Makomi
Alama 14


Mokapo 14

Alama mpe Amuleki bakangemi o boloko mpe babetemi—Bandimi mpe nkoma isantu ya bango itumbami na moto—Bamartiru baye bayambami na Nkolo o nkembo—Bifelo bya boloko bipasuki mpe bikwei—Alama mpe Amuleki babikisami mpe baniokoli ba bango babomami. Penepene na 82–81 Yambo ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete esilisaka ye kotia nsuka yoko ya kolobakaka epai ya bato mingi ya bango bandimaki likolo lya maloba ma ye, mpe babandaki koyambola, mpe koluka nkoma.

2 Kasi eteni eleki mingi ya bango bazalaki na mposa ya kobebisa Alama mpe Amuleki; mpo bazalaki na nkanda na Alama, na ntina ya polele ya maloba ma ye epai ya Zezilomi; mpe balobaki lisusu ete Amuleki akosaka epai ya bango, mpe atiolaki mobeko mwa bango mpe lisusu basambi mpe basambisi ba bango.

3 Mpe bazalaki lisusu na nkanda na Alama mpe Amuleki; mpe zambi batatolaki polele boye mpo ya nkuna ya bango, balukaki kotia bango libanda na kobombama.

4 Kasi esalemaki ete basalaki yango te; kasi bakamataki bango mpe bakangaki bango na nsinga ikasi, mpe bakamataki bango liboso lya mosambisi mokonzi wa mboka.

5 Mpe bato bakendeki mpe batatolaki likolo lya bango—kotatolaka ete batiolaki mobeko, mpe basambi mpe basambisi ba mboka, mpe lisusu bato banso baye bazalaki o mboka; mpe batatolaki lisusu ete balobaki ete ezali se Nzambe moko, mpe akotinda Mwana Mobali wa ye o ntei ya bato, kasi akobikisa bango te; mpe makambo mingi ma lolenge loye etatolaki bato likolo lya Alama mpe Amuleki. Sikawa eye esalemaki liboso lya mosambisi mokonzi wa mboka.

6 Mpe esalemaki ete Zezilomi akamwaki o maloba maye malobamaka na bato; mpe ayebaki etali lolanda la mayele ma ye, loye asalaka o ntei ya bato na maloba ma ye ma lokuta; mpe bozo bwa ye bobandaki kopasolama o nse ya makanisi ma elindo ya yemei; iyo, abandaki kozingama penepene na bolozi bwa limfelo.

7 Mpe esalemaki ete Zezilomi abandaki kobelela epai ya bato, kolobaka: Tala, nazali na elindo, mpe bato baye bazali na mbindo te liboso lya Nzambe. Mpe abandaki kosamba mpo ya bango uta o ntango ena; kasi bato batiolaki ye, kolobaka: Ezwami yo lokola na zabulu? Mpe babwakaki nsoi likolo lya ye, mpe babwakaki ye libanda uta o ntei ya bango, mpe lisusu bango banso baye bandimaki o maloba maye malobamaki na Alama mpe Amuleki; mpe babwakaki bango libanda, mpe batindaki bato mpo ya kobwaka mabanga na bango.

8 Mpe bamemeki basi mpe bana ba bango elongo, mpe banso baye bandimaki to balakisamaki mpo ya kondima o liloba lya Nzambe basalaki ete babwakama o kati ya moto; mpe lisusu bamemeki makundoli ma bango maye makwaki nkoma isantu, mpe babwakaki yango o kati ya moto lokola, ete makoka kozika mpe kobebisama na moto.

9 Mpe esalemaki ete bakamataki Alama mpe Amuleki, mpe bamemeki bango o esika ya bomartiru, ete bakoka kotatola bobebisami bwa bango baye bazikaki nie na moto.

10 Mpe emonoki Amuleki bolozi bwa basi mpe bana baye bazikaki nie o moto, ye lokola ayokaki bolozi; mpe alobaki epai ya Alama: Boniboni tokoki kozala banzeneneke na likambo liye lya nsomo? Yango wana tika totandola maboko ma biso, mpe tosalela nguya ya Nzambe eye ezali na biso, mpe tobikisa bango uta o moto.

11 Kasi Alama alobaki epai ya ye: Molimo asengisi ngai ete nasengeli te kotandola loboko la ngai; mpo tala, Nkolo yemei ayambi bango epai ya ye, o nkembo; mpe atiki ete bakoka kosala likambo liye, to ete bato bakoka kosala likambo liye epai ya bango, engebene na bokasi bwa mitema mya bango, ete masambisi maye akosala likolo lya bango o nkele ya ye makoka koyengebene; mpe makila ma bazangi elindo mateleme lokola litatoli lyoko likolo lya bango, iyo, mpe ekobelela makasi likolo lya bango o mokolo mwa nsuka.

12 Sikawa Amuleki alobaki epai ya Alama: Tala, mbele bakotumba biso lokola.

13 Mpe Alama alobaki: Tika ezala engebene na bolingi bwa Nkolo. Kasi, tala, mosala mwa biso mosili te; yango wana bakotumba biso te.

14 Sikawa esalemaki ete ezikaka nie nzoto ya bango baye babwakamaka o kati ya moto, mpe lisusu makundoli maye mabwakamaki elongo na bango, mosambisi mokonzi wa mboka ayaki mpe atelemeki liboso lya Alama mpe Amuleki, lokola bakangemaki; mpe abeteki bango na loboko la ye o matama ma bango, mpe alobaki epai ya bango: Nsima ya nini bomoni, ekoteya bino lisusu epai ya bato baye, ete bakobwakama o kati ya liziba lya moto mpe libanga lya fofolo?

15 Tala, bomoni ete bozalaki te na nguya ya kobikisa bango baye babwakamaki o kati ya moto; mpe Nzambe abikisi bango te zambi bazalaki ba bondimi bwa bino. Mpe mosambisi abeteki bango lisusu o matama ma bango, mpe atunaki: Nini elobi bino mpo ya binomei?

16 Sikawa mosambisi oyo azalaki nsima ya molongo mpe bondimi bwa Newolo, oyo abomaki Gideona.

17 Mpe esalemaki ete Alama mpe Amuleki bayanolaki ye eloko te; mpe abeteki bango lisusu, mpe apesaki bango na bapolisi mpo ya kobwakama o kati ya boloko.

18 Mpe ebwakamaka bango o kati ya boloko mikolo misato, eyaki basambi, mpe basambisi, mpe banganga, mpe balakisi mingi, baye bazalaki ba mosala mwa Newolo; mpe bayaki epai ya boloko kotala bango; mpe batunaki bango etali maloba mingi; kasi bayanolaki bango eloko te.

19 Mpe esalemaki ete mosambisi atelemeki liboso lya bango, mpe alobaki: Ntina nini boyanoli te maloba ma bato baye? Eyebi bino te ete nazali na nguya ya kobwaka bino epai ya moto? Mpe atindaki bango koloba; kasi bayanolaki eloko te.

20 Mpe esalemaki ete balongwaki mpe bakendeki nzela ya bango, kasi bayaki lisusu o mokolo mwa nsima; mpe mosambisi abeteki bango lisusu o matama ma bango. Mpe bato mingi bayaki kobete lokola, mpe babeteki bango, kolobaka: Ekoteleme bino lisusu mpe ekosambisa bino bato baye, mpe ekokitisa bino motindo mwa biso? Soko bozali na nguya monene ya lolenge loye ntina nini ekoki bino komibikisa te?

21 Mpe makambo mingi ma lolenge loye balobaki epai ya bango, kokeketiniaka mino mya bango, mpe kobwakaka nsoi epai ya bango, mpe kolobaka: boniboni ekozala biso ntango tokotumbolama?

22 Mpe makambo mingi ma lolenge loye, iyo, makambo manso ma lolenge loye balobaki epai ya bango; mpe boye basekeki bango mpo ya mikolo mingi. Mpe balongolaki bilei uta na bango ete bakoka kozala na nzala, mpe mai ete bakoka kozala na mposa ya mai; mpe bakamataki uta na bango bilamba bya bango ete bazala bolumbu; mpe boye bakangemaki na nsinga ikasi, mpe bakangemaki o boloko.

23 Mpe esalemaki ete esilaki bango koyoka mpasi mpo ya mikolo mingi, (mpe ezalaki o mokolo mwa zomi na mibale, o sanza ya zomi, o mobu mwa zomi mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi) ete mosambisi mokonzi likolo mboka ya Amoniya mpe mingi ya balakisi ba bango mpe basambi ba bango bakotaki epai ya boloko wapi Alama mpe Amuleki bakangemaki na nsinga.

24 Mpe mosambisi mokonzi atelemeki liboso lya bango, mpe abeteki bango lisusu, mpe alobaki epai ya bango: Soko bozali na nguya ya Nzambe bomibikisa uta o nkanga iye, mpe nde tokondima ete Nkolo akobebisa bato baye engebene na maloba ma bino.

25 Mpe esalemaki ete bango banso bakendeki mpe babeteki bango, kolobaka maloba mana kaka, kutu kina wa nsuka; mpe elobaki wa nsuka epai ya bango nguya ya Nzambe ezalaki likolo lya Alama mpe Amuleki, mpe batelemeki likolo lya makolo ma bango.

26 Mpe Alama agangaki, kolobaka: Bolai kani ekoyoka biso mpasi ya matungisi manene ma lolenge loye, O Nkolo? O Nkolo, pesa biso makasi engebene na bondimi bwa biso boye bozali na Klisto, kutu mpo ya lobiko. Mpe bakataki nsinga o yango bakangemaki; mpe emonoki bato eye, babandaki kokima, mpo bobangi bwa bobebisami boyaka likolo lya bango.

27 Mpe esalemaki ete enene boye ezalaki bobangi bwa bango ete bakweyaki o mabele, mpe bazwaki te ekuke ya libanda lya boloko; mpe mabele maninganaki na bokasi, mpe bifelo bya boloko bibukanaki na ibale, boye ete bikweyaki o mabele; mpe mosambisi mokonzi, mpe basambi, mpe banganga, mpe balakisi, baye babeteki Alama mpe Amuleki babomamaki na bokwei bwa byango.

28 Mpe Alama mpe Amuleki babimaki uta o boloko, mpe bazwaki mpasi te; mpo Nkolo apesaka nguya epai ya bango, engebene na bondimi bwa bango na Klisto. Mpe babimaki mbala yoko uta o boloko; mpe bakangolamaki uta o nkanga ya bango; mpe boloko bokweyaka o mabele, mpe bato banso o bifelo bwa bwango, longola se Alama mpe Amuleki, babomamaki, mpe na mbala yoko bayaki o engumba.

29 Sikawa bato koyokaka makelele moko manene bayaki kokimaka elongo ebele mpo ya koyeba ntina ya mango; mpe emonoki bango Alama mpe Amuleki koyaka libanda lya boloko, mpe bifelo bya bwango bikweyaki o mabele, bazwaki bobangi bonene, mpe bakimaki uta o miso mya Alama mpe Amuleki lokola ntaba yoko akima elongo na elenge ya ye uta na nkoyi ibale; mpe boye bakimaki uta o miso mya Alama mpe Amuleki.