Makomi
Alama 17


Nsango ya bana babali ba Moziya, baye babwakaki makoki ma bango o bokonzi mpo ya liloba lya Nzambe, mpe bakendeki o mboka ya Nefi mpo ya koteya na Balamani; mpasi ya bango mpe libiki lya bango—engebene na makundoli ma Alama.

Kokwaka mikapo 17 o 27 eye o kati.

Mokapo 17

Bana babali ba Moziya bazali na molimo mwa bobikuli mpe bobimisi—Bakei nzela ya bango ya ikeseni mpo ya kosakola liloba epai ya Balamani—Amona akei o mboka ya Yisamaele mpe akomi mosali wa mokonzi Lamoni—Amona abikisi bitonga bya mokonzi mpe abomi bayini ba ye o mai ma Sebu. Nzela ya 1–3, penepene na 77 Yambo ya Klisto; nzela 4, penepene na 91–77 Yambo ya Klisto; mpe nzela 5–39, penepene na 91 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete lokola ezalaki Alama kokendeke mobembo uta o mboka ya Gideona epai ya sudi, mosika na mboka ya Mati, tala, o bokamwi bwa ye, akutanaki na bana babali ba Moziya, kokendeke o mobembo ona mboka ya Zalayemila.

2 Sikawa bana babali ba Moziya bazalaki elongo na Alama o ntango anzelu abimaki epai ya ye na mbala ya yambo; yango wana Alama asepelaki mpenza mpo ya komono bandeko ba ye; mpe nini ebakisaki mingi o bosepeli bwa ye, bazalaki kaka bandeko ba ye na Nkolo; iyo, mpe bakolaki makasi o boyebi bwa bosolo; mpo bazalaki bato ba bososoli bolamu mpe balukaki nkoma na etingia, ete bakoka koyeba liloba lya Nzambe.

3 Kasi eye ezali enso te; bamipesaki o losambo, mpe bokili boike; yango wana na molimo mwa bobikuli, mpe na molimo mwa bobimisi, mpe elakisaki bango, balakisaki na nguya mpe na bokulaka bwa Nzambe.

4 Mpe balakisaka liloba lya Nzambe mpo ya ntaka ya mibu zomi na minei o ntei ya Balamani, kozalaka na elonga nzike na komemeke mingi o boyebi bwa bosolo; iyo, na nguya ya maloba ma bango mingi bamememeki liboso lya lotale la Nzambe, mpo ya kobianga likolo lya nkombo ya ye mpe kotubela masumu ma bango liboso lya ye.

5 Sikawa iye izali bizaleli biye bilandaki bango o mibembo mya bango, mpo bazalaki na matungisi mingi; bayokaki mpasi nzike, o nzoto mpe o makanisi, lokola nzala, mposa ya mai mpe bolembi, mpe lisusu misala nzike o molimo.

6 Sikawa, iye izalaki mibembo mya bango: kotikaka tata wa bango, Moziya, o mobu mwa yambo mwa basambisi; koboyaka bokonzi boye tata wa bango azalaki na mposa ya kopesa likolo lya bango, mpe lisusu eye ezalaki makanisi ma bato;

7 Nzokande bakendeki libanda lya mboka ya Zalayemila, mpe bakamataki mipanga mya bango, mpe makonga ma bango, mpe matimbo ma bango, mpe makula ma bango, mpe bilingongo bya bango; mpe eye basalaki ete bakoka kopesa bilei mpo ya bangomei o esobe.

8 Mpe boye bakendeki o kati ya esobe elongo na motango mwa bango moye baponoki, mpo ya kokende o mboka ya Nefi, mpo ya koteya liloba lya Nzambe epai ya Balamani.

9 Mpe esalemaki ete bakendeki mobembo mikolo mingi o esobe, mpe bakilaki nzike mpe basambelaki nzike ete Nkolo apesa epai ya bango ndambo yoko ya Molimo mwa ye mpo ya kokende elongo na bango, mpe atikala elongo na bango, ete bakoka kozala esalele yoko o maboko ma Nzambe mpo ya komeme, soko ekokaki kosalema, bandeko ba bango, Balamani, o boyebi bwa bosolo, o boyebi bwa bosenzi bwa mimeseno mya batata ba bango, miye milongobanaki te.

10 Mpe esalemaki ete Nkolo abimelaki bango na Molimo mwa ye, mpe alobaki epai ya bango: Bondisamani. Mpe babondisamaki.

11 Mpe Nkolo alobaki epai ya bango lisusu: Kendeni o ntei ya Balamani, bandeko ba bino, mpe tiani liloba lya ngai; kasi bokozala bampikiliki o motema molai mpe matungisi, ete bokoka kolakisa ndakisa ilamu epai ya bango na ngai, mpe nakosala esalele yoko na bino o maboko ma ngai mpo ya lobiko la bozo mingi.

12 Mpe esalemaki ete mitema mya bana babali ba Moziya, mpe lisusu bango baye bazalaki elongo na bango, bazwaki mpiko epai ya Balamani mpo ya kosakola epai ya bango liloba lya Nzambe.

13 Mpe esalemaki ete ekomaka bango o ndelo ya mboka ya Balamani, ete bakabwanaki, mpe bakendeki moto mosika na mosusu, kolikiaka na Nkolo ete bakokutana lisusu o bokangi bwa bango bwa bobuki mbuma; mpo babanzaki ete enene ezalaki mosala moye babandaka.

14 Mpe solo ezalaki enene, mpo babandaka koteya liloba lya Nzambe na bato boko ba nkei mpe ba mitema mikasi mpe ba loma; bato boko basepelaki na kobomaka Banefi, mpe koyongolo o mpe kowembeke bango; mpe mitema mya bango mikangemaki likolo lya bozwi, to likolo lya wolo mpe mpauni, mpe mabanga ma ntalo; kasi bazalaki koluka kozwa biloko biye na kobomaka mpe kowembeke, ete bakoka te kosala mpo ya byango na maboko ma bangomei.

15 Boye bazalaki bato boko ba goigoi, mingi ya baye basambelaki bikeko, mpe botutu bwa Nzambe bokweyaki likolo lya bango na ntina ya mimeseno mya batata ba bango; ata bilako bya Nkolo bininolamaki ona bango likolo lya masengeli ma boyamboli.

16 Yango wana, eye ezalaki ntina mpo ya yango bana babali ba Moziya babandaki mosala, ete mbele bakoka komeme bango ona boyamboli; ete mbele bakoka komeme bango na koyeba mwango mwa bosikoli.

17 Yango wana bakabwanaki moko na mosusu, mpe bakendeki o ntei ya bango, moto na moto ye moko, engebene na liloba mpe nguya ya Nzambe eye epesamaki epai ya ye.

18 Sikawa Amona kozalaka mokonzi o ntei ya bango, to kutu asalaki epai ya bango, mpe alongwaki uta na bango, nsima ya kopambolaka bango engebene na bisika mingi bya bango, kokabaka liloba lya Nzambe epai ya bango, to kosalaka epai ya bango yambo ya bolongwi bwa ye; mpe boye basalaki mibembo mingi o mboka.

19 Mpe Amona akendeki o mboka ya Yisamaele, mboka ebiangemaki nsima ya nkombo ya bana babali ba Yisamaele, baye lokola bakomaki Balamani.

20 Mpe lokola Amona akotaki o mboka ya Yisamaele, Balamani bakamataki ye mpe bakangaki ye, lokola ezalaki momeseno mpo ya kokanga Banefi banso baye bakweyaki o kati ya maboko ma bango, mpe komeme bango liboso lya mokonzi; mpe boye etikalaki na elengi ya mokonzi koboma bango, to kobwaka bango o kati ya boloko, to kobwaka bango libanda lya mboka ya ye, engebene na bolingi mpe elengi ya ye.

21 Mpe boye Amona amememeki liboso lya mokonzi oyo azalaki likolo lya mboka ya Yisamaele; mpe nkombo ya ye ezalaki Lamoni; mpe azalaki eboto yoko ya Yisamaele.

22 Mpe mokonzi atunaki na Amona soko azalaki na mposa ya ye kofanda o mboka o ntei ya Balamani, to o ntei ya bato ba ye.

23 Mpe Amona alobaki epai ya ye: Iyo, nazali na mposa ya kofanda o ntei ya bato baye mpo ya ntango yoko; iyo, mpe mbele kina o mokolo nakufi.

24 Mpe esalemaki ete mokonzi Lamoni azalaki na bosepeli boika na Amona, mpe asalaki ete nkanga ya ye ikangolama; mpe alingaki ete Amona akamata moko wa bana basi ba ye o bolongani.

25 Kasi Amona alobaki epai ya ye: Te, kasi nakozala mosali wa yo. Yango wana Amona akomaki mosali moko wa mokonzi Lamoni. Mpe esalemaki ete atiamaki elongo na basali basusu mpo ya kokenge bitonga bya Lamoni, engebene na momeseno mwa Balamani.

26 Mpe esilaka ye kozala o bosali bwa mokonzi mikolo misato, lokola azalaki elongo na basali ba Balamani kokendeke na bitonga bya bango i esika ya mai, maye mabiangemaki mai ma Sebu, mpe Balamani banso bakambaki bitonga bya bango kuna, ete bakoka kozwa mai—

27 Yango wana, lokola Amona mpe basali basusu ba mokonzi bazalaki kokambaka bitonga bya bango o esika ya mai, tala, yoko motango mwa Balamani, baye bazalaka na bitonga bya bango o mai, batelemeki mpe bapalanganisaki bitonga bya Amona mpe basali ba mokonzi, mpe bapalanganisaki bango mpenza ete basusu bakimaki nzela mingi.

28 Sikawa basali ba mokonzi babandaki koyimayima, kolobaka: Sikawa mokonzi akoboma biso, lokola asalaki bandeko ba biso zambi bitonga bya bango bipalanganaki mpo ya nkuna ya bato baye. Mpe babandaki kolela mpenza, kolobaka: Tala, bitonga bya biso bipalanganisami kala.

29 Sikawa balelaki na ntina ya bobangi bwa bobomi bwa bango. Sikawa emonoko Amona eye motema mwa ye movimbaki o kati ya ye na bosepeli; mpo, alobaki, nakolakisa nguya ya ngai epai ya baninga ba ngai basali, to nguya eye ezali na ngai, na kozongisaka bitonga biye epai ya mokonzi, ete nakoka kolonga mitema mya baninga ba ngai basali, ete nakoka kokamba bango na kondima o maloba ma ngai.

30 Mpe sikawa, iye izalaki makanisi ma Amona, emonoki ye matungisi ma bango baye abiangaki bandeko ba ye.

31 Mpe esalemaki ete aleteke bango na maloba ma ye, kolobaka: Bandeko ba ngai, zalani na bosepeli mpenza mpe tokende koluka bitonga, mpe tokosangisa byango elongo mpe tokomeme byango lisusu epai ya mai; mpe boye tokobatela bitonga bya mokonzi mpe akoboma biso te.

32 Mpe esalemaki ete bakendeki koluka bitonga, mpe balandaki Amona, mpe bawelisaki na lombangu nzike mpe bakendeki o boso bwa bitonga bya mokonzi, mpe basangisaki byango elongo lisusu o esika ya mai.

33 Mpe bato bana lisusu batelemeki mpo ya kopalanganisa bitonga bya bango; kasi Amona alobaki epai ya bandeko ba ye: Zingani bitonga zingazinga mpembeni ete bikima te; mpe nakei mpe nakowela na bato baye bapalanganisi bitonga bya biso.

34 Yango wana, basalaki lokola Amona atindaki bango, mpe akendeki mpe atelemeki mpo ya kowela na bango baye batelemeki mpembeni ya mai ma Sebu; mpe bazalaki o motango moke te.

35 Yango wana babangaki Amona te, mpo babanzaki ete moko wa bato ba bango akokaki koboma ye engebene na elengi ya ye, mpo bayebaki te ete Nkolo alakaki Moziya ete akobikisa bana babali ba ye libanda lya maboko ma bango; mpe bayebaki eloko te etali Nkolo; yango wana basepelaki o bobebisami bwa bandeko ba bango; mpe mpo ya ntina eye batelemeki mpo ya kopalanganisa bitonga bya mokonzi.

36 Kasi Amona atelemeki mpe abandaki kobwaka mabanga epai ya bango na bilingongo bya ye; iyo, na nguya ekasi abwakaki mabanga o ntei ya bango mpenza; mpe boye abomaki yoko motango mwa bango mpo ete babandaki kokamwa na nguya ya ye; nzokande basilikaki na ntina ya liwa lya bandeko ba bango, mpe bazwaki mokano ete akweya; yango wana, komonoko ete bakokaki te kobete ye na mabanga ma bango, babelemeki elongo na nzete mpo ya koboma ye.

37 Kasi tala, bato banso baye batombolaki nzete ya bango mpo ya kobete Amona, abakolaki maboko ma bango na mopanga mwa ye; mpo atelemelaki mabete ma bango na kokataka maboko ma bango na mbeli ya mopanga mwa ye, mpenza ete bakamwaki, mpe babandaki kokima liboso lya ye; iyo, mpe bazalaki bake te o motango; mpe asalaki bango bakima na makasi ma loboko la ye.

38 Sikawa motoba ya bango bakweyaki na bilingongo bya ye, kasi abomaki moko te longola soko ezalaki mokonzi wa bango na mopanga mwa ye; mpe abakolaki maboko mingi ma bango lokola matombolamaki na ye, mpe mazalaki moke te.

39 Mpe ebenganaki ye bango, azongaki mpe bamelisaki mai bitonga bya bango mpe bazongisaki bango o matiti ma mokonzi, mpe nde bayingelaki epai ya mokonzi, kokumbaka maboko maye mabakolamaka na mopanga mwa Amona, ma bango baye balukaki koboma ye; mpe mayingisamaki epai ya mokonzi mpo ya litatoli lyoko lya makambo maye basalaka.