Makomi
3 Nefi 26


Mokapo 26

Yesu asemboli makambo manso uta o ebandeli kina o nsuka—Bana bake mpe bana balobi makambo ma bokamwi maye makoki te kokomama—Banso o Eklezia ya Klisto bazali na biloko binso na lisanga. Penepene na 34 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Mpe sikawa esalemaki ete elobaka Yesu makambo maye asembolaki mango epai ya ebele; mpe asembolaki makambo manso epai ya bango, manene mpe make lokola.

2 Mpe alobaki: Nkoma iye, iye bozali na yango te, Tata atindi ete napesa epai ya bino; mpo ezali bwania na ngai ete ipesama epai ya nkola ikoya.

3 Mpe asembolaki makambo manso, kutu uta o ebandeli kina ntango eye akoya o nkembo ya ye—iyo, kutu makambo manso maye makoya likolo lya etando ya mabele mobimba, kutu kina biloko bikoniangwa na moto mokasi, mpe mabele makozingama elongo lokola etoko ezingani, mpe lola mpe mabele makoleka;

4 Mpe kutu mpo ya mokolo monene mpe mwa nsuka, ekoteleme liboso lya Nzambe bato banso, mpe mabota manso, bikolo binso, minoko, mpo ya kosambisama na misala mya bango, soko mazalaki malamu to mabe—

5 Soko mazali malamu, mpo ya bosekwi bwa bomoi bwa libela; kasi soko mazali mabe, mpo ya bosekwi bwa botumboli; kozalaka o nzela ikutanaka te, yoko o ngambo yoko mpe esusu o ngambo esusu, engebene na ngolu, mpe boyengebene, mpe bosantu boye bozali na Klisto, oyo azalaki yambo mokili ebanda.

6 Mpe sikawa ekoki te kokomama o buku eye ata eteni yoko ya nkama ya makambo maye Yesu ateyaki bato;

7 Kasi tala, palaki ya Nefi ikwi eteni eleki mingi ya makambo maye ateyaki bato.

8 Mpe makambo maye ekomi ngai, maye mazali eteni eleki eke ya makambo maye ateyaki bato; mpe nakomaki mango na ntina ete makoka komememe lisusu epai ya bato baye; uta na Bapaganu, engebene na maloba maye Yesu alobaki.

9 Mpe ekozwa bango eye, eye elongobani ete bazwa yambo, mpo ya komeka bondimi bwa bango, mpe soko ekozala ete bakondima makambo maye nde ekomonisama makambo maleki manene epai ya bango.

10 Mpe soko ezali ete bakondima te makambo maye, nde ekobotolomo makambo maye maleki manene uta na bango, mpo ya botumbolami bwa bango.

11 Tala, nazalaki mpembeni ya kokoma mango, manso maye makomamaki likolo lya palaki ya Nefi, kasi Nkolo apekisaki yango kolobaka: Nakomeka bondimi bwa bato ba ngai.

12 Yango wana ngai, Molomoni, nakomi makambo maye matindamaki ngai na Nkolo. Mpe sikawa ngai, Molomoni natii nsuka yoko ya bolobi bwa ngai, mpe nabandi kokoma makambo maye matindami ngai.

13 Yango wana, nalingi ete bomono ete Nkolo na ntembe te ateyaki bato, mpo ya ntaka ya mikolo misato; mpe nsima ete amilakisaki epai ya bango, abukaki limpa mbala mingi, mpe apambolaki lyango mpe apesaki lyango epai ya bango.

14 Mpe esalemaki ete ateyaki mpe asalaki epai ya bana ba ebele baye balobami, mpe afungolaki ndemo ya bango, mpe balobaki epai ya batata ba bango makambo manene mpe ma bokamwi, kutu manene koleka abimisaka epai ya bato, mpe afungolaki ndemo ya bango ete bakokaki koloba.

15 Mpe esalemaki ete esilaka Yesu kobuta o kati ya lola—mbala ya ibale eye amilakisaki epai ya bango, mpe akendeke epai ya Tata, nsima ya kobikisa bakoni ba bango, mpe batengoli ba bango, mpe afungolaki miso mya bato ba lolanda mpe akangolaki matoyi ma bato bakufa matoyi, mpe kutu asalaki ndenge inso ya bobikisi, mpe asekwisaki moto moko uta o bawa, mpe alakisaki nguya ya ye epai ya bango, mpe abutaka epai ya Tata—

16 Tala, esalemaki ete o mokolo mwa nsima, moye ebele basangisaki bangomei elongo, bamonoki mpe bayokaki lokola bana baye, iyo, kutu bana bake bafungolaki minoko mya bango mpe balobaki makambo ma bokamwi; mpe makambo maye balobaki mapekisamaki ete moto akoma mango.

17 Mpe esalemaki ete bayekoli baye Yesu aponoko babandaki mbala na mbala kobatisa mpe koteya mingi lokola bayaki epai ya bango; mpe mingi lokola babatisamaki o nkombo ya Yesu batondisamaki na Molimo Mosantu.

18 Mpe mingi ya bango bamonoki mpe bayokaki makambo makolobamaka te, maye mazangi ndingisa mpo ya kokoma.

19 Mpe bateyaki, mpe basalisanaki; mpe bazalaka na biloko binso na lisanga o ntei bango, moto na moto kosalaka na boyengebene, moko na mosusu.

20 Mpe esalemaki ete basalaki makambo manso kutu lokola Yesu atindaka bango.

21 Mpe bango baye babatisamaki o nkombo ya Yesu babiangemaki eklezia ya Klisto.