Makomi
3 Nefi 12


Mokapo 12

Yesu abiangi mpe atindi Bazomi na Babale—Apesi na Banefi lisukulu lyoko likokani na Esakola ya Esengo ya Ngomba—Alobi Esakola ya Esengo—Mateya ma ye mazali likolo mpe liboso lya mobeko mwa Mose—Bato batindami kozala babongo nie kutu lokola ye mpe Tata wa ye bazali babongo nie—Mekisani Matai 5. Penepene na 34 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Mpe esalemaki ete elobaka Yesu makambo epai ya Nefi, mpe na bango baye babiangemaki (sikawa motango mwa bango baye babiangemaki, mpe bazwaki nguya mpe bokulaka mpo ya kobatisa, ezalaki zomi na babale) mpe tala, atandolaki loboko la ye epai ye ebele, mpe agangaki epai ya bango, kolobaka: Bopambolami soko bokosala keba epai ya maloba ma bazomi na babale baye naponi uta o ntei ya bino mpo ya kosala epai ya bino, mpe mpo ya kozala basali ba bino; epai ya bango napesi nguya ete bakoka kobatisa bino na mai, mpe nsima soko bobatisami na mai, tala, nakobatisa bino na moto mpe na Molimo Mosantu. Yango wana, bopambolami soko bokondimi na ngai mpe bokobatisama, nsima soko bomoni ngai mpe boyebi ete nazali.

2 Mpe lisusu, bapambolami mingi koleka bango baye bakondima na maloba ma bino zambi ete bokotatola ete bomoni ngai mpe boyebi ete nazali. Iyo, bapambolami bango baye bakondima na maloba ma bino, mpe bakoya o kati ya bozindo bwa bosawa mpe bakobatisama; mpo bakobimelama na moto mpe Molimo Mosantu, mpe bakozwa bolimbisi boko bwa masumu ma bango.

3 Iyo, bapambolami bakeleli o molimo baye bayei epai ya ngai, mpo ya bango ezali bokonzi bwa lola;

4 Mpe lisusu, bapambolami bango banso baye baleli, mpo bakobondisama.

5 Mpe bapambolami basokemi, mpo bakosangola mabele.

6 Mpe bapambolami bango banso baye bazali na nzala mpe mposa nsima ya boyengebene, mpo bakotondisama na Molimo Mosantu.

7 Mpe bapambolami bato na ngolu, mpo bakozwa ngolu.

8 Mpe bapambolami banso bazali na mitema peto, mpo bakomono Nzambe.

9 Mpe bapambolami banso basali ba kimia, mpo bakobiangema bana ba Nzambe.

10 Mpe bapambolami banso baye baniokwami mpo ya ntina ya nkombo ya ngai, mpo ya bango ezali bokonzi bwa lola.

11 Mpe bopambolami ntango bato bakofinga mpe bakoniokolo bino, mpe bakoloba ndenge inso ya bobe bwa lokuta likolo lya bino, na ntina ya ngai.

12 Mpo bokozwa bosepeli bonene mpe bokozala na nsai mpenza, mpo enene ekozala mbano ya bino o lola; Mpo boye eniokoloki bango baprofeta baye bazalaki liboso lya bino.

13 Solo, solo, nalobi epai ya bino, napesi epai ya bino kozala mongwa mwa mabele; kasi soko mongwa mokobungisa elengi ya yango, na nini ekozwa mabele mongwa? Mongwa mokozala bongo molamu mpo ya eloko te, kasi mpo ya kobwakama libanda mpe koniatama o nse ya makolo.

14 Solo, solo, nalobi epai ya bino, napesi epai ya bino kozala mwinda ya bato baye. Engumba yoko eye etiami likolo lya ngomba patatalu ekoki kobombama te.

15 Tala, bato bakopelisaka buzi yoko mpe bakotia yango o nse ya ekolo? Te, kasi likolo lya esimbelo, mpe epesi mwinda na banso baye bazali o ndako.

16 Yango wana, tika mwinda mwa bino mongenge boye liboso lya bato baye, ete bamono misala milamu mya bino mpe bakembela Tata wa bino oyo azali o lola.

17 Kanisani te ete nayei mpo ya kobebisa mobeko mpe baprofeta. Nayei te mpo ya kobebisa kasi mpo ya kokokisa.

18 Mpo solo nalobi epai ya bino, nsonge yoko te to elembo yoko te ekolongwa uta o mobeko, kasi na ngai enso ekokisami.

19 Mpe tala, napesi bino mobeko mpe mitindo mya Tata wa ngai, ete bokondima na ngai, mpe ete bokoyambola masumu ma bino, mpe bokoya epai ya ngai, na motema moko mobukana mpe molimo moko mwa mawa. Tala, bozali na mitindo liboso lya bino, mpe mobeko mokokisami.

20 Yango wana yakani epai ya ngai mpe bikisamani; mpo, solo, nalobi epai ya bino, ete longola se soko bobombi mitindo mya ngai, miye natindi bino o ntango eye, bokoki ata moke te kokota o kati ya bokonzi bwa lola.

21 Boyoki ete elobami na bango ba ntango ya kala, mpe ekomami lisusu liboso lya bino, ete okoboma te; ete onso oyo akoboma akozala na likama lya bosambisi bwa Nzambe.

22 Kasi nalobi epai ya bino ete onso oyo asiliki na ndeko wa ye akozala na likama lya bosambisi bwa ye. Mpe onso oyo akoloba epai ya ndeko mobali wa ye: Zoba, akozala na likama lya likita; onso oyo akoloba, Yo moto wa ligboma, akozala na likama lya moto mwa limfelo.

23 Yango wana, soko okoya epai ya ngai, to okozala na mposa ya koya epai ya ngai, mpe omikundoli ete ndeko wa yo azali na likambo lya yo—

24 Kende nzela ya yo epai ya ndeko wa yo, mpe yambo zongisa boyokani na ndeko wa yo, mpe nde yaka epai ya ngai na mokano motonda mwa motema, mpe nakoyamba yo.

25 Yokana na monguna wa yo noki ntango ezali bino o nzela elongo na ye, mbele o yoko ntango akozwa yo, mpe okobwakama o kati ya boloko.

26 Solo, solo, nalobi epai ya yo, o nzela yoko te okobima kuna kina ofuti lomeya la nsuka mpenza. Ntango ezali yo o boloko ekoka yo kofuta ata lomeya loko? Solo, solo, nalobi epai ya bino, Te.

27 Tala, ekomami na bango ba ntango ya kala, ete okosala ekobo te.

28 Kasi nalobi epai ya bino ete, onso oyo atali mwasi moko, mpo ya kolula nsima ya ye, asili asali ekobo o motema mwa ye.

29 Tala, napesi epai ya bino motindo moko, ete bokondima yoko te ya makambo maye makota o mitema mya bino.

30 Mpo ezali bolamu ete bomiwangana na makambo maye, na wapi bokamati ekulusu ya bino, koleka ete bobwakama o kati ya limfelo.

31 Ekomami, ete onso oyo akolongola mwasi wa ye, apesa likomi lyoko lya bobomi libala.

32 Solo, solo, nalobi epai ya bino, ete onso oyo akolongola mwasi wa ye, longola se mpo ya ntina ya bondumba, asali ye asala ekobo. Mpe onso oyo akobala ye oyo abomi libala asali ekobo.

33 Mpe lisusu ekomami, okolapa ndai te, kasi okokokisa epai ya Nkolo ndai ya yo.

34 Kasi solo, solo nalobi epai ya bino, lapani ndai soko moko te; na lola te, mpo ezali ngbende ya Nzambe;

35 To na mabele te, mpo ezali ebonga ya makolo ma ye;

36 To okolapa ndai na moto mwa yo te, zambi okoki kosala nsuki yoko yindu to mpembe te;

37 Kasi tika ete liyebisi lya yo lizala Iyo, iyo; Te, te; mpe enso eye eyei mingi koleka iye ezali ebe.

38 Mpe tala, ekomami, liso lyoko mpo ya liso lyoko, mpe lino lyoko mpo ya lino lyoko.

39 Kasi nalobi epai ya bino, ete bokopika mpende te na bobe, Kasi onso oyo akobete yo na litama lya mobali, balula na ye litama lisusu.

40 Mpe soko moto afundi yo na mobeko mpe alongoli kazaka ya yo; tika ye azwa monkoto mwa yo lokola.

41 Mpe onso oyo asengisi yo mpo ya kokende kilometele yoko, kenda elongo na ye ibale.

42 Pesa na ye oyo asengi yo, mpe na ye oyo akodefa na yo kobaluka mosika te.

43 Mpe tala ekomami lisusu, ete okolinga moto wa penepene na yo mpe okoyina moyini wa yo.

44 Kasi tala nalobi epai ya bino, lingani bayini ba bino, pambolani bango baye balakeli bino botutu, salani bolamu na bango baye bayini bino, sambelani mpo ya bango baye bakotala bino mpamba mpe bakoniokolo bino.

45 Ete bokoka kozala bana ba Tata wa bino oyo azali o lola, mpo ye asali moi mwa ye mobima likolo lya babe mpe likolo lya balamu.

46 Yango wana makambo mana maye mazalaki na ntango ya kala, maye mazalaki o nse ya mobeko, na ngai manso makokisami.

47 Makambo ma kala masili, mpe makambo manso makomi ma sika.

48 Yango wana nalingi ete bozala bobongo nie kutu lokola ngai to Tata wa bino oyo azali o lola azali abongo nie.