Makomi
3 Nefi 27


Mokapo 27

Yesu atindi bango kobianga Eklezia o nkombo ya ye—Misio ya ye mpe mbeka ya botumbolami esali nsango elamu ya ye—Bato batindami koyambola mpe kobatisama ete basantisama na Molimo Mosantu—Basengeli kozala kutu lokola Yesu azali. Penepene na 34–35 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Mpe esalemaki ete bayekoli ba Yesu bazalaki kokendeke mibembo mpe bazalaki koteyaka makambo bamonoko mpe bayokaka lokola, mpe bazalaki kobatisaka bato o nkombo ya Yesu, esalemaki ete basanganaki mpe basalaki bomoko na losambo lokasi mpe bokili.

2 Mpe Yesu amilakisaki lisusu epai ya bango, mpo bazalaki kosambelaka epai ya Tata o nkombo ya ye; mpe Yesu ayaki mpe atelemeki o katikati ya bango, mpe alobaki epai ya bango: Nini bolingi ete napesa epai ya bino?

3 Mpe bango balobaki epai ya ye: Nkolo, tolingi ete olobela biso nkombo na wapi tokobianga eklezia eye; mpo ezali boswani o ntei ya bato etali likambo liye.

4 Mpe Nkolo alobaki epai ya bango: Solo, solo nalobi epai ya bino, ntina nini bato bazali koyimayima mpe koswana na ntina ya likambo liye?

5 Etangaki bango te nkoma, iye ilobi bosengeli kokamata likolo lya bino nkombo ya Klisto, eye ezali nkombo ya ngai? Mpo na nkombo eye ekobiangema bino o mokolo mwa nsuka;

6 Mpe onso oyo akokamata likolo lya ye nkombo ya ngai, mpe akotia molende kina o nsuka, ye kaka akobikisama o mokolo mwa nsuka.

7 Yango wana, enso eye bokosala, bokosala yango o nkombo ya ngai; yango wana bokobianga eklezia o nkombo ya ngai, mpe bokobianga likolo lya Tata o nkombo ya ngai ete apambola eklezia mpo ya ntina ya ngai.

8 Mpe boniboni ezala eklezia ya ngai longola se soko ebiangemi o nkombo na ngai? Mpo soko eklezia yoko ebiangemi o nkombo ya Mose, nde ezali eklezia ya Mose; to soko ezali o nkombo ya moto moko, nde ezali eklezia ya moto moko; kasi soko ebiangemi o nkombo ya ngai nde ezali eklezia ya ngai, soko ezali boye ete etongami likolo lya nsango elamu ya ngai.

9 Solo nalobi epai ya bino, ete botongami likolo lya nsango elamu ya ngai; yango wana bokobianga biloko binso bobiangi, o nkombo ya ngai; yango wana soko bobiangi likolo lya Tata, mpo ya eklezia, soko ezali o nkombo ya ngai, Tata akoyoka bino;

10 Mpe soko ezali ete eklezia etongami likolo lya nsango elamu ya ngai, nde ekolakisa Tata misala mya ye na yango.

11 Kasi soko etongami te likolo lya nsango elamu ya ngai, likolo lya misala mya bato, to likolo lya misala mya zabulu, solo nalobi epai ya bino bazali na bosepeli o misala mya bango mpo ya eleko yoko, moke moke nsuka eyei, mpe bakokatama o nse mpe bakobwakama o kati ya moto, uta wapi bozongi bozali te.

12 Mpo misala mya bango mikolanda bango, mpo ezali na ntina ya misala mya bango ete babukami o nse; yango wana bomikundola makambo maye nalobeli bino.

13 Tala napesaki epai ya bino nsango elamu ya ngai, mpe eye ezali nsango elamu eye napesaki epai ya bino—ete nayaki o kati ya mokili mpo ya kosala bolingi bwa Tata wa ngai, zambi Tata wa ngai atindaki ngai.

14 Mpe Tata wa ngai atindaki ngai ete nakoka kotombolama likolo lya ekulusu; mpe nsima ete etombolamaka ngai likolo lya ekulusu, ete nakoka kobenda bato banso epai ya ngai, ete lokola natombolamaki na bato kutu boye bato batombolama na Tata, mpo ya koteleme liboso lya ngai, mpo ya kosambisama na misala mya bango, soko mizali milamu to soko mizali mibe—

15 Mpe mpo ya ntina eye natombolamaki; yango wana, engebene na nguya ya Tata nakobenda bato banso epai ya ngai, ete bakoka kosambisama engebene na misala mya bango.

16 Mpe ekosalema, ete onso oyo ayamboli mpe abatisami o nkombo ya ngai akotondisama; mpe soko atii molende kina o nsuka, tala, ye nakosimba na bozangi elindo liboso lya Tata wa ngai o mokolo ekoteleme ngai mpo ya kosambisa mokili.

17 Mpe ye oyo atii molende te kina o nsuka, ye kaka azali ye oyo akokatama o nse mpe akobwakama o kati ya moto, uta wapi bakoki kozonga lisusu te, na ntina ya boyengebene bwa Tata.

18 Mpe eye ezali liloba liye apesi epai ya bana ba bato. Mpe mpo ya ntina eye akokisi maloba maye apesaki, mpe akosi te, kasi akokisi maloba manso ma ye.

19 Mpe eloko te ya mbindo ekoki kokota o kati ya bokonzi bwa lola; yango wana eloko te ekoti o bopemi bwa ye longola se soko ezali bango baye basukoli bilamba bya bango o makila ma ngai, na ntina ya bondimi bwa bango, mpe boyamboli bwa masumu manso ma bango, mpe bopotongono bwa bango kina o nsuka.

20 Sikawa eye ezali motindo: Yambolani, bino banso nsuka ya mabele, mpe yakani epai ya ngai, mpe batisamani o nkombo ya ngai, ete bokoka kosantisama na bozwi bwa Molimo Mosantu, ete bokoka koteleme na bozangi mbindo liboso lya ngai o mokolo mwa nsuka.

21 Solo, solo, nalobi epai ya bino, eye ezali nsango elamu ya ngai; mpe boyebi makambo maye bosengeli kosala o eklezia ya ngai; mpo misala miye bomoni nasali, mina bokosala lokola; mpo mina miye bomoni nasali kutu mina miye bokosala.

22 Yango wana, soko bosali makambo maye bopambolami, mpo bokotombolama o mokolo mwa nsuka.

23 Komani makambo manso bomoni mpe boyoki, longola se soko ezali mana maye mapekisami.

24 Komani misala mya bato baye, miye mikozala, kutu lokola ekomami, ena eye ezalaki.

25 Mpo tala, uta o buku iye ikomami, mpe ikokomama, ekosambisama bato baye; mpo na yango ekoyebana misala mya bango epai ya bato.

26 Mpe tala, makambo manso makomami na Tata; yango wana uta o buku iye ikokomama ekosambisama mokili.

27 Mpe yebani ete bokozala basambisi ba bato baye, engebene na bosambisi boye nakopesa epai ya bino, boye bozali boyengebene. Yango wana, lolenge kani ya bato bosengeli kozala? Solo nalobi epai ya bino, kutu lokola nazali.

28 Mpe sikawa nakei epai ya Tata. Mpe solo nalobi epai ya bino, makambo manso bokosenge Tata o nkombo ya ngai, makopesama epai ya bino.

29 Yango wana, sengeni, mpe bokozwa; beteni, ekofungolama epai ya bino; mpo ye oyo asengi, azwi; mpe epai ya ye oyo abeti, ekofungolama.

30 Mpe sikawa, tala, bosepeli bwa ngai bozali bonene, kutu mpo ya litondi, na ntina ya bino, mpe lisusu nkola eye; iyo, mpe kutu Tata asepeli, lokola banzelu basantu banso, na ntina ya bino mpe nkola eye, mpo moko te na bango abungi.

31 Tala, nalingi ete bososola; mpo nalingi koloba bango baye bazali sikawa na bomoi na nkola eye; mpe moko te na bango abungi; mpe na bango nazali na litondi lya bosepeli.

32 Kasi tala, eyoki ngai mawa na ntina ya nkola ya inei uta nkola eye, mpo bakambemi mosika na ye kutu lokola ezalaki mwana mobali wa libomi; mpo bakoteke ngai mpo ya mpauni mpe wolo, mpe mpo ya ena eye mpomboli ekobebisa, mpe bayibi bakoki kobuka na botoboli mpe koyiba. Kasi o mokolo mona nakobimela bango, kutu nakobalola misala mya bangomei likolo lya mito mya bango.

33 Mpe esalemaki ete esukisaka Yesu bolobi boye, alobaki epai ya bayekoli ba ye: Kotani o ekuke eke; mpo eke ezali ekuke, mpe nkaka ezali nzela eye ekambi o bomoi, mpe bake bazali baye bakuti yango; kasi enene ezali ekuke, mpe ya etando ezali nzela eye ekambi o liwa, mpe mingi bazali baye bakei mobembo kuna, kina butu ekomi, wapi moto te akoki kosala.