Makomi
3 Nefi 10


Mokapo 10

Nie ezali o mboka mpo ya ngonga mingi—Mongongo mwa Klisto molaki kosangisa bato ba ye lokola mama nsoso moko asangisi bana nsoso ba ye—Eteni eleki sembo ya bato babatelami. Penepene na 34–35 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Mpe sikawa tala, esalemaki ete bato banso ba mboka bayokaki maloba maye, mpe batatolaki yango. Mpe nsima ya maloba maye nie ezalaki o mboka mpo ya ntaka ya ngonga mingi;

2 Mpo enene boye ezalaki bokamwi bwa bato ete batikaki komilelaka mpe kogangaka mpo ya bobungisi bwa bandeko ba bango baye babomamaki; yango wana nie ezalaki o mboka mobimba mpo ya ntaka ya ngonga mingi.

3 Mpe esalemaki ete eyaki mongongo moko lisusu epai ya bato, mpe bato banso bayokaki, mpe batatolaki yango, kolobaka:

4 O bino bato ba bingumba biye binene biye bikweyi, baye bozali biboto bya Yakobo, iyo, baye bozali bato ba ndako ya Yisalaele, boniboni mbala mingi nalingaki kosangisa bino lokola mama nsoso moko asangisi bana nsoso ba ye o nse ya mapapu ma ye, mpe naleisi bino.

5 Mpe lisusu, boniboni mbala mingi nalingaki kosangisa bino lokola mama nsoso moko asangisi bana nsoso ba ye o nse ya mapapu ma ye, iyo, O bino bato ba ndako ya Yisalaele, baye bokweyi; iyo, O bino bato ba ndako ya Yisalaele, bino baye bofandi o Yelusaleme, lokola bino baye bokweyi; iyo, boniboni mbala mingi nalingaki kosangisa bino lokola mama nsoso moko asangisi bana nsoso ba ye o nse ya mapapu ma ye, mpe bolingaki te.

6 O bino ndako ya Yisalaele oyo nabikisi, boniboni mbala mingi nalingaki kosangisa bino lokola mama nsoso moko asangisi bana nsoso ba ye o nse ya mapapu ma ye, soko bokoyambola mpe bokozonga epai ya ngai na mokano motonda mwa motema.

7 Kasi soko te, O ndako ya Yisalaele, esika ya bofandi bwa bino ekotikala mpamba kina o ntango ya bokokisi bwa boyokani na batata ba bino.

8 Mpe sikawa esalemaki ete esilisaka bato koyoka maloba maye, tala, babandaki kolela mpe koganga lisusu mpo ya bobungisi bwa bandeko mpe baninga ba bango.

9 Mpe esalemaki ete boye mikolo misato milekaki. Mpe ezalaki o ntongo, mpe molili mopanzanaki uta mosika na etando ya mboka, mpe mabele matikaki kolenge, mpe mabanga matikaki kopasuka, mpe minkime mya nsomo mitikaki, mpe makelele ma lokito malekaki.

10 Mpe mabele makangamaki lisusu, ete matelemeki; mpe matanga, mpe boleli, mpe biyelela bya bato baye batikalaki na bomoi bitikaki; mpe matanga mabalukaki na bosepeli, mpe bomileli na bosanzoli mpe na bopesi matondi epai ya Nkolo Yesu Klisto, Mosikoli wa bango.

11 Mpe kina lelo ikokisamaki nkoma iye ilobamaka na baprofeta.

12 Mpe ezalaki eteni eleki sembo ya bato baye babikisamaki, mpe ezalaki bango baye bayambaki baprofeta, mpe babambaki bango mabanga te, mpe ezalaki bango baye basopaka te makila ma basantu, baye babikisamaki—

13 Mpe babikisamaki, mpe bazindisamaki mpe bakundamaki te o mabele; mpe bazindisamaki te o bozindo bwa mbu; mpe bazikisamaki te na moto, to bakweyelaki te mpe banikamaki te o liwa; mpe bamememeki te na mopepe mwa kaina; to bazipamaki te na mbongi ya molinga mpe ya molili.

14 Mpe sikawa, onso oyo atangi, tika ye asosola; ye oyo azali na nkoma, tika ye aluka yango, mpe amono mpe atala soko liwa liye linso mpe bobebisami na moto, mpe na molinga, mpe na ekumbaki, mpe na mopepe mwa kaina, mpe na bofungwani bwa mabele mpo ya koyamba bango, mpe makambo manso maye mazali te mpo ya bokokisi bwa mabikuli ma baprofeta basantu mingi.

15 Tala, nalobi epai ya bino ete, Iyo, mingi batatolaki makambo maye o boyei bwa Klisto, mpe babomamaki zambi batatolaki mpo ya makambo maye.

16 Iyo, profeta Zenosi atatolaki makambo maye, mpe lisusu Zenoki alobaki etali makambo maye, zambi batatolaki mingi etali biso, baye tozali montika mwa nkona ya bango.

17 Tala, tata wa biso Yakobo atatolaki lisusu etali montika moko mwa nkona ya Yosefe. Mpe tala, ezali biso te montika moko mwa nkona ya Yosefe? Mpe makambo maye matatoli biso, makomami te likolo lya palaki ya motako iye tata wa biso Lehi amemeki libanda lya Yelusaleme?

18 Mpe esalemaki ete o nsuka ya mobu mwa tuku misato na minei, tala, nakolakisa epai ya bino ete bato ba Nefi baye babikisamaki, mpe lisusu bango baye babiangemaka Balamani, baye babikisamaki, elakisamaki lisungi linene epai ya bango, mpe mapamboli manene masopamaki likolo lya mito mya bango, mpo noki nsima ya bobuti bwa Klisto o kati ya lola, amimonisaki solo epai ya bango—

19 Kolakisaka nzoto ya ye epai ya bango, mpe kosalaka epai ya bango; mpe nsango yoko ya mosala mwa ye ekopesama awa nsima. Yango wana mpo ya ntango eye natii nsuka yoko ya maloba ma ngai.