Makomi
Alama 30


Mokapo 30

Koliyolo, motelemeli Klisto, atioli Klisto, Botumbolami, mpe molimo mwa bobikuli—Alakisi ete ezali Nzambe te, bokwei bwa moto te, etumbu mpo ya lisumu te, mpe Klisto te—Alama atatoli ete Klisto akoya mpe biloko binso bilakisi ete ezali Nzambe moko—Koliyolo asengi elembo mpe akomi baba—Zabulu abimeli Koliyolo lokola anzelu moko mpe alakisaki ye nini koloba—Koliyolo aniatami o nse mpe akufi. Penepene na 76–74 Yambo ya Klisto.

1 Tala, sikawa esalemaki ete esilaka bato ba Amona kotiama o mboka ya Yesoni, iyo, mpe lisusu esilaka Balamani kobenganama libanda lya mboka, mpe bakufi ba bango kokundama na bato ba mboka—

2 Sikawa bakufi ba bango batangemaki te na ntina ya bonene bwa motango mwa bango mpe bakufi ba Banefi batangemaki te—kasi esalemaki ete esilisaka bango kokunda bakufi ba bango, mpe lisusu nsima ya mikolo mya bokili, mpe boleli, mpe losambo, (mpe ezalaki o mobu mwa zomi na motoba mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi) ebandaki kozala ntango inso kimia o mboka mobimba.

3 Iyo, mpe bato batosaki kobatela mitindo mya Nkolo; mpe bazalaki sikisiki na kotosa makuli ma Nzambe, engebene na mobeko mwa Mose; mpo balakisamaki kobatela mobeko mwa Mose kina mokokokisama.

4 Mpe boye bato bazalaki mbilingambilinga te o mobu mobimba mwa zomi na motoba mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi.

5 Mpe esalemaki ete o ebandeli ya mobu mwa zomi na sambo mwa bokonzi bwa basambisi, ezalaki ntango inso kimia.

6 Kasi esalemaki ete o nsuka ya mobu mwa zomi na sambo, eyaki moto moko o mboka ya Zalayemila, mpe azalaki Motelemeli Klisto, mpo abandaki koteya epai ya bato mabe likolo lya mabikuli maye malobamaki na baprofeta, etali boyei bwa Klisto.

7 Sikawa ezalaki mobeko te mpo ya boyambi bwa moto; mpo ezalaki mpenza ekeseni na mitindo mya Nzambe ete ezala mobeko moko moye mokokaki komeme bato na bisika bikokani te.

8 Mpo boye elobi nkoma: Pononi mokolo moye, nani bokosalela.

9 Sikawa soko moto moko azali na mposa ya kosalela Nzambe, ezalaki litomba lya ye; to kutu, soko andimaki na Nzambe ezalaki litomba lya ye kosalela ye; kasi soko andimaki te ezalaki mobeko te mpo ya kotumbola ye.

10 Kasi soko abomaki moto atumbolamaki mpo ya liwa; mpe soko ayongoloki, atumbolamaki lokola; mpe soko ayibaki atumbolamaki lokola; mpe soko asalaki ekobo atumbolamaki lokola; iyo, mpo ya nkuna enso eye batumbolamaki.

11 Mpo ezalaki mobeko moko ete bato bakosambisama engebene na mabe ma bango. Nzokande, ezalaki mobeko moko te mpo ya boyambi bwa moto moko; bongo, moto moko atumbolamaki bobele mpo ya mabe maye asalaka; yango wana bato banso bazalaki na esika ekokani.

12 Mpe Motelemeli Klisto oyo, oyo ya ye nkombo ezalaki Koliyolo, (mpe mobeko mokokaki kosimba ye te) abandaki koteya epai ya bato ete ekozala Klisto te. Mpe nsima ya lolenge loye ateyaki kolobaka:

13 O bino bokangemi o nse ya elikia yoko ya ligboma mpe ya mpamba, ntina nini bomikangisi na makambo ma ligboma ma lolenge loye? Ntina nini bozali koluka Klisto? Mpo moto te akoki koyeba likambo lyoko liye likoya.

14 Tala, makambo maye bobiangi mabikuli, maye bolobi makitanisami na baprofeta basantu, tala, mazali mimeseno mya ligboma mya batata ba bino.

15 Boniboni boyebi bosolo bwa mango ? Tala, bokoki koyeba te makambo maye bomoni te; yango wana bokoki koyeba te ete ekozala Klisto moko.

16 Bokotalela o boso mpe bolobi ete bomoni bolimbisi boko bwa masumu ma bino. Kasi tala, oyo ezali ekomi ya makanisi ma kizengi; mpe bobebi boye bwa makanisi ma bino bokomi na ntina ya mimeseno mya batata ba bino, maye makambi bino mosika o kati ya boyambi boko bwa makambo maye mazali boye te.

17 Mpe makambo mingi koleka ma lolenge loye alobaki epai ya bango, kolobelaka bango ete ekoki kosalema te botumbolami mpo ya masumu ma bato, kasi moto na moto akotambola na bomoi boye engebene na bosali bwa ekelamo; yango wana moto na moto akozwa bomengo engebene na mayele ma ye, mpe ete moto na moto akolonga engebene na bokasi bwa ye; mpe eloko enso nini moto asalaki ezalaki bobe te.

18 Mpe boye ateyaki bango, kokambaka mosika mitema mya mingi, kosalaka bango kotombola mito mya bango na nkuna ya bango, iyo, kokambaka mosika basi mingi, mpe babali lokola, kosala pite—kolobelaka bango ete ntango moto akufi, yango ezalaki nsuka ya ye.

19 Sikawa moto oyo amataki o mboka ya Yesoni lisusu, koteyaka makambo maye o ntei ya bato ba Amona, baye bazalaka mbala yoko bato ba Balamani.

20 Kasi tala bazalaki na bwania koleka mingi ya Banefi; mpo bakamataki ye, mpe bakangaki ye, mpe bamemeki ye, liboso lya Amona, oyo azalaki nganga monene likolo lya bato bana.

21 Mpe esalemaki ete asalaki ete amememe libanda lya mboka. Mpe amataki o kati ya mboka ya Gideona, mpe abandaki koteya epai ya bango lokola; mpe awa azalaki na nkonzo nzike te, mpo akamatamaki mpe akangamaki mpe amememeki liboso lya nganga monene, mpe lisusu mosambisi mokonzi likolo lya mboka.

22 Mpe esalemaki ete nganga monene alobaki epai ya ye: Ntina nini okei zingazinga kosantolaka nzela ya Nkolo? Ntina nini olakisi bato baye ete ekozala Klisto te, mpo ya kokata bosepeli bwa bango? Ntina nini olobi mabe likolo mabikuli manso ma baprofeta basantu?

23 Sikawa nkombo ya nganga monene ezalaki Gidona. Mpe Koliyolo alobaki epai ya ye: Zambi nalakisi te mimeseno mya ligboma lya batata ba bino, mpe zambi nalakisi te bato baye komikangisa o nse ya mabuli mpe makokisi maye matiami o nse na banganga ba kala, mpo ya koyiba nguya mpe bokulaka likolo lya bango, mpo ya kokanga bango na bozangi boyebi, ete bakoka kotombola te mito mya bango, kasi bamememe o nse engebene na maloba ma yo.

24 Bolobi ete bato baye bazali bato nsomi. Tala, nalobi ete bazali na bowumbu. Bolobi ete mabikuli mana ma kala mazali solo. Tala, nalobi ete boyebi te ete mazali solo.

25 Bolobi ete bato baye bazali bato boko ba elindo mpe bakweya, na ntina ya bobuki mobeko mwa moboti moko. Tala, nalobi ete mwana moke azali na elindo te na ntina ya baboti ba ye.

26 Mpe bolobi lisusu ete Klisto akoya. Kasi tala, nalobi ete boyebi te ete ekozala Klisto moko. Mpe bolobi lisusu ete akobomama mpo ya masumu ma mokili—

27 Mpe boye bokumbi mosika bato baye nsima ya mimeseno mya ligboma mya batata ba bino, mpe engebene na mposa ya binomei; mpe bokangi bango o nse, kutu lokola ezalaka na bowumbu, ete bokoka komitondisa mabumu na misala mya maboko ma bango, ete bameka te kotala likolo na mpiko, mpe ete bakoka te kosepela na makoki mpe matomba ma bango.

28 Iyo, bameki te kosalela eye ezali ya bangomei mbele batuka banganga ba bango, baye bakangi bango engebene na mposa ya bango, mpe bamemi bango kondima, na mimeseno mya bango mpe ndoto ya bango mpe mayele ma bango mpe mamoni ma bango mpe mibombamo mikanisi bango, ete bakokoka, soko basali te engebene na maloba ma bango, kotuka mozali moko ayebani te, oyo balobi azali Nzambe—mozali moko amonono to ayebana mokolo moko te, oyo azalaki mokolo moko te mpe akozala mokolo moko te.

29 Sikawa emonoki nganga monene mpe mosambisi mokonzi bokasi bwa motema mwa ye, iyo, emonoki bango ete alingaki kofinga kutu Nzambe, balingaki kopesa eyano te na maloba ma ye; kasi basalaki ete akangema, mpe bapesaki ye o kati ya maboko ma bapolisi, mpe batindaki ye o mboka ya Zalayemila, ete bakoka komeme ye liboso lya Alama, mpe mosambisi mokonzi oyo azalaki moyangeli likolo lya mboka mobimba.

30 Mpe esalemaki ete ntango amememeki liboso lya Alama mpe mosambisi mokonzi, akobaki na lolenge loko lokola asalaki o mboka ya Gideona; iyo, akobaki kotuka.

31 Mpe atelemeki na maloba manene ma bovimbani liboso lya Alama, mpe atiolaki banganga mpe balakisi, kofundaka bango na komemeka mosika bato nsima ya mimeseno mya bozoba mya batata ba bango, na ntina ya botondisi mabumu na misala mya bato.

32 Sikawa Alama alobaki epai ya ye: Oyebi ete biso tomitondisi te mabumu na misala mya bato baye; mpo tala, nasali uta o ebandeli ya bokonzi bwa basambisi kina sikawa, na maboko ma ngaimei mpo ya bosali bwa ngai, ata mibembo mingi mya ngai zingazinga mpembeni na mboka mpo ya kosakola liloba lya Nzambe epai ya bato ba ngai.

33 Mpe ata misala mingi miye nasali na eklezia, nazwi mokolo moko te mingi koleka lokola kutu likuta lyoko te mpo ya mosala mwa ngai; mpe moko te ya bandeko ba ngai, longola se soko ezalaki kiti ya bosambisi; mpe nde tozwi bobele engebene na mobeko mpo ya ntango ya biso.

34 Mpe sikawa, soko tozwi eloko te mpo ya misala mya biso na eklezia, nini ezali litomba lya biso na eklezia longola se soko ezali mpo ya kosakola bosolo, ete tokoka kozala na nsai na bosepeli bwa bandeko ba biso?

35 Nde ntina nini olobi ete biso toteyi epai ya bato baye mpo ya kozwa matabisi, eyebi yo, yomei, ete biso tozwi matabisi te? Mpe sikawa, endimi yo ete biso tokosi bato baye, eye epesi bosepeli bwa lolenge loye o mitema mya bango?

36 Mpe Koliyolo ayanolaki ye, Iyo.

37 Mpe Alama alobaki epai ya ye: Endimi yo ete ezali Nzambe moko?

38 Mpe ayanolaki, Te.

39 Sikawa Alama alobaki epai ya ye: Ekowangana yo lisusu ete ezali Nzambe moko, mpe lisusu okowangana Klisto? Mpo tala, nalobi epai ya yo, nayebi ete ezali Nzambe moko, mpe lisusu ete Klisto akoya.

40 Mpe sikawa polele kani ezali na yo ete Nzambe azali te, to Klisto akoya te? Nalobi epai ya yo ete ozali na yoko te, longola se soko ezali liloba lya yo bobele.

41 Kasi tala, nazali na biloko binso lokola litatoli ete makambo maye mazali solo; mpe yo lokola ozali na biloko binso lokola litatoli ete mazali solo; mpe ekowangana yo mango? Endimi yo ete makambo maye mazali solo?

42 Tala, nayebi ete yo ondimi, kasi ozwami na molimo moko mwa lokuta, mpe obengani Molimo mwa Nzambe ete azala na esika te na yo; kasi zabulu azali na nguya likolo lya yo, mpe amemi yo zingazinga, kosalaka bisalasala ete akoka kobebisa bana ba Nzambe.

43 Mpe sikawa Koliyolo alobaki epai ya Alama: Soko olakisi ngai elembo, ete nakoka kondimisama ete ezali Nzambe moko, iyo, lakisa epai ya ngai ete azali na nguya, mpe nde nakondimisama na bosolo bwa maloba ma yo.

44 Kasi Alama alobaki epai ya ye: Ozali na bilembo bikoki; elingi yo komeka Nzambe wa yo? Ekoloba yo, Lakisa epai ya ngai elembo, ntango ozali na litatoli lya baye banso bandeko ba yo, mpe lisusu litatoli lya baprofeta basantu banso? Nkoma izali liboso lya yo, iyo, mpe biloko binso bilakisi ete ezali Nzambe moko; iyo, kutu mabele, mpe biloko biye bizali likolo lya etando ya mango, iyo, mpe mioto minso miye mikotambolaka na lolenge la sikisiki mitatoli ete ezali Mokeli moko Wa Likolo Mingi Koleka.

45 Mpe nzokande okei zingazinga, kokambaka mosika mitema mya bato baye, kotatolaka epai ya bango ete ezali Nzambe te? Mpe nzokande okowangana matatoli maye manso? Mpe alobaki: Iyo, nakowangana, longola se soko okolakisa ngai elembo yoko.

46 Mpe sikawa esalemaki ete Alama alobaki epai ya ye: Tala, nayoki mpasi na ntina ya bokasi bwa motema mwa yo, iyo, ete okotelemela kaka molimo mwa bosolo, ete bozo bwa yo bokoka kobebisama.

47 Kasi tala, eleki bolamu ete bozo bwa yo bobunga esika ete ozala nzela ya komeme bozo mingi o nse na bobebisami, mpo ya lokuta la yo mpe maloba ma koleteke ma yo; yango wana soko okowangana lisusu, tala Nzambe akobete yo, ete okokoma baba, okofungola monoko mokolo moko te, ete okoka kokosa bato baye lisusu te.

48 Sikawa Koliyolo alobaki epai ya ye: Nawangani bozali bwa Nzambe moko te, kasi nandimi te ete ezali Nzambe moko; mpe nalobi lisusu, ete boyebi te ete ezali Nzambe moko; mpe longola se soko olakisi ngai elembo yoko, nakondima te.

49 Sikawa Alama alobaki epai ya ye: Eye nakopesa epai ya yo mpo ya elembo, ete okokomisama baba, engebene na maloba ma ngai; mpe nalobi, ete o nkombo ya Nzambe, okokomisama baba, ete okozala lisusu na bolobi te.

50 Sikawa elobaka Alama maloba maye, Koliyolo akomaki baba, ete akokaki lisusu kozala na bolobi te, engebene na maloba ma Alama.

51 Mpe sikawa emonoki mosambisi mokonzi eye, asembolaki loboko la ye mpe akomaki epai ya Koliyolo, kolobaka: Endimisami yo na nguya ya Nzambe? Na oyo ozalaki na mposa ete Alama alakisa yo elembo ya ye? Elingi yo ete atungisa basusu, mpo ya kolakisa yo elembo yoko? Tala, alakisi epai ya yo elembo yoko; mpe sikawa ekoswana yo lisusu?

52 Mpe Koliyolo asembolaki loboko la ye mpe akomaki, kolobaka: Nayebi ete nazali baba, mpo nakoki koloba te; mpe nayebi ete eloko te longola se nguya ya Nzambe ekokaki komeme eye epai ya ngai; iyo, nayebaki ntango inso ete ezalaki Nzambe moko.

53 Kasi tala, zabulu akosi ngai; mpo amibimisaki epai ya ngai na lolenge la anzelu, mpe alobaki epai ya ngai: Kende mpe butwisa bato baye, mpo bakei banso mpembeni nsima ya Nzambe ayebani te. Mpe alobaki epai ya ngai: ezali Nzambe te; iyo, mpe alakisaki ngai maye nasengelaki koloba. Mpe nalakisi maloba ma ye; mpe nalakisaki bango zambi basepelisamaki na mayele ma mosuni; mpe nalakisaki bango, kutu kina nazalaka na nkonzo mingi; mpo ete solo nandimaki ete mazali solo; mpe mpo ya ntina eye natelemelaki bosolo, kutu kina namemi botutu bonene boye likolo lya ngai.

54 Sikawa elobaka ye eye, abondelaki Alama asambela epai ya Nzambe, ete botutu bokoka kolongwa uta na ye.

55 Kasi Alama alobaki epai ya ye: Soko botutu boye bokolongwa na yo okokamba lisusu mosika mitema mya bato baye; yango wana, ekozala epai ya yo kutu lokola Nkolo alingi.

56 Mpe esalemaki ete botutu boye bolongwaki te na Koliyolo; kasi abwakamaki libanda, mpe akendeki uta ndako na ndako kolomboko mpo ya bilei.

57 Sikawa boyebi bwa nini ekomaki epai ya Koliyolo bobimisamaki sasaipi o ntaka ya mboka mobimba; iyo, esakola etindamaki na mosambisi mokonzi na bato banso o mboka, kosakolaka epai ya bango baye bandimaka na maloba ma Koliyolo ete basengeli koyambola noki, mbele masambisi mana kaka maya epai ya bango.

58 Mpe esalemaki ete banso bandimisamaki na nkuna ya Koliyolo; yango wana banso babongwanaki lisusu epai ya Nkolo; mpe eye etii nsuka ya bobe bwa nsima ya lolenge la Koliyolo. Mpe Koliyolo akendeki uta ndako na ndako, kolomboko bilei mpo ya lisalisi lya ye.

59 Mpe esalemaki ete lokola akendeki o ntei ya bato, iyo, o ntei ya bato boko baye bamikabwanaki na Banefi mpe bamibiangaki Bazolami, kokambemaka na moto moko oyo ya ye nkombo ezalaki Zolami—mpe lokola akendeki o ntei ya bango, tala, bamataki likolo lya ye mpe baniataki ye, kutu kina akufaki.

60 Mpe boye tomoni nsuka ya ye oyo akosantola nzela ya Nkolo; mpe boye tomoni ete zabulu akosalisa te bana ba ye o mokolo mwa nsuka, kasi akobenda bango noki o nse na limfelo.