Makomi
3 Nefi 9


Mokapo 9

O kati ya molili, mongongo mwa Klisto mosakoli bobebisami bwa bato mpe bingumba mingi mpo ya nkuna ya bango—Asakoli bonzambe bwa ye lokola, ayebisi ete mobeko mwa Mose mokokisami, mpe abiangi bato mpo ya koya epai ya ye mpe kobikisama. Penepene na 34 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Mpe esalemaki ete eyokanaki mongongo moko o ntei bafandi ba mabele, likolo lya etando mobimba ya mboka eye, kobelelaka:

2 Lisuma, lisuma, lisuma epai bato baye; lisuma epai ya bafandi ba mabele mobimba longola se soko ba koyambola; mpo zabulu aseki mpe banzelu ba ye basepeli, na ntina ya bobomi bwa bana babali mpe bana basi kitoko ba bato ba ngai; mpe ezali na ntina ya bobe mpe bonsomo bwa bango ete bakweyi.

3 Tala, engumba ena enene Zalayemila natumbi na moto, mpe bafandi ba yango.

4 Mpe tala, mboka ena enene Moloni esali ngai kezindisa o bozindo bwa mbu, mpe bafandi ba yango bazindisami lokola.

5 Mpe tala, engumba ena enene Moloniya nazipi na mabele, mpe bafandi ba yango, mpo ya kobomba mabe mpe bonsomo bwa bango uta o liboso lya elongi ya ngai, ete makila ma baprofeta mpe ma basantu mamata lisusu te epai ya ngai likolo lya bango.

6 Mpe tala, engumba ya Giligali nasali ezindisama, mpe bafandi ba yango mpo ya kokundama o bozindo bwa mabele;

7 Iyo, mpe engumba ya Oniya mpe bafandi ba yango, mpe engumba ya Mokumi mpe bafandi ba yango, mpe engumba ya Yelusaleme mpe bafandi ba yango; mpe mai nasali mamata o bisika bya byango, mpo ya kobomba nkuna mpe bonsomo bwa bango uta o liboso lya elengi ya ngai, ete makila ma baprofeta mpe basantu mamata lisusu te epai ya ngai likolo lya bango.

8 Mpe tala, engumba ya Gadiandi, mpe engumba ya Gadiomina mpe engumba ya Yakobo, mpe engumba ya Gimigimino, biye binso nasali bizindisama mpe nasali ngomba mpe lobwaku o bisika bya byango; mpe bafandi ba byango nakundi o bozindo bwa mabele, mpo ya kobomba nkuna mpe bonsomo bwa bango uta o liboso lya elongi ya ngai, ete makila ma baprofeta mpe basantu mamata lisusu te epai ya ngai likolo lya bango.

9 Mpe tala, engumba ena enene Yakobugati, eye ezalaki na bafandi ba mokonzi Yakobo, nasali etumbama na moto na ntina ya masumu mpe nkuna ya bango, eye ezalaki likolo lya nkuna ya mabele mobimba, na ntina ya bobomi mpe makelemba ma nkuku ma bango; mpo ezalaki bango baye babebisaki kimia ya bato ba ngai na boyangeli bwa mboka; yango wana nasali bango batumbama, mpo ya kobebisa bango uta o liboso lya elongi ya ngai, ete makila ma baprofeta mpe basantu mamata epai ya ngai lisusu te likolo lya bango.

10 Mpe tala, engumba ya Lamani, mpe engumba ya Yosi, mpe engumba ya Gada mpe engumba ya Kisikumeni, nasali bitumbama na moto, mpe bafandi ba byango, na ntina ya nkuna ya bango na kobwakaka baprofeta libanda, mpe kobambaka mabanga bango baye natindaki mpo ya kosakola epai ya bango etali nkuna mpe bonsomo bwa bango.

11 Mpe zambi babwakaki bango banso libanda, ete ezalaki mosembo te o ntei ya bango, natindaki o nse moto mpe nabebisaki bango, ete nkuna mpe bonsomo bwa bango bokoka kobombama uta o liboso lya elongi ya ngai, ete makila ma baprofeta mpe ma basantu baye natindaki o ntei ya bango makoka kobelela epai ya ngai te uta o mabele likolo lya bango.

12 Mpe mabebisami mingi nasali maya likolo lya mboka eye mpe likolo lya bato baye, na ntina ya nkuna ya bango mpe bonsomo bwa bango.

13 O bino banso bobikisami zambi bozalaki sembo koleka bango, sikawa ekozonga binote epai ya ngai mpe ekoyambola bino te masumu ma bino, mpe ekobongwana bino te, ete nakoka kobikisa bino?

14 Iyo, solo nalobi epai ya bino, soko bokoya epai ya ngai bokozwa bomoi bwa seko. Tala, loboko la ngai la ngolu lotandolami ona bino, mpe onso oyo akoya, nakoyamba ye; mpe bapambolami bango baye bakoya epai ya ngai.

15 Tala, nazali Yesu Klisto Mwana Mobali wa Nzambe. Nakelaki lola mpe mabele, mpe biloko binso biye bizali o kati ya yango. Nazalaki elongo na Tata uta o ebandeli. Nazali na Tata, mpe Tata azali na ngai; mpe na ngai Tata akembeli nkombo ya ye.

16 Nayaki epai ya ba ngaimei, ba ngaimei bayambaki ngai te. Mpe nkoma itali boyei bwa ngai ikokisami.

17 Mpe mingi lokola bayambi ngai, na bango napesi nguya ya kokoma bana babali ba Nzambe; mpe kutu boye elingi ngai na mingi lokola bakondima likolo lya nkombo ya ngai, mpo tala, na ngai bosikoli boyei, mpe na ngai mobeko mwa Mose mokokisami.

18 Nazali mwinda mpe bomoi bwa mokili. Nazali Alifa mpe Omega, ebandeli mpe nsuka.

19 Mpe bokobonza epai ya ngai lisusu te bosopi makila; iyo, mbeka ya bino mpe mabonza matumbama makolongwa, mpo nakondima yoko te ya mbeka ya bino mpe mabonza ma bino matumbama.

20 Mpe bokobonza mpo ya mbeka yoko epai ya ngai motema moko mobukana mpe molimo moko mwa mawa. Mpe oyo akoya epai ya ngai na motema moko mobukana mpe molimo moko mwa mawa, ye nakobatisa na moto mpe na Molimo Mosantu, kutu lokola Balamani, na ntina ya bondimi bwa bango na ngai o ntango ya mbongwana ya bango, babatisamaki na moto mpe na Molimo Mosantu, mpe bayebaki yango te.

21 Tala, nayei epai ya mokili mpo ya komeme bosikoli bwa mokili, mpo ya kobikisa mokili uta o masumu.

22 Yango wana, onso oyo ayamboli mpe ayei epai ya ngai lokola mwana moke, ye nakoyamba, mpo ya oyo wa lolenge loye ezali bokonzi bwa Nzambe. Mpo tala, mpo ya oyo wa lolenge loye nalalisi o nse bomoi bwa ngai mpe nakamati bwango lisusu; yango wana, yambolani mpe yakani epai ya ngai nsuka ya mabele mpe bobikisama.