Makomi
Alama 22


Mokapo 22

Aloni ateyi tata wa Lamoni etali Bokeli, bokwei bwa Adama, mpe mwango mwa bosikoli na lisalisi lya Klisto—Mokonzi mpe baye ndako ya ye banso babongwani—Bokaboli bwa mboka o kati ya Banefi mpe Balamani bolimbolami. Penepene na 90–77 Yambo ya Klisto.

1 Sikawa, lokola Amona azalaki boye koteyaka mbala inso bato ba Lamoni, tokozongela nsango ya Aloni mpe bandeko ba ye; mpo esilisaki ye kolongwa uta o mboka ya Midoni akambemaki na Molimo o mboka ya Nefi, kutu o ndako ya mokonzi oyo azalaki likolo lya mokili mobimba longola se mboka ya Yisamaele; mpe azalaki tata wa Lamoni.

2 Mpe esalemaki ete akotaki epai ya ye o kati ya ndako enene ya mokonzi, elongo na bandeko ba ye, mpe amigumbaki liboso lya mokonzi, mpe alobaki epai ya ye: Tala, O mokonzi, tozali bandeko ba Amona, baye obimisaki libanda lya boloko.

3 Mpe sikawa, O mokonzi, soko olingi kobatela bomoi bwa biso, tokozala basali ba yo. Mpe mokonzi alobaki epai ya bango: Telemeni, mpo nakotika epai ya bino bomoi bwa bino, mpe nakolinga te ete bozala basali ba ngai; kasi ngai nakokangama ete bosala epai ya ngai; mpo nazalaki mwa moke na mobulu na molimo wa ngai na ntina ya ngolu mpe bonene bwa maloba ma ndeko wa bino Amona; mpe nazali na mposa ya koyeba ntina nini ayei te libanda lya Midoni elongo na bino.

4 Mpe Aloni alobaki epai ya mokonzi: Tala, Molimo mwa Nkolo abiangi ye o nzela esusu; akendeki o mboka ya Yisamaele, koteya bato ba Lamoni.

5 Sikawa mokonzi alobaki epai ya bango: Nini ezali eye bolobi etali Molimo mwa Nkolo? Tala, eye ezali likambo liye lipesi ngai mobulu.

6 Mpe lisusu, nini ezali eye Amona alobaki—Soko okoyambola okobikisama, mpe soko okoyambola te, okobwakama mosika o mokolo mwa nsuka?

7 Mpe Aloni ayanolaki ye mpe alobaki epai ya ye: Endimi yo ete ezali Nzambe moko? Mpe mokonzi alobaki: Nayebi ete Baamaleki balobi ete ezali Nzambe moko, mpe napesaki ndingisa epai ya bango ete batonga ndako isantu, ete bamisangisa elongo mpo ya kokumbamela ye. Mpe soko sikawa olobi ezali Nzambe moko, tala nakondima.

8 Mpe sikawa eyokaki Aloni eye, motema mwa ye mobandaki kosepela, mpe alobaki: Tala, solo lokola ozali na bomoi, O mokonzi, ezali Nzambe moko.

9 Mpe mokonzi alobaki: Ezali Nzambe Molimo Monene oyo abimisaki batata ba biso libanda lya mboka ya Yelusaleme?

10 Mpe Aloni alobaki epai ya ye: Iyo, azali Molimo Monene ona, mpe akelaki biloko binso o lola mpe o mabele. Endimi yo eye?

11 Mpe alobaki: Iyo, nandimi ete Molimo Monene akelaki biloko binso, mpe nazali na mposa ete olobela ngai etali makambo maye manso, mpe nakondima maloba ma yo.

12 Mpe esalemaki ete emonoki Aloni ete mokonzi alingaki kondima maloba ma ye, abandaki uta o bokeli bwa Adama, kotangaka nkoma epai ya mokonzi—boniboni Nzambe akelaki moto nsima ya elilingi ya yemei, mpe ete Nzambe apesaki ye mitindo, mpe na ntina ya bobuki mobeko, moto akweyaka.

13 Mpe Aloni alimbolaki epai ya ye nkoma uta o bokeli bwa Adama, kotiaka bokwei bwa moto liboso lya ye, mpe bozali bwa bango bwa mosuni mpe lisusu mwango mwa bosikoli, moye molengelemeki uta o bokelami bwa mokili, na lisalisi lya Klisto, mpo ya onso oyo akondima nkombo ya ye.

14 Mpe uta moto akweyaka akokaki kokoka eloko moko te na yemei; kasi mpasi mpe liwa lya Klisto litumbolami mpo ya masumu ma bango, o nzela ya bondimi mpe boyamboli, mpe bongo na bongo; mpe ete akati nkanga ya liwa, ete lilita lizala na elonga te, mpe ete etengu ya liwa eminama mpenza o elikia ya nkembo; mpe Aloni alimbolaki makambo maye epai ya mokonzi.

15 Mpe esalemaki ete esilisaki Aloni kolimbola makambo maye epai ya ye, mokonzi alobaki: Nini nasala mpo ete nakoka kozala na bomoi boye bwa seko boye olobeli? Iyo, nini nakosala mpo ete nakoka kobotama na Nzambe, kobakolaka molimo moye mwa nkuna libanda lya motema mwa ngai, mpe kozwa Molimo mwa ye, ete nakoka kotondisama na bosepeli, ete nakoka kobwakama te mosika o mokolo mwa nsuka? Tala, elobaki ye, nakotika manso nazwi, iyo, nakosundola bokonzi bwa ngai, ete nakoka kozwa bosepeli boye bonene.

16 Kasi Aloni alobaki epai ya ye: Soko ozali na mposa ya likambo liye, soko okogumbama liboso lya Nzambe, iyo, soko okoyambola masumu ma yo manso, mpe okogumbama liboso lya Nzambe, mpe okobianga likolo lya nkombo ya ye o bondimi, kondimaka ete okozwa, nde okozwa elikia eye ozali na mposa.

17 Mpe esalemaki ete elobaki Aloni maloba maye, mokonzi agumbamaki o nse liboso lya Nkolo, likolo lya mabolongo ma ye; iyo, amilalisaki likolo lya mabele, mpe abelelaki makasi, kolobaka:

18 O Nzambe, Aloni alobeli ngai ete ezali Nzambe moko; mpe soko ezali Nzambe moko, mpe soko ozali Nzambe, okosala yomei oyebana epai ya ngai, mpe nakotika masumu ma ngai manso mpo ya koyeba yo, ete nakoka kosekwisama uta na bakufi, mpe kobikisama o mokolo mwa nsuka. Mpe sikawa elobaka mokonzi maloba maye, akweyaki lokola soko akufaki.

19 Mpe esalemaki ete basali ba ye bakimaki mpe balobelaki mwasi wa mokonzi manso maye makomaki epai ya mokonzi. Mpe ayaki epai ya mokonzi; mpe emonoki ye alalaki lokola soko akufaki, mpe lisusu Aloni mpe bandeko ba ye batelemeki mpembeni lokola soko bazalaka ntina ya bokwei bwa ye, asilikaki na bango, mpe atindaki ete basali ba ye, to basali ba mokonzi, bakamata bango mpe baboma bango.

20 Sikawa basali bamonoko ntina ya bokwei bwa mokonzi, yango wana bamekaki te kotia maboko ma bango likolo lya Aloni mpe bandeko ba ye; mpe basambaki elongo na mwasi wa mokonzi kolobaka: Ntina nini etindi yo ete toboma bato baye, ntango tala moko wa bango azali mokasi koleka biso banso? Yango wana tokokweya liboso lya bango.

21 Sikawa emonoki mwasi wa mokonzi bobangi bwa basali abandaki kobanga mpenza, mbele yoko bobe boya likolo lya ye. Mpe atindaki basali ba ye bakende kobianga bato, ete bakoka koboma Aloni mpe bandeko ba ye.

22 Sikawa emonoki Aloni mokano mwa mwasi wa mokonzi, ye, lisusu koyebaka bokasi bwa mitema mya bato, abangaki mbele ebele bamisangisa elongo, mpe ezala boweli mpe mbilingambilinga o ntei ya bango; yango wana atiaki liboso loboko la ye mpe atelemisaki mokonzi uta o mabele, mpe alobaki epai ya ye: Teleme. Mpe atelemeki likolo lya makolo ma ye, kozwaka bokasi bwa ye.

23 Sikawa eye esalemaki o miso mya mwasi wa mokonzi mpe mingi ya basali. Mpe emonoki bango yango bakamwaki mingi, mpe babandaki kobanga. Mpe mokonzi atelemeki liboso, mpe abandaki kosala epai ya bango. Mpe asalaki epai ya bango, mpenza ete baye ndako ya ye mobimba babongwanaki epai ya Nkolo.

24 Sikawa ebele bamisangisaki elongo na ntina ya motindo mwa mwasi wa mokonzi, mpe babandaki koyimayima o ntei ya bango na ntina ya Aloni mpe bandeko ba ye.

25 Kasi mokonzi atelemeki liboso o ntei ya bango mpe asalaki epai ya bango. Mpe balembisamaki ona Aloni mpe bango baye bazalaki elongo na ye.

26 Mpe esalemaki ete emonoki mokonzi ete bato balembisamaki, asalaki ete Aloni mpe bandeko ba ye bateleme liboso o katikati ya ebele, mpe ete bateya liloba epai ya bango.

27 Mpe esalemaki ete mokonzi atindaki esakola o ntaka ya mboka mobimba, o ntei ya bato ba ye banso baye bazalaki o mboka ya ye, baye bazalaki o bikolo binso zingazinga mpembeni, biye bizalaki na ndelo kutu ya mbu, o esti mpe o westi, mpe biye bikabwanaki uta o mboka ya Zalayemila penepene na esobe eke mpe elai, eye ebendanaki uta o mbu ya esti kutu kina o mbu ya westi, mpe zingazinga mpembeni na ndelo ya libongo lya mbu, mpe na ndelo ya esobe eye ezalaki o nordi ya mboka ya Zalayemila, o nzela ya ndelo ya Mati, penepene ya moto ya ebale ya Sidoni, kobendanaka uta o esti ona westi—na boye Balamani mpe Banefi bakabwanaki.

28 Sikawa, eteni eleki goigoi ya Balamani bazalaki o esobe, mpe bafandaki o biema; mpe bapanzanaki o esobe na westi, o mboka ya Nefi; iyo, mpe o westi ya mboka ya Zalayemila, na ndelo penepene na libongo lya mbu, mpe o westi ya mboka ya Nefi, o esika ya lisango lya yambo lya batata ba bango, mpe boye kolandaka ndelo ya libongo lya mbu.

29 Mpe lisusu bazalaki Balamani mingi o esti ya libongo lya mbu, wapi Banefi babenganaki bango. Mpe boye Banefi bazalaki penepene na kozingama na Balamani; nzokande Banefi bakamataka biteni binso o nordi ya mboka ezalaki na ndelo ya esobe, o moto mwa ebale Sidoni, uta o esti kina o westi, zingazinga mpembeni na mpanzi ya esobe; o nordi, kutu kina bakomaki o mboka babiangaki Beboo.

30 Mpe ezalaki na ndelo likolo lya mboka eye babiangaki Mpamba, yango kozalaka boye mosika epai ya nordi ete eyaki o kati ya mboka eye ezalaka na bato mpe babebisamaka, ya bango mikuwa tolobeli, eye ebombolamaki na bato ba Zalayemila, yango kozalaka esika ya bokomi bwa bango bwa yambo o mboka.

31 Mpe bayaki uta kuna likolo o kati ya sudi ya esobe. Boye mboka epai ya nordi ebiangemaki Mpamba, mpe mboka epai ya sudi ebiangemaki Beboo, yango kozalaka esobe eye etondi na niama ya zamba ya lolenge na lolenge, eteni yoko ya yango eyaka uta o mboka ya epai ya nordi mpo ya bilei.

32 Mpe sikawa, ezalaki bobele ntaka ya mokolo moko na ndambo ya mobembo mpo ya Monefi moko, na nzela alima ya Beboo mpe o mboka Mpamba, uta o esti kina o mbu ya westi; mpe boye mboka ya Nefi mpe mboka ya Zalayemila izalaki penepene na kozingama na mai, kuna kozalaka mwa nkingo ya mabele o kati ya mboka ya epai ya nordi mpe mboka ya epai ya sudi.

33 Mpe esalemaki ete Banefi bafandaka o mboka Beboo, kutu uta o esti epai ya mbu ya westi, mpe boye Banefi na bwania bwa bango, na bakengeli ba bango mpe mampinga ma bango, bazingaki Balamani o sudi, ete na yango bazala lisusu te na bozwi o nordi, ete bakoka te komatela mboka ya epai ya nordi.

34 Yango wana Balamani bakokaki kozala lisusu te na bozwi bobele o mboka ya Nefi, mpe esobe zingazinga mpembeni. Sikawa eye ezalaki bwania na Banefi—lokola Balamani bazalaki moyini na bango, balingaki te bayoka mpasi ya matungisi epai na epai, mpe lisusu ete bakoka kozala na mboka wapi bakokaki kokima, engebene na mposa ya bango.

35 Mpe sikawa ngai, esilisi ngai koloba boye, nazongi lisusu na nsango ya Amona mpe Aloni, Omina mpe Imini, mpe bandeko ba bango.