebi yango.

21 Mpe akoya o kati ya mokili ete akoka kobikisa bato banso soko bakoyokemela epai ya mongongo mwa ye; mpo tala, akoyoka bolozi mpo ya bato banso, iyo, bolozi bwa ekelamo na ekelamo ya bomoi, babali, basi lokola, mpe bana, baye bazali ba libota lya Adama.

22 Mpe andimaki eye ete bosekwi bokoka koya likolo lya bato banso, ete banso bakoka koteleme liboso lya ye o mokolo monene mpe mwa bosambisi.

23 Mpe atindi bato banso ete basengeli koyambola, mpe kobatisama o nkombo ya ye, kozalaka na bondimi bobongo nie na Mosantu Moko wa Yisalaele, to bakoki kobikisama te o bokonzi bwa Nzambe.

24 Mpe soko bakoyambola te mpe bakondima te o nkombo ya ye, mpe babatisami te o nkombo ya ye, mpe bakotia molende te kina o nsuka, basengeli kotumbolama; mpo Nkolo Nzambe, Mosantu Moko wa Yisalaele, alobaki yango.

25 Yango wana, apesaki mobeko moko; mpe wapi mobeko mopesami te ezali etumbu te; mpe wapi ezali etumbu te ezali bokweyisami te; mpe wapi ezali bokweyisami te ngolu ya Mosantu Moko wa Yisalaele ezali na likoki likolo lya bango, na ntina ya botumbolami; mpo babikisami na nguya ya ye.

26 Mpo botumbolami bosepelisi bisenge bya boyengebene bwa ye likolo lya banso baye mobeko mopesameli bango te, ete babikisama uta o dongolomiso ena ya nsomo, liwa mpe limfelo, mpe zabulu, mpe liziba lya moto mpe libanga lya fofolo, liye lizali monioko mozanga nsuka; mpe bazongisami na Nzambe oyo apesaki bango mpema, oyo azali Mosantu Moko wa Yisalaele.

27 Kasi lisuma epai ya oyo mobeko mopesameli ye, iyo, oyo azali na mitindo minso mya Nzambe, bo epai ya biso, mpe oyo akobuka mango, mpe oyo akobebisa mikolo mya momekano mwa ye, mpo nsomo ezali bozali bwa ye!

28 O mwango mwa mayele mabe mwa mobe moko! O mpamba, mpe botau, mpe ligboma lya bato! Ezali bango bayekola bakanisi bazali na bwania, mpe bakoyokemela te epai ya toli ya Nzambe, mpo batii yango mpembeni, kobanzaka bayebi na bangomei, yango wana, bwania bwa bango bozali bwa ligboma mpe bokopesa bango litomba te. Mpe bakowa.

29 Kasi kozala bayekola ezali elamu soko bakoyokemela epai ya toli ya Nzambe.

30 Kasi lisuma epai ya bazwi, baye bazali na bozwi bwa biloko bya mokili. Mpo zambi bazali na bozwi bakotiola bakeleli, mpe bakoniokolo basokemi, mpe mitema mya bango mizali likolo lya bomengo bwa bango; yango wana, bomengo bwa bango bozali nzambe ya bango. Mpe tala, bomengo bwa bango bokowa elongo na bango.

31 Mpe lisuma epai ya bato bakufa matoyi baye balingi koyoka te; mpo bakowa.

32 Lisuma epai ya bato ba lolanda baye balingi komono te; mpo bakowa lokola.

33 Lisuma epai ya basutu ba mitema; mpo boyebi boko bwa mabe ma bango bokobete bango o mokolo mwa nsuka.

34 Lisuma epai ya moto wa lokuta, mpo akobwakama o limfelo.

35 Lisuma epai ya mobomi oyo abomi na bolingi, mpo akokufa.

36 Lisuma epai ya bango baye basali pite, mpo bakobwakama o nse o limfelo.

37 Iyo, lisuma epai ya bango baye bakumbameli banzambe ba bikeko, mpo zabulu ya bazabulu banso asepeli na bango.

38 Mpe, o nsuka, lisuma epai ya bango baye bakokufa o masumu ma bango; mpo bakozonga na Nzambe, mpe tala bakomono elongi ya ye, mpe bakotikala o masumu ma bango.

39 O, bandeko babali balingami ba ngai, bomikundola nsomo na kobukaka mobeko na Nzambe Mosantu ena, mpe nsomo ya kokweyaka o masenginia ma moko wa mayela mabe. Bomikundola, kozala na makanisi-ma-mosuni ezali liwa, mpe kozala na makanisi-ma-molimo ezali bomoi bwa seko.

40 O, bandeko babali balingami ba ngai, pesani litoyi o maloba ma ngai. Bomikundola bonene bwa Mosantu Moko wa Yisalaele. Lobani te ete nalobaki makambo makasi likolo lya bino; mpo soko bosali yango, bokotiola bosolo; mpo nalobaki maloba ma Mozalisi wa bino. Nayebi ete maloba ma bosolo mazali makasi likolo lya mbindo inso; kasi basembo bakobanga yango te, mpo balingi bosolo mpe bakoningisama te.

41 O nde, bandeko babali balingami ba ngai, yakani epai ya Nkolo, Mosantu Moko. Bomikundola ete nzela ya ye ezali semba. Tala, balabala mpo ya moto ezali nkaka, kasi ezali o botamboli boko sembo liboso lya ye, mpe mokengeli wa ekuke ezali Mosantu Moko wa Yisalaele; mpe akosalela mosali te kuna; mpe ezali nzela esusu te longola se soko ezali ekuke; mpo akoki kokosa te, mpe Nkolo Nzambe ezali nkombo ya ye.

42 Mpe onso oyo akobete o ekuke, na ye akofungola; mpe bato ba bwania, bato bayekola, mpe baye bazali bazwi, baye bavimbani na ntina ya boyekoli bwa bango, mpe bwania bwa bango mpe bozwi bwa bango—iyo, bazali baye ye akosambwisa; mpe longola se soko bakobwaka mosika makambo maye, mpe bamimoni bato ba ligboma liboso lya Nzambe, mpe bakiti o bozindo bwa bosawa, akofungola te epai ya bango.

43 Kasi makambo ma bato ba bwania mpe bato ba ekenge makobombama mosika uta o bango libela—iyo, esengo ena eye elengeleme mpo ya basantu.

44 O, bandeko babali balingami ba ngai, bomikundola maloba ma ngai. Tala, nalongoli bilamba bya ngai, mpe naningisi byango liboso lya bino; nasambeli Nzambe wa lobiko la ngai ete atala ngai na liso lya ye likoluka-inso; yango wana, bokoyeba o mokolo mwa nsuka, ekosambisama bato banso mpo ya misala mya bango, ete Nzambe wa Yisalaele atatolaki ete naningisaki mabe ma bino mosika uta o bozo bwa ngai, mpe ete natelemi na bongengi liboso lya ye, mpe nazali peto na makila ma bino.

45 O, bandeko babali balingami ba ngai, bobaluka mosika uta o masumu ma bino; boningisa miniololo mya ye oyo alingi kokanga bino ngbi; yakani epai ya Nzambe oyo azali libanga lya lobiko la bino.

46 Lengeleni bozo bwa bino mpo ya mokolo mona mwa nkembo ekopesama boyengebene epai ya basembo, kutu mokolo mwa bosambisi, ete bokoka kozonga nsima te na bobangi bwa nsomo; ete bokoka te komikundola elindo ya bino ya nsomo o bolongo nie, mpe bosengisama mpo ya koganga: Esantu, esantu ezali masambisami ma yo, O Nkolo Nzambe wa Bokasi Bonso—kasi nayebi elindo ya ngai; nabukaki mobeko mwa yo, mpe bobuki mibeko bwa ngai bozali bwa ngai; mpe zabulu azwaki ngai, ete nazali niama bakangi o bobola bwa nsomo bwa ye.

47 Kasi tala, bandeko babali ba ngai, elongobani ete nalamusa bino o boko bozali solo bwa bobangi bwa makambo maye? Elingaki ngai kopasola bozo bwa bino soko mayele ma bino mazalaki peto? Elingaki ngai kozala polele na bino engebene na polele ya bosolo soko bozalaki nsomi o masumu?

48 Tala, soko bozalaki basantu, nalingaki koloba epai ya bino makambo ma bosantu; kasi lokola bozali basantu te, mpe botali ngai lokola molakisi moko, esengeli mpenza ezala elongobani ete nalakisa bino malandi ma masumu.

49 Tala, bozo bwa ngai boboyi lisumu, mpe motema mwa ngai mosepeli o bosembo; mpe nakosanzola nkombo esantu ya Nzambe wa ngai.

50 Yakani, bandeko babali ba ngai, moko na moko oyo azali na mposa ya mai, yaka o mai; mpe oyo azali na mosolo te, yaka kosomba mpe kolia; iyo, yaka kosomba vino mpe miliki na mosolo te mpe na ntalo te.

51 Yango wana, bebisani mosolo te mpo ya eye elongobani te, to misala mya bino mpo ya eye ekoki kotondisa te. Yokemelani na etingia epai ya ngai, mpe bomikundola maloba maye nalobi; mpe yakani epai ya Mosantu Moko wa Yisalaele, mpe salani limpati likolo lya eye ekowa te, to mpe ekoki kopolo te, mpe tika bozo bwa bino bosepela o bilei kitoko.

52 Tala, bandeko babali balingami ba ngai, bomikundola maloba ma Nzambe wa bino; sambelani epai ya ye ntango inso o moi, mpe pesani matondi epai ya nkombo esantu ya ye o butu. Tika mitema mya bino misepela.

53 Mpe tala enene boniboni mayokani ma Nkolo, mpe enene boniboni bonkonde bwa ye epai ya bana ba bato; mpe na ntina ya bonene bwa ye, mpe boboto mpe ngolu ya ye, alakaki epai ya biso ete nkona ya biso ekobebisama mobimba te, engebene na mosuni, kasi ete akobatela bango; mpe na nkola ya nsima bakokoma etape yoko sembo epai ya ndako ya Yisalaele.

54 Mpe sikawa, bandeko babali ba ngai, nalingi naloba epai ya bino mingi koleka; kasi o mokolo mwa nsima nakosakola epai ya bino etikali ya maloba ma ngai. Amene.