Makomi
3 Nefi 18


Mokapo 18

Yesu abongisi elambo o ntei ya Banefi—Batindami kosambela ntango inso o nkombo ya ye—Bango baye balei mosuni mwa ye mpe bameli makila ma ye na bozangi bolongobani batumbolami—Bayekoli bazwi nguya mpo ya kopesa Molimo Mosantu. Penepene na 34 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Mpe esalemaki ete Yesu atindaki bayekoli ba ye ete bameme limpa mpe vino epai ya ye.

2 Mpe ntango ekendeki bango mpo ya limpa mpe vino, atindaki ebele ete bafanda o nse likolo lya mabele.

3 Mpe eyaka bayekoli elongo na limpa mpe vino, akamataki limpa mpe abukaki mpe apambolaki lyango, mpe apesaki epai ya bayekoli mpe atindaki ete balia.

4 Mpe eliaka mpe etondaka bango, atindaki ete bapesa epai ya ebele.

5 Mpe eliaka mpe etondaka ebele, alobaki epai ya bayekoli: Tala ekokulisama moko o ntei ya bino, na ye nakopesa nguya ete abuka limpa, mpe apambola lyango mpe apesa lyango epai ya bato ba eklezia ya ngai, epai ya bango baye bakondima mpe bakobatisama o nkombo ya ngai.

6 Mpe eye ekobatela bino ntango inso, lokola nasali, kutu lokola nabuki limpa mpe na napamboli lyango mpe napesi lyango epai ya bino.

7 Mpe eye bosalaka boye na bokundoli bwa nzoto ya ngai, eye nalakisi epai ya bino. Mpe ekozala litatoli epai ya Tata ete bomikundoli ngai ntango inso. Mpe soko bomikundoli ngai ntango inso, bokozwa Molimo mwa ngai mpo ya kozala elongo na biso.

8 Mpe esalemaki ete elobaki ye maloba maye, atindaki bayekoli ba ye ete bakamata vino mpe bamele yango, mpe ete lisusu bapesa epai ya ebele ete bakoka komele yango.

9 Mpe esalemaki ete basalaki boye, mpe bameleki yango mpe batondaki; mpe bapesaki epai ya ebele, mpe bameleki mpe batondaki.

10 Mpe esalaka bayekoli eye, Yesu alobaki epai ya bango: bopambolami mpo ya likambo liye, liye bosali, mpo eye ekokisi mitindo mya ngai, mpe eye etatoli epai ya Tata ete bozali kolingaka kosala eye natindi bino.

11 Mpe eye bokosala ntango inso na baye bayamboli mpe babatisami o nkombo ya ngai; mpe bokosala yango na bokundoli bwa makila ma ngai, maye nasopi mpo ya bino ete bokoka kotatola epai ya Tata ete bomikundoli ngai ntango inso. Mpe soko ntango inso bomikundoli ngai, bokozala na molimo mwa ngai mpo ya kozala elongo na bino.

12 Mpe napesi epai ya bino motindo moko ete bosala makambo maye. Mpe soko bokosala ntango inso makambo maye, bopambolami, mpo botongami likolo lya libanga lya ngai.

13 Mpe banso baye o ntei ya bino bakosala mingi to moke koleka iye batongami te likolo lya libanga lya ngai, kasi batongami likolo lya nse yoko ya zelo; ekiti mvula, mpe mpela eyei, mpe mipepe mifuli, mpe mibeti likolo lya bango, bakokweya, mpe bikuke bya limfelo bisili bifungwani mpo ya koyamba bango.

14 Yango wana bopambolami soko bobateli mitindo mya ngai, miye Tata atindi ngai ete napesa epai ya bino.

15 Solo, solo, nalobi epai ya bino, bosengeli bokenge mpe kosambela ntango inso, mbele bosenginiama na zabulu, mpe bokambema mosika bakangemi ba ye.

16 Mpe lokola nasambeli o ntei ya bino, kutu boye nde bokosambela o eklezia ya ngai, o ntei ya bato ba ngai baye bayamboli mpe babatisami o nkombo ya ngai. Tala nazali mwinda, natii ndakisa yoko mpo ya bino.

17 Mpe esalemaki ete elobaka Yesu maloba maye epai ya bayekoli ba ye, abalukaki lisusu epai ya ebele mpe alobaki epai ya bango:

18 Tala, solo, solo, nalobi epai ya bino, bosengeli kokenge mpe kosambela ntango inso, mbele bokota o kati ya lisenginia; Mpo Satana azali na mposa ya kozwa bino, ete ayungula bino lokola fufu.

19 Yango wana bosengeli ntango inso kosambela epai ya Tata o nkombo ya ngai.

20 Mpe enso eye bokosenge Tata o nkombo ya ngai, eye ezali alima, kondimaka ete bokozwa, tala ekopesama epai ya bino.

21 Sambelani o mabota ma bino epai ya Tata, ntango inso o nkombo ya ngai, ete basi mpe bana ba bino bakoka kopambolama.

22 Mpe tala, bokokutanaka elongo mbala na mbala, mpe bokopekisa moto te koya epai ya bino ekokutana bino elongo, kasi ndimani bango ete bakoka koya epai ya bino mpe pekisani bango te.

23 Kasi bokosambela mpo ya bango, mpe bokobwaka bango libanda te; mpe soko ezali ete bayei epai ya bino mbala na mbala, bokosambela mpo ya bango epai ya Tata o nkombo ya ngai.

24 Yango wana, simbani likolo mwinda mwa bino ete mongenge epai ya mokili. Tala nazali mwinda moye bokosimba likolo—ena eye bomoni ngai nasali. Tala bomoni ete nasambeli epai ya Tata, mpe banso botatoli.

25 Mpe bomoni ete natindi ete moko te ya bino, alongwa, kasi kutu natindi ete boya epai ya ngai, ete bokoka kosimba mpe bomono; kutu boye ekosala bino epai ya mokili; mpe onso oyo abuki motindo moye andimi yemei komikambema o kati ya lisenginia.

26 Mpe sikawa esalemaki ete elobaka Yesu makambo maye, abalulaki miso mya ye lisusu likolo lya bayekoli baye aponoko, mpe alobaki epai ya bango:

27 Tala solo, solo, nalobi epai ya bino, napesi epai ya bino motindo mosusu; mpe nde nakei epai ya Tata ete nakoka kokokisa motindo mosusu moye apesi ngai.

28 Mpe sikawa tala, eye ezali motindo moye napesi epai ya bino, ete bondima te moto moko na boyebi akamata mosuni mpe makila ma ngai na bozangi bolongobani, ekosala bino yango.

29 Mpo onso oyo alei mpe ameli nzoto mpe makila ma ngai na bozangi bolongobani, alei mpe ameli botumboli o molimo wa ye; yango wana, soko bomoni moto moko azangi bolongobani mpo ya kolia mpe komele nzoto mpe makila ma ngai, bokopekisa ye.

30 Nzokande, bokobwaka ye libanda te uta o ntei ya bino, kasi bokosala epai ya ye mpe bokosambela mpo ya ye epai ya Tata, o nkombo ya ngai; soko ezali ete ayambola mpe abatisami o nkombo ya ngai, nde bokoyamba ye, mpe bokopesa epai ya ye nzoto mpe makila ma ngai.

31 Kasi soko ayambola te, akotangema te o ntei ya bato ba ngai, ete akoka te kobebisa bato ba ngai, mpo tala, nayebi mpate ya ngai, mpe batangemi.

32 Nzokande, bokobwaka ye te libanda lya sinagogi ya bino, to bisika bya bokumbami bya bino, mpo epai ya ba lolenge loye bokokoba kosala; mpo boyebi te soko bakozonga mpe bakoyambola, mpe bakoya epai ya ngai na mokano motonda mwa motema, mpe nakobikisa bango mpe bokozala nzela ya komemeke lobiko epai ya bango.

33 Yango wana, bombani maloba maye, maye natindi bino ete boya te o nse ya etumbu; mpo lisuma epai ya ye oyo Tata atumboli.

34 Mpe napesi bino mitindo miye na ntina ya boswani boye bozali o ntei ya bino. Bopambolami soko bozali na boswani te o ntei ya bino.

35 Mpe sikawa nakei epai ya Tata, zambi elongobani ete nakende epai ya Tata mpo ya ntina ya bino.

36 Mpe esalemaki ete etiaka Yesu nsuka yoko ya maloba maye, asimbaki na loboko la ye bayekoli baye aponoko, moko na moko, kutu kina asimbaki bango banso, mpe alobaki epai ya bango lokola asimbaki bango.

37 Mpe ebele bayoki te maloba maye alobaki, yango wana bapesaki te litatoli; kasi bayekoli bapesaki tatolaki ete apesaki bango nguya mpo ya kopesa Molimo Mosantu. Mpe nakolakisa epai ya bino nsima ete likundoli liye lizali lya solo.

38 Mpe esalemaki ete esimbaka Yesu bango banso, eyaki lipata lyoko mpe lizipaki ebele ete bakokaki te komono Yesu.

39 Mpe ntango ezipamaki bango, atikaki bango, mpe amataki o kati ya lola. Mpe Bayekoli bamonoki mpe bapesaki litatoli ete amataki lisusu o kati ya lola.