Makomi
Alama 26


Mokapo 26

Amona akembeli Nkolo—Bapotongono bapesami bokasi na Nkolo mpe bapesami boyebi—Na bondimi bato bakoki komeme nkoto na nkoto ya bozo na boyamboli—Nzambe azali na nguya enso mpe asosoli makambo manso. Penepene na 90–77 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa, iye izali maloba ma Amona na bandeko ba ye, maye malobi boye: Bandeko babali ba ngai mpe bandeko ba ngai, tala, nalobi epai ya bino ete, ntina enene boniboni tozali na yango mpo ya kosepela; mpo ekokaki biso kobanza ntango tolongwaki uta o mboka ya Zalayemila ete Nzambe alingaki kopesa epai ya biso mapamboli manene boye?

2 Mpe sikawa, natuni, mapamboli manene kani apesi epai ya biso? Ekoki bino kolobela?

3 Tala,nakoyanola mpo ya bino; mpo bandeko ba biso, Balamani, bazalaki o molili, iyo, kutu o lobwaku la molili mingi koleka, kasi tala, boniboni mingi ya bango bamememi mpo ya komono mwinda mwa bokamwi mwa Nzambe! Mpe eye ezali mapamboli maye epesami epai ya biso, ete tokomisami bisalele o maboko ma Nzambe mpo ya komeme mpembeni mosala moye monene.

4 Tala, nkoto na nkoto ya bango basepeli, mpe bamememi o kati ya etonga ya Nzambe.

5 Tala, elanga ekomeli, mpe bopambolami, mpo bokataki na likwangola, mpe bobukaki na makasi ma bino, iyo, bolai bwa mokolo mobimba bosalaki; mpe tala motango mwa maboke ma bino! Mpe makosangisama o ebombelo, ete mabebisama te.

6 Iyo, makolalisama o nse te na ekumbaki o mokolo mwa nsuka; iyo, mpe makobakolama te na mipepe mya kaina; kasi ekomi ekumbaki makosangisama elongo esika ya mango, ete ekumbaki ekoka kokota na mango te; iyo, mpe bakobenganama te na mopepe mokasi o esika enso moyini akokana komeme mango.

7 Kasi tala, bazali o maboko ma Nkolo wa bobuki, mpe bazali ba ye; mpe akotelemisa bango o mokolo mwa nsuka.

8 Epambolama nkombo ya Nzambe wa biso; toyemba mpo ya kokumisa ye, iyo, topesa matondi o nkombo ya ye esantu, mpo akosala bosembo libela.

9 Mpo, soko tobimaki te libanda lya mboka ya Zalayemila, baye bandeko balingami mingi ba biso, baye balingi biso boye, balingaki bobele koniongama na boyini na biso, iyo, mpe balingaki lisusu kozala bampaya na Nzambe.

10 Mpe esalemaki ete elobaki Amona maloba maye, ndeko wa ye Aloni apamelaki ye, kolobaka: Amona, nakobanga ete bosepeli bwa yo bomeme yo mosika na komikumisa.

11 Kasi Amona alobaki epai ya ye: Namikumisi te na bokasi bwa ngaimei, to na bwania bwa ngaimei te; kasi tala, bosepeli bwa ngai botondi, iyo, motema mwa ngai mofuluki na bosepeli, mpe nakosepela na Nzambe wa ngai.

12 Iyo, nayebi ete nazali mpamba; mpo ya bokasi bwa ngai nazali motau; yango wana nakomikumisa te ngaimei, kasi nakomikumisa na Nzambe wa ngai, mpo na bokasi bwa ye nakoki kosala makambo manso; iyo, tala, makamwisi mingi makasi tosali o mokili moye, mpo ya yango tokokumisa nkombo ya ye libela.

13 Tala, nkoto mingi boniboni ya bandeko ba biso akangolaki uta o bolozi bwa limfelo; mpe bamememi mpo ya koyemba bolingo bosikolaka, mpe eye mpo ya nguya ya liloba lya ye liye lizali na biso, yango wana ezali biso na ntina enene te ya kosepela?

14 Iyo, tozali na ntina ya kokumisa ye libela, mpo azali Nzambe Aleki Likolo, mpe akangolaki bandeko ba biso uta o miniololo mya limfelo.

15 Iyo, bazingamaki mpembeni na molili mwa libela mpe bobebisami; kasi tala, amemeki bango o kati ya mwinda mwa ye mwa libela, iyo, o kati ya lobiko la libela; mpe bazingami mpembeni na boike bwa bolingo bwa ye bozangi emekiseli; iyo, mpe tozali bisalele o maboko ma ye na kosalaka mosala moye monene mpe mwa bokamwi.

16 Yango wana, tokembela, iyo, tokokembela na Nkolo; iyo, tokosepela, mpo bosepeli bwa biso botondi; iyo, tokokumisa Nzambe wa biso libela. Tala, nani akoki kokembela nzike mpenza na Nzambe? Iyo, nani akoki kolobela nzike mpenza nguya ya ye enene, mpe ngolu ya ye, mpe motema molai mwa ye ona bana ba bato? Tala, nalobi epai ya bino, nakoki te koloba eteni elike eke eye nayoki.

17 Nani akokaki kobanza ete Nzambe wa biso alingaki kozala na ngolu boye lokola mpo ya kowambola biso uta o bozali bwa biso bwa nsomo, bwa masumu, mpe bosantolama?

18 Tala, tokendeki kutu na nkele, na bokaneli mpo ya kobebisa eklezia ya ye.

19 O nde sikawa, ntina nini akangi biso te na bobebisami bwa nsomo, iyo, ntina nini atikaki te mopanga mwa ye mwa boyengebene mokweya likolo lya biso, mpe akinela biso bozangi elikia ya seko?

20 O, bozo bwa ngai, penepene lokola ezalaki, bokimi na likanisi. Tala, asalelaki te boyengebene bwa ye likolo lya biso, kasi na ngolu ya ye enene amemi biso likolo lya lobwaku lona lwa liwa lya seko mpe bobola, kutu mpo ya lobiko la bozo bwa biso.

21 Mpe sikawa tala, bandeko ba ngai, moto wa mokili kani azali oyo ayebi makambo maye? Nalobi epai ya bino ete, ezali moko te oyo ayebi makambo maye, longola se soko ezali moyamboli.

22 Iyo, ye oyo ayamboli, mpe asaleli bondimi, mpe amemi liboso misala milamu, mpe asambeli ntango inso kotikaka te—epai ya ye epesami koyeba mibombamo mya Nzambe; iyo, epai ya ye ekopesama kobimisa makambo mabimisami mokolo moko te; iyo, mpe ekopesama epai ya ye komeme nkoto na nkoto ya bozo na boyamboli, kutu lokola epesamaki epai ya biso komeme baye bandeko ba biso na boyamboli.

23 Sikawa bomikundola, bandeko ba ngai, ete tolobaki epai ya bandeko ba biso o mboka ya Zalayemila, tokei o mboka ya Nefi, mpo ya koteya epai ya bandeko ba biso, Balamani, mpe basekeki biso na litio?

24 Mpo balobaki epai ya biso: Ebanzi bino ete bokoki komeme Balamani na boyebi bwa bosolo? Ebanzi bino ete bokoki kondimisa Balamani bozangi alima bwa mimeseno mya batata ba bango, bato ba mito mikasi lokola bazali; ya bango mitema mikosepelaka na bosopi makila; ya bango mikolo balekisi na bobe boleki bonene; ya bango nzela ezali bobuki mobeko uta o ebandeli? Sikawa bandeko ba ngai, bomikundoli ete eye ezalaki elobeli ya bango.

25 Mpe lisusu balobaki: tokamata mandoki mpo ya kobunda na bango, ete tobebisa bango mpe bobe bwa bango libanda lya mboka, mbele bamatela biso mpe babebisa biso.

26 Kasi tala, bandeko balingami ba ngai, toyaki te o kati ya esobe na mokano mwa kobebisa bandeko ba biso, kasi na mokano ete mbele tokoka kobikisa mwa ndambo ya bozo bwa bango.

27 Sikawa ezalaki mitema mya biso na bokakemi, mpe penepene na kozonga nsima, tala, Nkolo abondisaki biso, mpe alobaki: Kendeni o ntei ya bandeko ba bino, Balamani, mpe memeni na bompikiliki matungisi ma bino, mpe nakopesa epai ya bino nkonzo.

28 Mpe sikawa tala, toyei, mpe tozali o ntei ya bango; mpe tozali na bompikiliki na mpasi ya biso, mpe toyokaki mpasi mingi ya bozangi; iyo, totambolaki mobembo uta ndako na ndako, koyekemeke likolo lya ngolu ya mokili—likolo lya ngolu ya mokili kaka te, kasi likolo lya ngolu ya Nzambe.

29 Mpe tokoti o kati ya ndako ya bango mpe tolakisi bango, mpe tolakisi bango o balabala ya bango; iyo, mpe toteyi bango likoli lya ngomba patatalu ya bango; mpe tokoti lisusu o tempelo ya bango mpe o sinagogi ya bango mpe toteyi bango; mpe tobwakami libanda, mpe totiolami, tokamatanai mpe tobwakami nsoi, mpe tobetemi likolo lya matama ma biso; mpe tobwakami mabanga, mpe tokangami na nsinga ikasi, mpe tobwakami o boloko; mpe na lisalisi lya nguya mpe bwania bwa Nzambe tobikisami lisusu.

30 Mpe toyokaki mpasi ya ndenge inso ya matungisi, mpe eye enso, ete mbele tokoka kozala nzela ya kobikisa yoko bozo; mpe tobanzaki ete bosepeli bwa biso bokozala botonda soko mbele tokoki kozala nzela ya kobikisa boko.

31 Sikawa tala, tokoki kotala o boso mpe komono mbuma ya misala mya biso; mpe mizali mike? Nalobi epai ya bino, Te, mizali mingi; iyo, mpe tokoki kotatola bosolo bwa myango, na ntina ya bolingo bwa bango ona bandeko ba bango mpe lisusu ona biso.

32 Mpo tala, babonzaka kutu bomoi bwa bango esika ya kokamata bomoi bwa bayini ba bango; mpe bakundi mandoki ma bango mabitumba mozindo o mabele, na ntina ya bolingo bwa bango ona bandeko ba bango.

33 Mpe sikawa tala nalobi epai ya bino, ezali bolingo bonene boye o mboka mobimba? Tala, nalobi epai ya bino, Te, ezali te, kutu o ntei ya Banefi.

34 Mpo tala, bakokaki kokamata mandoki mpo ya kobunda na bandeko ba bango; bakokaki te komiyokisa mpasi ya kobomama. Kasi tala boniboni mingi ya baye batiki o nse bomoi bwa bango; mpe toyebi ete bakei na Nzambe wa bango, na ntina ya bolingo bwa bango mpe boyini bwa bango na kosumuka.

35 Sikawa, ezali biso na ntina ya kosepela te? Iyo, nalobi epai ya bino, ezalaki mokolo moko te bato baye bazalaki na ntina ya kosepela lokola biso, uta mokili ebanda, iyo, mpe bosepeli bwa ngai bomemi ngai mosika, kutu kina namikumisa na Nzambe wa ngai; mpo azali na nguya enso, bwania bonso, mpe bososoli bonso, akoyokaka ntina ya makambo manso; mpe azali Mozali moko wa ngolu, kutu mpo ya lobiko, na bango baye bakoyamboli mpe bakondima likolo lya nkombo ya ye.

36 Sikawa soko eye ezali komikumisa, kutu boye nakomikumisa; mpo eye ezali bomoi bwa ngai mpe mwinda mwa ngai, bosepeli bwa ngai mpe lobiko la ngai, mpe bosikoli bwa ngai uta o lisuma lya libela. Iyo, epambolami nkombo ya Nzambe wa ngai, oyo azwi likanisi mpo ya bato baye, baye bazali etape yoko ya nzete ya Yisalaele, mpe ebungi uta o nzoto ya yango o mboka mompaya; iyo, nalobi, epambolama nkombo ya Nzambe wa ngai, oyo azwi likanisi mpo ya biso, mitelengano o mboka mompaya.

37 Sikawa bandeko ba ngai, tomoni ete Nzambe azwi likanisi mpo ya bato banso, mboka kani bakoki kozala; iyo, akotangaka bato ba ye, mpe nsopo ya ngolu ya ye izali likolo lya mabele manso. Sikawa eye ezali bosepeli bwa ngai, mpe bopesi matondi manene ma ngai; iyo, mpe nakopesa matondi epai ya Nzambe wa ngai libela. Amene.