Makomi
3 Nefi 11


Yesu Klisto amilakisaki epai ya bato ba Nefi, lokola ebele basanganaki o mboka Beboo, mpe asalaki epai ya bango; mpe o lolenge loye amilakisaki epai ya bango.

Kokwaka mikapo 11 o 26 eye o kati.

Mokapo 11

Tata atatoli Mwana Mobali Molingami wa ye—Klisto abimi mpe asakoli botumbolami bwa ye—Bato bayoki bilembo bya mpota o maboko mpe makolo ma Yesu—Bagangi Hozana—Atii ndakisa mpe lolenge la libatisi—Molimo mwa boweli azali ya zabulu—malongi ma Klisto mazali ete bato bandima, babatisama mpe bazwa Molimo Mosantu. Penepene na 34 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Mpe sikawa, esalemaki ete basanganaki elongo ebele yoko enene, ya bato ba Nefi zingazinga mpembeni ya tempelo eye ezalaki o mboka Beboo; mpe bazalaki kosepelaka mpe kokamwaka bango na bango, mpe kolakisaka na bango na bango bobongwani bonene mpe bwa bokamwi boye bosalemaka.

2 Mpe bazalaki kosololaka etali Yesu Klisto, oyo ya ye elembo epesamaka etali liwa lya ye.

3 Mpe esalemaki ete ntango ezalaki bango kosololaka boye bango na bango, bayokaki mongongo moko lokola soko moyaki libanda lya lola; mpe babwakaki miso zingazinga mpembeni, mpo basosolaki te mongongo moye bayokaki; ezalaki mongongo mokasi te; nzokande, mpe ata ezalaki mongongo moke mokotaki bango baye bayokaki o katikati, mpenza ete ezalaki eteni te ya nzoto ya bango eye esalaki elenge te, iyo ekotaki o bozo mpenza, mpe esalaki mitema mya bango mipela.

4 Mpe esalemaki ete lisusu bayokaki mongongo, mpe basosolaki mwango te.

5 Mpe lisusu mbala ya isato bayokaki mongongo, mpe bafungolaki matoyi ma bango mpo ya koyoka mwango; mpe miso mya bango mizalaki ona lokito la mwango; mpe batalaki sikisiki ona lola, uta wapi lokito loyaki.

6 Mpe tala, mbala ya isato basosolaki mongongo moye bayokaki; mpe molobaki epai ya bango:

7 Tala Mwana Mobali Molingami wa ngai, na ye nasepeli mingi, na ye nakembeli nkombo ya ngai, yokani ye.

8 Mpe esalemaki, lokola basosolaki babwakaki miso mya bango lisusu ona lola; mpe tala bamonoki Moto moko kokitaka libanda lya lola; mpe alataki monkoto mwa mpembe, mpe akitaki mpe atelemeki o katikati ya bango; mpe miso mya ebele mobimba mibalukaki likolo lya ye; bamekaki te kofungola minoko mya bango, kutu na bango na bango, mpe bayebaki te nini elingaki koloba, mpo bakanisaki ete ezalaki anzelu moko abimaki epai ya bango.

9 Mpe esalemaki ete atandolaki loboko la ye mpe alobaki epai ya bato, kolobaka:

10 Tala, nazali Yesu Klisto, oyo baprofeta batatolaki akoya o kati ya mokili.

11 Mpe tala, nazali mwinda mpe bomoi bwa mokili; mpe nameli nkeni eye ya bololo eye Tata apesi ngai, mpe nakembeli Tata na kokamataka likolo lya ngai masumu ma mokili, na yango nandimi bolingi bwa Tata na makambo manso uta o ebandeli.

12 Mpe esalemaki ete elobaka Yesu maloba maye ebele bakweyaki o mabele; mpo bamikundolaki ete ebikulamaka o ntei ya bango ete Klisto akomilakisa epai ya bango nsima ya bobuti bwa ye o kati ya lola.

13 Mpe esalemaki ete Yesu alobaki epai ya bango kolobaka:

14 Telemeni mpe yakani epai ya ngai, ete bokoka kotia maboko ma bino o kati ya mopanzi mwa ngai, mpe lisusu ete bokoka koyoka bilembo bya nsete o maboko ma ngai mpe makolo ma ngai, ete bokoka koyeba ete nazali Nzambe wa Yisalaele, mpe Nzambe wa mabele mobimba; nabomami mpo ya masumu ma mokili.

15 Mpe esalemaki ete ebele bakendeki, mpe batiaki maboko ma bango o mopanzi mwa ye, mpe basimbaki bilembo bya nsete o maboko ma ye mpe makolo ma ye; mpe basalaki, kokendeke moko na moko kina bango banso bakendeke, mpe bamonoki na miso mya bango mpe bayokaki na maboko ma bango, mpe bayebaki na ntembe te mpe bapesaki litatoli, ete ezalaki ye, oyo baprofeta bakomaki, ete akoya.

16 Mpe ekendeke mpe etatolaka bango banso mpo ya bangomei, bagangaki na lisanga lyoko, kolobaka:

17 Hozana! Epambolama nkombo ya Nzambe Aleki Likolo! mpe bakweyaki o makolo ma Yesu, mpe bakumbamelaki ye.

18 Mpe esalemaki ete alobaki epai ya Nefi (mpo Nefi azalaki o ntei ya ebele) mpe atindaki ete abeleme.

19 Mpe Nefi atelemeki mpe akendeki, mpe amigumbaki liboso lya Nkolo mpe apwepweki makolo ma ye.

20 Mpe Nkolo atindaki ye ete ateleme. Mpe atombwanaki mpe atelemeki liboso lya ye.

21 Mpe Nkolo alobaki epai ya ye: Napesi epai ya yo nguya ete obatisa bato baye ezongi ngai lisusu o kati ya lola.

22 Mpe lisusu Nkolo abiangaki basusu mpe alobaki epai ya bango lolenge loko; mpe apesaki epai ya bango nguya ya kobatisa. Mpe alobaki epai ya bango: Na lolenge loye bokobatisa; mpe ekozala boswani te o ntei ya bino.

23 Solo, nalobi epai ya bino, ete oyo ayamboli masumu ma ye na nzela ya maloba ma bino, mpe azali na mposa ya kobatisama o nkombo ya ngai, na lolenge loye bokobatisa bango—Tala, bokokita mpe bokoteleme o mai, mpe o nkombo ya ngai bokobatisa bango.

24 Sikawa tala, maye mazali maloba maye bokoloba, kobiangaka bango na nkombo, kolobaka:

25 Lokola epesameli ngai bokulaka na Yesu Klisto, nabatisi yo o nkombo ya Tata, mpe ya Mwana Mobali, mpe ya Molimo Mosantu. Amene.

26 Mpe nde bokozindisa bango o mai mpe bokobima lisusu libanda lya mai.

27 Mpe nsima ya lolenge loye bokobatisa o nkombo ya ngai: mpo tala, solo, nalobi epai ya bino, ete Tata, mpe Mwana Mobali mpe Molimo Mosantu bazali moko; mpe nazali na Tata, mpe Tata azali na ngai, mpe Tata mpe ngai tozali moko.

28 Mpe engebene lokola natindi bino, boye bokobatisa. Mpe ekozala boswani lisusu te o ntei ya bino, lokola ezali kina sikawa; mpe ekozala boswani te o ntei ya bino etali biteni bya malongi ma ngai, lokola ezalaki kina sikawa.

29 Mpo solo, solo nalobi epai ya bino: ye oyo azali na molimo mwa boweli azali wa ngai te, kasi azali wa zabulu, oyo azali tata wa boweli, mpe ye alamusi mitema mya bato na boweli na nkanda, bango na bango.

30 Tala, eye ezali te malongi ma ngai, kolamusa mitema mya bato na nkanda, kasi eye ezali malongi ma ngai, makambo ma lolenge loye masila.

31 Tala, solo, solo, nalobi epai ya bino, nakosakola epai ya bino malongi ma ngai.

32 Mpe eye ezali malongi ma ngai, mpe ezali malongi maye Tata apesi epai ya ngai; mpe napesi litatoli lya Tata, mpe Tata apesi litatoli lya ngai, mpe Molimo Mosantu apesi litatoli lya Tata mpe lya ngai; mpe napesi litatoli ete Tata atindi bato banso, bisika binso, koyambola mpe kondima na ngai.

33 Mpe onso oyo andimi na ngai mpe abatisami, ye kaka akobikisama; mpe bazali bango baye bakosangola bokonzi bwa Nzambe.

34 Mpe onso oyo andimi na ngai te, mpe abatisami te, akotumbolama.

35 Solo, solo nalobi epai ya bino ete eye ezali malongi ma ngai, mpe napesi litatoli lya lyango uta na Tata; ete onso oyo andimi na ngai andimi na Tata lokola, mpe epai ya ye ekopesa Tata litatoli lya ngai, mpo akobimela ye na moto mpe na Molimo Mosantu.

36 Mpe boye Tata akopesa litatoli lya ngai, mpe Molimo Mosantu akopesa litatoli epai ya ye lya Tata mpe ngai; mpo Tata, mpe ngai, mpe Molimo Mosantu tozali moko.

37 Mpe lisusu nalobi epai ya bino: bosengeli koyambola, mpe kokoma lokola mwana moko moke, mpe kobatisama o nkombo ya ngai, to bokoki ata moke te kozwa biloko biye.

38 Mpe Lisusu nalobi epai ya bino: bosengeli koyambola mpe kobatisama o nkombo ya ngai, mpe kokoma lokola mwana moko moke, to bokoki ata moke te kosangola bokonzi bwa Nzambe.

39 Solo, solo nalobi epai ya bino, eye ezali malongi ma ngai, onso oyo atongi likolo lya eye atongi likolo lya libanga lya ngai, mpe bikuke bya limfelo bikolonga bango te.

40 Mpe onso oyo akosakola mingi to moke koleka eye, mpe atii yango lokola malongi ma ngai, ye kaka ayei na zabulu, mpe atongami te likolo lya libanga lya ngai; kasi atongi likolo lya nse yoko ya zelo, bikuke bya limfelo bifungwani mpo ya koyamba oyo ya lolenge loye eyei mpela enene mpe mipepe mibeti likolo lya bango.

41 Yango wana, kendeni epai ya bato baye, mpe sakolani maloba maye nalobi, epai ya nsuka ya mabele.