Makomi
Alama 23


Mokapo 23

Bonsomi bwa eyamba bosakolami—Balamani bazali o mboka mpe bingumba sambo babongwani—Bamibiangi Ati-Nefi-Lehi mpe bapesami bonsomi uta o botutu. Baamaleki mpe Baamuloni baboyi bosolo. Penepene na 90–77 Yambo ya Klisto.

1 Tala, sikawa esalemaki ete, mokonzi wa Balamani atindaki esakola o ntei ya bato ba ye banso, ete batia te maboko ma bango likolo lya Amona, to Aloni, to Omina, to Imini, to bandeko ba bango baye bakokende koteyaka liloba lya Nzambe, o esika enso bakozala, o eteni enso ya mboka ya bango.

2 Iyo, atindaki mobeko o ntei ya bango, ete batia te maboko ma bango likolo lya bango mpo ya kokanga bango, to kobwaka bango o kati ya boloko; mpe babwaka te nsoi likolo lya bango, to kobete bango te, to kobwaka bango te libanda lya sinagogi ya bango, to kofiakola bango fimbo te; to kobwaka mabanga na bango te, kasi bazala na nzela polele o ndako ya bango, mpe lisusu o tempelo ya bango, mpe o ndako isantu ya bango.

3 Mpe boye bakokaki kokende mpe koteya liloba engebene na mposa ya bango, mpo mokonzi abongwanaki epai ya Nkolo, mpe baye ndako ya ye mobimba; yango wana atindaki esakola o ntaka ya mboka epai ya bato ba ye, ete liloba lya Nzambe likoka te kozala na bokakemi, kasi ete likende o ntaka ya mboka mobimba, ete bato ba ye bakoka kondimisama etali mimeseno mya nkuna mya batata ba bango, mpe ete bakoka kondimisama ete bango bazalaki banso bandeko, mpe ete basengelaki koboma te, to kopunza te, to koyiba te, to kosala ekobo te, to kosala lolenge loko te la nkuna.

4 Mpe sikawa esalemaki ete etindaki mokonzi esakola eye, ete Aloni mpe bandeko ba ye bakendeki uta engumba na engumba, mpe uta ndako yoko ya bokumbami na esusu, kotiaka biklezia, mpe kobulisaki banganga mpe balakisi o ntaka ya mboka o ntei ya Balamani, mpo ya koteya mpe kolakisa liloba lya Nzambe o ntei ya bango; mpe boye babandaki kozala na nkonzo enene.

5 Mpe nkoto na nkoto bamememeki o boyebi bwa Nkolo, iyo, nkoto na nkoto bamememeki o bondimi na mimeseno mya Banefi; mpe bateyamaki makundoli mpe bobikuli boye bokitanisamaki kutu kina o ntango eye.

6 Mpe lokola na ntembe te Nkolo azali na bomoi, boye na ntembe te lokola mingi bandimaki, to lokola mingi bamememeki o boyebi bwa bosolo, o nzela ya liteya lya Amona mpe bandeko ba ye, engebene na molimo mwa bobimisi mpe wa bobikuli, mpe nguya ya Nzambe kosalaka makamwisi na bango—iyo, nalobi epai ya bino, lokola Nkolo azali na bomoi, lokola mingi ya Balamani bandimaki na liteya lya bango, mpe babongwanaki epai ya Nkolo, bakweyaki mosika mokolo moko te.

7 Mpo bakomaki bato boko sembo; batiaki o nse mandoki ma botomboki bwa bango, ete babundaki lisusu na Nzambe te, mpe na moko te ya bandeko ba bango.

8 Sikawa, baye bazali bango baye babongwanaki epai ya Nkolo:

9 Bato ba Balamani baye bazalaki o mboka ya Yisamaele;

10 Mpe lisusu mwa bato ba Balamani baye bazalaki o mboka ya Midoni;

11 Mpe lisusu mwa bato ba Balamani baye bazalaki o engumba ya Nefi;

12 Mpe lisusu mwa bato ba Balamani baye bazalaki o mboka ya Silomi, mpe baye bazalaki o mboka ya Semiloni, mpe o engumba ya Lemuele, mpe o engumba ya Siminilomi.

13 Mpe iye izali nkombo ya bingumba bya Balamani baye babongwanaki epai ya Nkolo; mpe iye izali baye batiaki o nse mandoki ma botomboli bwa bango, iyo, mandoki ma bango manso ma etumba; mpe bazalaki banso Balamani.

14 Mpe Baamaleki babongwanaki te, longola se moko, mpe moko te azalaki ya Baamuloni; kasi bayeisaki mitema mya bango mikasi, mpe lisusu mitema mya Balamani o eteni ya mboka esika enso bafandaki, iyo, mpe mboka ike inso ya bango mpe bingumba binso bya bango.

15 Yango wana, topesi nkombo ya bingumba binso bya Balamani o byango bayambolaki mpe bayaki o boyebi bwa bosolo, mpe babongwanaki.

16 Mpe sikawa esalemaki ete mokonzi mpe baye babongwanaki bazalaki na mposa ete bakoka kozala na nkombo yoko, ete na yango bakoka kokesenisama na bandeko ba bango; yango wana mokonzi atunanaki elongo na Aloni mpe mingi ya banganga, etali nkombo eye bakokamata likolo lya bango, mpo ete bakoka bokesenisama.

17 Mpe esalemaki ete babiangaki nkombo ya bango Ati-Nefi-Lehi; mpe babiangemaki na nkombo eye mpe babiangemaki Balamani lisusu te.

18 Mpe babandaki kozala mpenza balinga mosala; iyo, mpe bazalaki balingani elongo na Banefi, yango wana, bafungolaki bozalani elongo na bango, mpe botutu bwa Nzambe bolandaki bango lisusu te.