Makomi
Alama 18


Mokapo 18

Mokonzi Lamoni abanzi ete Amona azali Molimo Monene—Amona alakisi mokonzi etali Bokeli, mpe etali bosali bwa Nzambe elongo na bato, mpe etali bosikoli boye bokoya o nzela ya Klisto—Lamoni andimi mpe akwei o mabele lokola soko akufaki. Penepene na 90 Yambo ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete mokonzi Lamoni asalaki ete basali ba ye bateleme mpe batatola makambo manso maye bamonoki etali likambo lyango.

2 Mpe etatolaka bango banso makambo bamonoko, mpe eyokaka ye bopotongono bwa Amona na kobatelaka bitonga bya ye, mpe lisusu nguya enene alakisaki na kowelaka na bango baye balingaki koboma ye, akamwaki mpenza, mpe alobaki: Solo, oyo azali monene koleka moto moko. Tala, ezali te eye Molimo Monene oyo atindaki bitumbu binene bya lolenge loye likolo lya bato baye, na ntina ya bobomi bwa bango?

3 Mpe bayanolaki mokonzi, mpe balobaki: Soko ezali ye Molimo Monene to moto moko, biso toyebi te; kasi eye nzike toyebi, ete akoki kobomama te na bayini ba mokonzi; mpe ekoki bango te kopalanganisa bitonga bya mokonzi ezali ye elongo na biso, na ntina ya mayele mpe makasi ma ye; yango wana biso toyebi ete azali moninga na mokonzi. Mpe sikawa, O mokonzi, tondimi te ete moto moko akoki kozala na nguya ya lolenge loye, mpo toyebi akoki te kobomama.

4 Mpe sikawa, eyokaki mokonzi maloba maye, alobaki epai ya bango: Sikawa nayebi ete azali Molimo Monene; mpe ayei o nse o ntango eye mpo ya kobatela bomoi bwa bino, ete nakoka koboma bino te lokola nasalaki bandeko ba bino. Sikawa eye ezali Molimo Monene oyo batata ba biso balobelaki.

5 Sikawa eye ezalaki momeseno mwa Lamoni, oyo azwaki uta na tata wa ye, ete ezali Molimo Monene moko. Ata bandimaki na Molimo Monene moko, babanzaki ete enso eye basalaki ezalaki sembo; nzokande, Lamoni abandaki kobanga mpenza, na bobangi mbele asalaka mbeba na kobomaka basali ba ye;

6 Mpo abomaka mingi ya bango zambi bandeko ba bango bapalanganisaki bitonga bya bango o esika ya mai; mpe boye, zambi batikaka bitonga bya bango bipalanganisama babomamaki.

7 Sikawa ezalaki esaleli ya Balamani koteleme mpembeni ya esika ya mai ma Sebu mpo ya kopanza bitonga bya bato, ete na yango bakoka kobengana mingi iye ipalanganisamaki epai ya mboka ya bangomei, yango kozalaka esaleli ya bopunzi o ntei ya bango.

8 Mpe esalemaki ete mokonzi Lamoni atunaki na basali ba ye, kolobaka: Wapi azali moto oyo azali na nguya enene ya lolenge loye?

9 Mpe bango balobaki epai ya ye: Tala, azali koleisaka farasa ya yo. Sikawa mokonzi atindaka basali ba ye, yambo ya ntango ya komelisa mai na bitonga bya bango, ete balengele farasa mpe makalo ma ye mpe bakamba ye o mboka ya Nefi; mpo kuna limpati lyoko linene lilakamaki na tata wa Lamoni, oyo azalaki mokonzi likolo lya mboka mobimba ya Nefi.

10 Sikawa eyokaki mokonzi Lamoni ete Amona azalaki kolengele farasa ya ye mpe makalo ma ye akamwaki mingi koleka, na ntina ya bopotongono bwa Amona, kolobaka: Solo ezalaki moko te o ntei ya basali ba ngai banso oyo azali potongono boye lokola moto oyo; mpo kutu amikundoli mitindo mya ngai minso mpo ya kosalela myango.

11 Sikawa nayebi solo ete eye ezali Molimo Monene, mpe nazali na mposa na ye ete aya epai ya ngai, kasi nameki te.

12 Mpe esalemaki ete esalaka Amona farasa mpe makalo ibongo mpo ya mokonzi mpe basali ba ye, ayingelaki epai ya mokonzi, mpe amonoki ete elongi ya mokonzi ebalukaki; yango wana azalaki penepene na kozonga libanda lya miso mya ye.

13 Mpe moko wa basali ba mokonzi alobaki epai ya ye, Rabana, eye ezali, na kolimbolaka, wa nguya to mokonzi monene, bamonoki bakonzi ba bango kozala ba nguya mpe yango wana alobaki epai ya ye ete: Rabana, mokonzi alingi ete otikala.

14 Yango wana Amona abalukaki epai ya mokonzi mpe alobaki epai ya ye: Nini olingi nasala mpo ya yo, O, mokonzi? Mpe mokonzi ayanolaki ye te mpo ya ntaka ya ngonga yoko engebene na ntango ya bango, mpo ayebaki te nini aloba epai ya ye.

15 Mpe esalemaki ete Amona alobaki epai ya ye lisusu: Nini ezali mposa ya yo mpo ya ngai? Kasi mokonzi ayanolaki te.

16 Mpe esalemaki ete Amona, etondisamaki ye na Molimo mwa Nzambe, yango wana ayebaki makanisi ma mokonzi. Mpe alobaki epai ya ye: Ezali zambi oyoki ete nabatelaki basali ba yo mpe bitonga bya yo, mpe nabomaki sambo ya bandeko ba bango na bilingongo mpe na mopanga, mpe nabakolaki maboko ma basusu, mpo ya kobatela bitonga mpe basali ba yo; tala, ezali eye esali bokamwi bwa yo?

17 Nalobi epai ya yo, nini ezali, ete bokamwi bwa yo bozala bonene? Tala, nazali moto moko, mpe nazali mosali wa yo; yango wana, enso eye ozali na mposa eye ezali sembo, eye nakosala.

18 Sikawa eyokaki mokonzi maloba maye, akamwaki lisusu, mpo amonaki ete Amona akokaki kososola makanisi ma ye; kasi ata eye, mokonzi Lamoni afungolaki monoko mpe alobaki epai ya ye boye: Nani ozali? Ozali Molimo Monene, oyo ayebi makambo manso?

19 Amona ayanolaki mpe alobaki epai ya ye: Nazali te.

20 Mpe mokonzi alobaki: boniboni oyebi makanisi ma motema mwa ngai? Okoki koyebisa ngai na bobangi te, mpe lobela ngai etali makambo maye; mpe lisusu lobela ngai na nguya kani obomaki mpe obakolaki maboko ma bandeko ba ngai baye bapalanganisaki bitonga bya ngai—

21 Mpe sikawa, soko olobeli ngai etali makambo maye, enso eye ozali na mposa nakopesa epai ya yo; mpe soko esengelamaki, nalingaki kokengele yo na mampinga ma ngai; kasi nayebi ete yo ozali na nguya mingi koleka bango; nzokande, enso eye ozali na mposa nakopesa yango epai ya yo.

22 Sikawa Amona ezalaki ye na bwania, nzokande na mabe te, alobaki epai ya Lamoni ete: elingi yo koyokemela epai ya maloba ma ngai, soko nalobeli yo na nguya kani nasali makambo maye? Mpe eye ezali likambo nazali na mposa na yo.

23 Mpe mokonzi ayanolaki ye, mpe alobaki: Iyo, nakondima maloba ma yo manso. Mpe boye azwamaki na mayele.

24 Mpe Amona abandaki koloba epai ya ye na mpiko, mpe alobaki epai ya ye: Endimi yo ete ezali Nzambe moko?

25 Mpe ayanolaki, mpe alobaki epai ya ye: Nayebi te nini elingi koloba.

26 Mpe nde Amona alobaki: Endimi yo ete ezali Molimo Monene moko?

27 Mpe alobaki, Iyo.

28 Mpe Amona alobaki: Eye ezali Nzambe. Mpe Amona alobaki epai ya ye lisusu: Endimi yo ete Molimo Monene oyo, oyo azali Nzambe, akelaki biloko binso bizali o lola mpe o mabele?

29 Mpe alobaki: Iyo, nandimi ete akelaki biloko binso biye bizali o mabele; kasi nayebi lola te.

30 Mpe Amona alobaki epai ya ye: Lola ezali esika Nzambe afandi mpe banzelu ba ye banso basantu.

31 Mpe mokonzi Lamoni alobaki: Ezali likolo lya mabele?

32 Mpe Amona alobaki: Iyo, mpe akotalaka o nse likolo lya bana banso ba bato; mpe ayebi makanisi manso mpe mikano mya mitema; mpo na loboko la ye akelaki uta o ebandeli.

33 Mpe mokonzi Lamoni alobaki: Nandini makambo manso olobi. Etindami yo uta na Nzambe?

34 Amona alobaki epai ya ye: Nazali moto moko; mpe moto o ebandeli akelamaki na elili ya Nzambe, mpe nabiangemi na Molimo Mosantu mwa ye mpo ya kolakisa makambo maye epai ya bato baye, mpo ete bakoka komememe na boyebi boko bwa ena eye eyengebeni mpe ezali solo;

35 Mpe ndambo yoko ya Molimo mona mofandi na ngai, oyo epesi ngai boyebi, mpe lisusu nguya engebene na bondimi bwa ngai mpe mposa iye izali na Nzambe.

36 Sikawa elobaka Amona maloba maye, abandaki o bokeli bwa mokili, mpe lisusu bokeli bwa Adama, mpe alobelaki ye makambo manso matali bokwei bwa moto, mpe azongelaki mpe atiaki liboso lya ye makundoli mpe nkoma isantu ya bato, iye ilobamaki na baprofeta, kutu kina o ntango eye tata wa bango, Lehi, atikaki Yelusaleme.

37 Mpe lisusu azongelaki epai ya bango (mpo ezalaki epai ya mokonzi mpe basali ba ye) mibembo minso mya batata ba bango o esobe, mpe mpasi inso ya bango na nzala mpe mposa ya mai, mpe misala mya bango, mpe bongo na bongo.

38 Mpe lisusu azongelaki epai ya bango etali botomboki bwa Lamani mpe Lemuele, mpe bana babali ba Yisamaele, iyo, botomboki bonso bwa bango asangelaki bango; mpe asembolaki epai ya bango makundoli mpe nkoma inso uta o ntango Lehi atikaki Yelusaleme kina o ntango ya lelo.

39 Kasi eye ezali enso te; mpo asembolaki epai ya bango mwango mwa bosikoli, moye molengeleme uta o bokelami bwa mokili; mpe lisusu asalaki eyebama epai ya bango etali boyei bwa Klisto, mpe misala minso mya Nkolo asalaki miyebana epai ya bango.

40 Mpe esalemaki ete ntango esilisaka ye koloba makambo maye manso, mpe kosembola mango na mokonzi, ete mokonzi andimaki maloba maye manso.

41 Mpe abandaki kobondela epai ya Nkolo, kolobaka: O, Nkolo, yoka ngolu; engebene na beboo ya ngolu ya yo eye oyokaka likolo lya bato ba Nefi, yoka ngolu likolo lya ngai, mpe bato ba ngai.

42 Mpe sikawa, elobaka ye maloba maye, akweyaki epai ya mabele, lokola soko akufaki.

43 Mpe esalemaki ete basali ba ye bakamataki ye mpe bamemeki ye epai ya mwasi wa ye, mpe balalisaki ye likolo lya mbeto; alalaki lokola soko akufaki o ntaka ya mikolo mibale mpe butu ibale; mpe mwasi wa ye, mpe bana babali ba ye, mpe bana basi ba ye balelaki likolo lya ye, nsima ya lolenge la Balamani, kolelaka mingi bobungisi bwa ye.