Makomi
3 Nefi 28


Mokapo 28

Libwa lya Bazomi na Babale bazali na mposa ya mpe balakami lisango o bokonzi bwa Klisto, ekufi bango—Basato ba Banefi bazali na mposa ya mpe bapesami nguya likolo lya liwa kina Yesu ayei lisusu—Babongalami mpe bamoni makambo mazali na ndingisa te mpo ya koloba, mpe bazali sikawa kosalaka o ntei ya bato. Penepene na 34–35 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Mpe esalemaki ete elobaka Yesu maloba maye, mpe alobaki epai ya bayekoli ba ye, moko na moko, kolobaka epai ya bango: Nini ezali eye bozali na mposa na ngai, nsima ete nakei na Tata?

2 Mpe banso balobaki, longola se basato, kolobaka: Tozali na mposa ete esilisi biso kozala na bomoi mpo ya mibu mya moto, ete, mosala mwa biso, na wapi obiangi biso, mokoka kozala na nsuka, ete tokoka noki koya epai ya yo o bokonzi bwa yo.

3 Mpe alobaki epai ya bango: Bopambolami zambi bozali na mposa ya likambo liye na ngai; yango wana, nsima ete bokomi na mibu tuku sambo na mibale bokoya epai ya ngai o bokonzi bwa ngai; mpe elongo na ngai bokokuta bopemi.

4 Mpe elobaka ye epai ya bango, amibalolaki epai ya basato, mpe alobaki epai ya bango: Nini bolingi ete nasala epai ya bino, ekei ngai epai ya Tata?

5 Mpe bayokaki mawa o mitema mya bango, mpo bakokaki te koloba epai ya ye likambo liye bazalaki na yango mposa.

6 Mpe alobaki epai ya bango: Tala, nayebi makanisi ma bino; mpe bozali na mposa ya likambo liye Yoane, molingami wa ngai, oyo azalaki elongo na ngai o mosala mya ngai, yambo ete natombolamaki na Bayuda, azalaki na mposa na ngai.

7 Yango wana, bopambolami koleka, mpo bino bokomeka liwa mokolo moko te; kasi bokozala na bomoi mpo ya komono misala mya Tata epai ya bana ba bato, kutu kina makambo manso makokokisama, engebene na bolingi bwa Tata, ekoya ngai o nkembo ya ngai na nguya ya lola.

8 Mpe bokoyoka te bolozi bwa liwa, kasi ekoya ngai o nkembo ya ngai, bokobongolama na bofini boko bwa liso, uta bokufi o bozangi bokufi, mpe nde bokopambolama o bokonzi bwa Tata wa ngai.

9 Mpe lisusu, bokozala na bolozi te ntango ekofanda bino o mosuni, mpe bokoyoka mawa te, longola se soko ezali mpo ya masumu ma mokili; mpe enso eye nakosala na ntina ya likambo liye bozali na mposa na ngai, mpo bozali na mposa ete bomeme bozo bwa bato epai ya ngai ntango ekoteme mokili.

10 Mpe mpo ya ntina eye bokozala na litondi lya bosepeli mingi; mpe bokofanda o bokonzi bwa Tata wa ngai; iyo, bosepeli bwa bino bokozala botonda, kutu lokola Tata apesi ngai litondi lya bosepeli; mpe bokozala kutu lokola nazali, mpe nazali kutu lokola Tata, mpe Tata mpe ngai tozali moko.

11 Mpe Molimo Mosantu apesi litatoli lya Tata mpe ngai; mpe Tata apesi Molimo Mosantu epai ya bana ba bato, na ntina ya ngai.

12 Mpe esalemaki ete elobaka Yesu maloba maye, asimbaki moko na moko ya bango na mosapi mwa ye, longola se soko ezali basato, baye basengelaki kotikala, mpe nde akendeki.

13 Mpe tala, lola lifungwanaki, mpe bakamatamaki likolo o kati ya lola, mpe bamonoki mpe bayokaki makambo makolobamaka te.

14 Mpe epekisamaki bango ete baloba; mpe epesamaki te epai ya bango nguya ete bakoka koloba makambo maye bamonoki mpe bayokaki.

15 Mpe soko bazalaki o nzoto to libanda lya nzoto, bakokaki te kolobela; mpo emononoki epai ya bango bo bobongolami boko bwa bango, ete babongwamaki uta nzoto ya mosuni o kati ya bozali boko bozanga kufa, ete bakokaki komono makambo ma Nzambe.

16 Kasi esalemaki ete basalaki likolo lya etando ya mabele; nzokande basalaki te na makambo maye bamonoko mpe bayokaka, engebene na mibeko bazwaki o lola.

17 Mpe sikawa, soko bazalaki bato ba kufa to bazanga kufa, uta mokolo mwa bobongolami bwa bango, nayebi te.

18 Kasi eye mingi nayebi, engebene na likundoli liye lipesami—bakendeki likolo lya etando ya mboka, basalaki epai ya bato banso, kosalaka bomoko na eklezia mingi lokola bandimaki liteya lya bango; kobatisaka bango, mpe mingi lokola babatisamaki, bazwaki Molimo Mosantu.

19 Mpe babwakamaki o kati ya boloko na bato baye bazalaki te ba eklezia. Kasi boloko bokokaki te kokanga bango, mpo bopasukaki na biteni bibale.

20 Mpe babwakamaki o kati ya mabele; kasi babeteki mabele na liloba lya Nzambe, mpenza ete na nguya ya ye babikisamaki libanda lya bozindo bwa mabele; mpe yango wana bakokaki te kotimola mabulu ma bozindo bokoka mpo ya kosimba bango.

21 Mpe mbala isato babwakamaki o etumbele yoko, mpe bazwaki mpasi te.

22 Mpe mbala ibale babwakamaki o kati ya mabulu ma niama ya zamba, mpe tala basakanaki elongo na niama lokola mwana moko elongo na mwana moko ya mpate akomeleke; mpe bazwaki mpasi te.

23 Mpe esalemaki ete bakendeki o ntei ya bato banso ba Nefi, mpe bateyaka nsango elamu ya Klisto epai ya bato banso likolo lya etando ya mboka; mpe babongwanaki epai ya Nkolo, mpe basalaki bomoko epai ya eklezia ya Klisto; mpe boye, bato ba nkola ena bapambolamaki, engebene na liloba lya Yesu.

24 Mpe sikawa, ngai, Molomoni, nasali nsuka yoko ya kolobaka etali makambo maye mpo ya ntango yoko.

25 Tala, nazalaki mpembeni ya kokoma nkombo ya bango baye bakomeka te liwa, kasi Nkolo apekisaki; yango wana nakomi yango te, mpo ibombami na mokili.

26 Kasi tala, ngai namoni bango, mpe basali epai ya ngai.

27 Mpe tala, bakozala o ntei ya Bapaganu, kasi Bapaganu bakoyeba bango te.

28 Bakozala lokola o ntei ya Bayuda, kasi Bayuda bakoyeba bango te.

29 Mpe ekosalema, ekomono Nkolo elongobani na bwania bwa ye ete basala epai ya mabota mapalanganisama ma Yisalaele, mpe epai ya bikolo, mabota, minoko mpe bato banso, mpe bakomeme libanda lya bango epai ya Yesu bozo mingi, ete mposa ya bango ekokisama, mpe lisusu na ntina ya nguya ya bondimisi bwa Nzambe eye ezali na bango.

30 Mpe bazali lokola banzelu ba Nzambe, mpe soko bakosambela epai ya Nzambe o nkombo ya Yesu, bakoki komilakisa epai ya moto kani ekomono bango bolamu.

31 Yango wana, misala minene mpe mya bokamwi mikosalema na bango, yambo ya mokolo monene mpe mokoya ntango esengeli bato banso koteleme liboso lya kiti ya bosambisi ya Klisto;

32 Iyo, kutu o ntei ya Bapaganu, ekosalema mosala monene mpe mwa bokamwi na bango, yambo ya mokolo mona mwa bosambisi.

33 Mpe soko bozalaka na nkoma inso iye ipesi nsango ya misala minso mya bokamwi mya Klisto, bolingaki koyeba, engebene na maloba ma Klisto, ete makambo maye na ntembe te masengeli koya.

34 Mpe lisuma ezala epai ya ye oyo akoyokemela te epai ya maloba ma Yesu, mpe lokola na bango baye aponoki mpe atindaki o ntei ya bango; mpo onso oyo ayambi te maloba ma Yesu mpe maloba ma bango baye atindaki, ayambi ye te, yango wana akoyamba bango te o mokolo mwa nsuka.

35 Mpe elingaka koleka bolamu mpo ya bango soko babotamaka te. Mpo ebanzi bino ete bokoki kobakola boyengebene bwa Nzambe moko atumolami, oyo aniatamaki o nse ya makolo ma bato, ete na ye lobiko lokoka koya.

36 Mpe sikawa, lokola nalobaki etali bango baye Nkolo aponi, kutu basato baye bakamatamaki likolo o kati ya lola, ete nayebaki te soko bapelolamaki uta bokufi o bozangi bokufi—

37 Kasi tala, uta nakomaki, natunaki na Nkolo, mpe asali emonisama epai ya ngai ete esengeli mpenza bobongwani boko bosalema likolo lya nzoto ya bango, to soko te esengeli ezala ete basengelaki komeka liwa.

38 Yango wana, ete bakoka te komeka liwa, esalemaki bobongwani boko likolo lya nzoto ya bango, ete bakoka koyoka mpasi ya bolozi te, to mawa te, longola se soko ezali mpo ya masumu ma mokili.

39 Sikawa bobongwani boye bozali lolenge loko te na bona boye bokozala o mokolo mwa nsuka; kasi esalemaki bobongwani likolo lya bango, mpenza ete Satana akokaki te kozala na nguya likolo lya bango, ete akokaki te kosenginia bango; mpe basantisamaki o mosuni, ete bakomaki basantu, mpe ete nguya ya mokili ekoki te kosimba bango.

40 Mpe o bozali boye basengelaki kotikala kina o mokolo mwa bosambisi bwa Klisto; o mokolo mona, basengelaki kozwa bobongwani boko bonene, mpe koyambama o kati ya bokonzi bwa Tata mpo ya kokende libanda lisusu te, kasi kowumela elongo na Nzambe seko o lola.