Makomi
Alama 31


Mokapo 31

Alama azali na moto mwa misio yoko mpo ya kobutwisa bapengwi ba Bazolami—Bazolami bawangani Klisto, bandimi na boyambi bwa lokuta bwa boponomi, mpe bakumbameli na nsambo itiami—Bamisionele batondi na Molimo Mosantu—Mpasi ya bango eminami mpenza o bosepeli bwa Klisto. Penepene na 74 Yambo ya Klisto.

1 Sikawa esalemaki ete nsima ya nsuka ya Koliyolo, ezwaki Alama nsango ete Bazolami bazalaki kosantola nzela ya Nkolo, mpe ete Zolami, oyo azalaki mokambi wa bango, azalaki kokambaka mitema mya bato na kogumbama o nse na banzambe ba bikeko baba, motema mwa ye lisusu mobandaki koyoka mpasi mpo ya bobe bwa bato.

2 Mpo ezalaki ntina ya mawa manene na Alama koyeba bobe o ntei ya bato ba ye; yango wana motema mwa ye mozalaki na mawa mpenza na ntina ya bokabwani bwa Bazolami uta na Banefi.

3 Sikawa Bazolami basanganaka bangomei elongo o mboka yoko eye babiangaki nkombo Ationumi, oyo ezalaki o esti ya mboka ya Zalayemila, eye elalaki penepene na ndelo ya libongo lya mbu, eye ezalaki o sudi ya mboka ya Yesoni, eye lisusu ezalaki ndelo ya esobe ya sudi, eye esobe etondaki na Balamani.

4 Sikawa Banefi bazalaki na bobangi bonene ete Bazolami bakota na bozalani na Balamani, mpe ete ezala nzela ya bobungisi bonene o ngambo ya Banefi.

5 Mpe sikawa, lokola liteya lya liloba lizalaka na bokasi bonene bwa kokamba bato na kosala eye eyengebeni—iyo, ezalaki na ekomi ya nguya mingi likolo lya mayele ma bato mingi koleka mopanga, to eloko esusu, eye ekomaki epai ya bango—yango wana Alama akanisaki elongobanaki ete bameka bokasi bwa liloba lya Nzambe.

6 Yango wana akamataki Amona, mpe Aloni, mpe Omina, mpe Imini atikaki o eklezia ya Zalayemila; kasi basato ba yambo akamataki elongo na ye, mpe lisusu Amuleki mpe Zezilomi, baye bazalaki o Meleki; mpe akamataki lisusu bana babali babale ba ye.

7 Sikawa, nkulutu ya bana babali ba ye akamataki te elongo na ye, mpe nkombo ya ye ezalaki Elamani; kasi nkombo ya bango baye akamataki elongo na ye izalaki Sibiloni mpe Koliatoni; mpe iye izali nkombo ya bango baye bakendeki elongo na ye o ntei ya Bazolami, mpo ya koteya liloba.

8 Sikawa Bazolami bazali bakabwani uta na Banefi; yango wana liloba lya Nzambe liteyamaki epai ya bango.

9 Kasi bakweyaka o kati ya mabosani manene, mpo balingaki te kotosa kobatela mitindo mya Nzambe, mpe meko ya ye, engebene na mobeko mwa Mose.

10 Mpe balingaki te kotosa makokisi ma eklezia, mpo ya kokoba na losambo mpe libondeli na Nzambe mokolo na mokolo, ete bakota te o kati ya lisenginia.

11 Iyo, o nsuka, basantolaki nzela ya Nkolo o bisika mingi mpenza; yango wana, mpo ya ntina eye, Alama mpe bandeko ba ye bakendeki o kati ya mboka mpo ya koteya liloba epai ya bango.

12 Sikawa, ekomaka bango o mboka, tala, o bokamwi bwa bango bakutaki Bazolami batongaka sinagogi, mpe bazalaki kosangana bangomei o mokolo moko mwa mposo, moye mokolo babiangaki mokolo mwa Nkolo, mpe bakumbamelaki nsima ya lolenge loko loye Alama mpe bandeko ba ye bamonoko mokolo moko te;

13 Mpo bazalaki na esika yoko etongama likolo o katikati ya sinagogi, esika yoko mpo ya koteleme, eye ezalaki likolo lya moto; mpe nsonge ya yango ekokaki kokwa bobele moto moko.

14 Yango wana, onso oyo azalaki na mposa ya kokumbamela asengelaki kokende mpe koteleme likolo lya nsonge ya yango, o mpe tandolaki maboko ma ye ona lola, mpe abelela na mongongo mokasi, kolobaka:

15 Mosantu, Nzambe mosantu; tondimi ete ozali Nzambe, mpe tondimi ete ozali mosantu, mpe ete ozalaki molimo moko, mpe ozali molimo moko, mpe ete okotikala molimo moko libela.

16 Nzambe mosantu, tondimi ete okabolaki biso uta na bandeko ba biso; mpe tondima te na mimeseno mya bandeko ba biso, miye mikitanisama na bango na bomwana bwa batata ba bango; kasi tondimi ete oponi biso mpo ya kozala bana basantu ba yo; mpe lisusu osalaki eyebana epai ya biso ete ekozala Klisto te.

17 Kasi ozali yo kaka lobi, lelo, mpe libela; mpe oponi biso ete tokobikisama, ntango eponomi banso zingazinga na biso mpo ya kobwakama na nkanda ya yo o nse o limfelo; mpo ya bwango bosantu, O Nzambe, totondi yo; mpe lisusu totondi yo mpo ete oponi biso, ete tokoka te kokambema mosika nsima ya mimeseno mya ligboma mya bandeko ba biso, miye mikangi bango o nse o boyambi boko bwa Klisto, boye bokambi mitema mya bango na kowayawaya mosika na yo, Nzambe wa biso.

18 Mpe lisusu totondi yo, O Nzambe, ete tozali bato baponomo mpe basantu. Amene.

19 Sikawa esalemaki ete esilisaki Alama mpe bandeko ba ye mpe bana babali ba ye koyoka nsambo iye, bakamwaki koleka ndelo.

20 Mpo tala, moto na moto akendeki mpe abonzaki nsambo iye kaka.

21 Sikawa esika ebiangemaki na bango Lamemipitomi, eye, na kolimbola, ezali etando esantu.

22 Sikawa, uta o etando eye, babonzaki likolo, moto na moto, losambo lona kaka mpenza epai ya Nzambe, kotondaka Nzambe wa bango ete baponomoki na ye, mpe ete akambaki bango te mosika nsima ya momeseno mwa bandeko ba bango, mpe ete mitema mya bango miyibamaki te mosika na kondima na makambo makoya, na maye bayebelaki eloko te.

23 Sikawa, esilisaka bato banso kobonza matondi nsima ya lolenge loye, bazongaki o ndako ya bango, kolobelaka lisusu mokolo moko te etali Nzambe wa bango kina mokolo basanganaka bangomei elongo lisusu o etando esantu, mpo ya kobonza matondi nsima ya lolenge la bango.

24 Sikawa, emonoki Alama eye motema mwa ye moyokaki mpasi; mpo amonoki ete bazalaki bato boko ba nkuna mpe babeba; iyo, amonoki ete mitema mya bango mikangemaki likolo lya wolo, mpe likolo lya mpauni, mpe likolo lya ndenge inso ya biloko bya malonga.

25 Iyo, mpe amonoki lisusu ete mitema mya bango mitombwamaki likolo epai ya bifundeli binene, o lolendo la bango.

26 Mpe atombolaki likolo mongongo mwa ye o lola, mpe abelelaki, kolobaka: O, boniboni bolai, O Nkolo, okotika ete basali ba yo bafanda awa o mosuni, mpo ya kotala nkuna enene boye o ntei ya bana ba bato?

27 Tala, O Nzambe, babeleli epai ya yo, mpe nzokande mitema mya bango miminami mpenza o lolendo la bango. Tala, O Nzambe, babeleli epai ya yo na minoko mya bango, ntango etombwami bango likolo kutu na bonene, elongo na biloko bya mpamba bya mokili.

28 Tala, O Nzambe wa ngai, bilamba bya bango bya ntalo, mpe mpete ya bango, mpe bikomo bya bango, mpe bikembi bya bango bya wolo, mpe biloko bya bango binso bya motuya biye bakembi na byango; mpe tala, mitema mya bango mitiami likolo lya byango, mpe nzokande babeleli epai ya yo mpe balobi—Totondi yo, O Nzambe, mpo tozali bato baponomi epai ya yo, ntango basusu bakufi.

29 Iyo, mpe balobi ete osalaki eyebana epai ya bango ete ekozala Klisto te.

30 O Nkolo Nzambe, boniboni bolai ekotika yo ete nkuna ya lolenge loye mpe bozangi bopotongono bozala o ntei ya bato baye? O Nkolo, ekopesa yo ngai bokasi, ete nakoka komeme bokono bwa ngai. Mpo nazali moto wa bokono, mpe nkuna ya lolenge loye o ntei ya bato baye eswi bozo bwa ngai.

31 O Nkolo, motema mwa ngai mozali na mawa mpenza; elingi yo kobondisa bozo bwa ngai na Klisto. O Nkolo, elingi yo kosala epai ya ngai ete nakoka kozala na bokasi, ete nakoka komome na bompikiliki mpasi ya matungisi maye makoya likolo lya ngai, na ntina ya bobe bwa bato baye.

32 O Nkolo, elingi yo kobondisa bozo bwa ngai, mpe kopesa epai ya ngai nkonzo, mpe baninga ba ngai ba mosala lokola baye bazali elongo na ngai—iyo, Amona, mpe Aloni, mpe Omina, mpe lisusu Amuleki mpe Zezilomi, mpe lisusu bana babali ba ngai babale—iyo, kutu baye banso elingi yo kobondisa, O Nkolo. Iyo, elingi yo kobondisa bozo bwa bango na Klisto.

33 Elingi yo kopesa epai ya bango ete bakoka kozala na bokasi, ete bakoka komeme matungisi ma bango maye makoya likolo lya bango na ntina ya mabe ma bato baye.

34 O Nkolo, elingi yo kosala epai ya biso ete tokoka kozala na nkonzo na komemeke bango lisusu epai ya yo na Klisto.

35 Tala, O Nkolo, bozo bwa bango bozali na motuya, mpe mingi ya bango bazali bandeko ba biso; yango wana, pesa epai ya biso, O Nkolo, nguya mpe bwania ete tomeme baye, bandeko ba biso, lisusu epai ya yo.

36 Sikawa esalemaki ete elobaka Alama maloba maye, atiaki maboko ma ye likolo lya baye banso bazalaki elongo na ye. Mpe tala, lokola etiaki ye maboko ma ye likolo lya bango, batondisamaki na Molimo Mosantu.

37 Mpe nsima ya yango ete bakabwanaki bango na bango, kokamataka likanisi te mpo ya bangomei nini bakolia, to nini bakomela, to nini bakolata.

38 Mpe Nkolo asungaki bango ete bayoka nzala te, to bayoka mposa ya mai te; iyo, mpe lisusu apesaki bango bokasi, ete bayoka mpasi ya lolenge loko te la matungisi, longola se soko maminamaki mpenza na bosepeli bwa Klisto. Sikawa eye ezalaki engebene na losambo la Alama; mpe eye zambi abondelaki na bondimi.