Makomi
Alama 32


Mokapo 32

Alama alakisi bakeleli baye ya bango matungisi makomisi bango basawa—Bondimi bozali elikia yoko na eye emononi te eye ezali solo—Alama atatoli ete banzelu basaleli babali, basi, mpe bana—Alama amekisi liloba na nkona yoko—Esengeli elonama mpe eleisama—Nde ekokola o kati ya nzete yoko uta eye mbuma ya bomoi bwa seko ekobukama. Penepene na 74 Yambo ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete bakendeki, mpe babandaki koteya liloba lya Nzambe epai ya bato, kokotaka o kati ya sinagogi ya bango, mpe o kati ya ndako ya bango; iyo, mpe bateyaki liloba o balabala ya bango.

2 Mpe esalemaki ete nsima ya mosala moike o ntei ya bango, babandaki kozala na nkonzo o ntei ya nkondo ya babola; mpo tala, babwakamaki libanda lya sinagogi na ntina ya niamuniamu ya monzele mwa bango—

3 Yango wana bazalaki na ndingisa te ya kokota o kati ya sinagogi ya bango mpo ya kokumbamela Nzambe, emononoki bango lokola mbindo; yango wana bazalaki bakeleli; iyo, bamononoki lokola bosoto; Yango wana bazalaki bakeleli mpo ya biloko bya mokili; mpe lisusu bazalaki bakeleli o motema.

4 Sikawa, lokola Alama azalaki kolakisa mpe koloba epai ya bato likolo lya ngomba patatalu ya Onida, kuna eyaki ebele mpenza epai ya ye, baye bazalaki bango baye tolobeli, baye nde bazalaki bakeleli o motema, na ntina ya bozangi mpo ya biloko bya mokili.

5 Mpe bayaki epai ya Alama; mpe moto wa liboso o ntei ya bango alobaki epai ya ye: Tala, nini baye bandeko ba ngai bakosala, mpo batiolami na bato banso na ntina ya bozangi bwa bango, iyo, mpe mingi koleka na banganga ba biso; mpo babwakaki biso libanda lya sinagogi ya biso iye biso tosalaki makasi mpo ya kotonga na maboko ma bisomei; mpe babwakaki biso libanda na ntina ya bozangi boluti bwa biso; mpe tozali na esika te ya kokumbamela Nzambe wa biso; mpe tala, nini tokosala?

6 Mpe sikawa eyokaki Alama eye, abalukaki zingazinga, elongi ya ye sasaipi ona ye, mpe amonoki na bosepeli bonene; mpo amonoki ete matungisi ma bango makomisaka bango solo basawa, mpe ete bazalaki na bolengeli boko mpo ya koyoka liloba.

7 Yango wana alobaki lisusu te na ebele esusu; kasi atandolaki loboko la ye, mpe abelelaki epai ya bango baye amonoki, baye bazalaki bayamboli ba solo, mpe alobaki epai ya bango:

8 Namoni ete bozali na mitema mikita; mpe soko boye, bopambolami.

9 Tala ndeko wa bino alobi, nini Tokosala?—mpo tobwakami libanda lya sinagogi ya biso, ete tokoki te kokumbamela Nzambe wa biso.

10 Tala, nalobi epai ya bino, ebanzi bino ete bokoki te kokumbamela Nzambe longola se soko ezali na sinagogi ya bino?

11 Mpe lisusu, nalingi kotuna, ebanzi bino ete bosengeli kokumbamela Nzambe bobele mbala yoko o mposo yoko?

12 Nalobi epai ya bino, ezali bolamu ete bobwakami libanda lya sinagogi ya bino, ete bokoka kozala basawa, mpe ete bokoka koyekola bwania; mpo esengeli ete boyekola bwania; mpo ezali zambi ete bobwakami libanda, ete botiolami na bandeko ba bino na ntina ya bozangi boluti bwa bino, mpo bomememi mpenza na bokitisi bwa motema; mpo bomememi na kozala basawa.

13 Mpe sikawa, zambi bosengisami na kozala basawa bopambolami; mpo moto moko ntango isusu, soko asengisami na kozala mosawa, akoluka boyamboli; mpe sikawa solo, onso oyo ayamboli akokuta ngolu; mpe oyo akuti ngolu mpe atii molende kina o nsuka, akobikisama.

14 Mpe sikawa, lokola nalobaki epai ya bino, ete zambi bosengisamaki na kozala basawa bopambolami, ebanzi bino te ete bapambolami mingi koleka baye bamikitisi na ntina ya liloba?

15 Iyo, ye oyo amikitisi solo, mpe ayamboli masumu ma ye, mpe atii molende kina o nsuka, ye kaka akopambolama—iyo, bakopambolama mingi koleka baye basengisami na kozala basawa na ntina ya bozangi boluti bwa bango.

16 Yango wana, bapambolami bango baye bakomikitisa esengisamaki bango te na kozala basawa; to kutu, na maloba masusu, apambolami ye oyo andimi maloba ma Nzambe, mpe abatisami na nkanza te ya motema, iyo, mpe na komememeke te na koyeba liloba, to kutu na kosengisama te na koyeba, yambo bandima.

17 Iyo, bazali mingi baye balobi: Soko okolakisa epai ya biso elembo uta o lola, nde tokoyeba na bosolo; nde tokondima.

18 Sikawa natuni, ezali eye bondimi? Tala, nalobi epai ya bino, Te; mpo soko moto ayebi likambo lyoko azali na ntina te ya kondima, mpo ayebi yango.

19 Mpe sikawa, boniboni nzike mingi alakelami botutu ye oyo ayebi bolingi bwa Nzambe kasi asali bwango te, koleka ye oyo andimi bobele, to azali bobele na ntina ya kondima, mpe akwei o kati ya bobuki mobeko?

20 Sikawa na likambo liye bosengeli kopono. Tala, nalobi epai ya bino, ete ezali o ngambo yoko lokola ezali o esusu; mpe ekozala epai ya moto engebene na mosala mwa ye.

21 Mpe sikawa lokola nalobaki etali bondimi—bondimi ezali te kozala na boyebi boko bobongo nie bwa makambo; yango wana soko ozali na bondimi ozali na elikia mpo ya makambo maye mamononi te, maye mazali solo.

22 Mpe sikawa, tala, nalobi epai ya bino, mpe nalingi ete bomikundola, ete Nzambe akoyokaka ngolu epai ya baye banso bandimi likolo lya nkombo ya ye; yango wana azali na mposa, o esika ya yambo, ete bondima, iyo, mpe kutu likolo lya liloba lya ye.

23 Mpe sikawa, akabi liloba lya ye na banzelu epai ya bato, iyo, na babali kaka te kasi na basi lokola. Sikawa eye ezali enso te; bana bake bazali na maloba mapesami epai ya bango mbala mingi, maye mabulunganisi bato ba bwania mpe bayekola.

24 Mpe sikawa, bandeko balingami ba ngai, lokola bozali na mposa ya koyeba nini bokosala zambi botungisami mpe bobwakami libanda—sikawa nazali na mposa te ete bobanza ete nalingi te kosambisa bino bobele engebene na eye ezali solo—

25 Mpo nalingi te koloba ete banso ba bino bosengisami komikitisa; mpo nandimi solo ete ezali boko o ntei ya bino baye bakomikitisa, ezala bango na bizaleli binso bakoki.

26 Sikawa, lokola nalobaki etali bondimi—ete ezalaki te boyebi boko bobongo nie—kutu boye ezali na maloba ma ngai. Bokoki koyeba bosolo bwa mango yambo te, na bobongonie, lokola mingi te koleka bondimi bozali boyebi boko bobongo nie.

27 Kasi tala, soko bokolongwa na mpongi mpe bokolamusa nguya ya bino, kutu na bomeki boko likolo lya maloba ma ngai, mpe kosalela eteni yoko ya bondimi, iyo, kutu soko bokoki mingi te koleka kozala na mposa ya kondima, tika mposa eye esala na bino, kutu kina bondima na lolenge loko ete bokoka kopesa esika na ndambo ya maloba ma ngai.

28 Sikawa, tokomekisa liloba na nkona. Sikawa, soko bopesi esika, ete nkona ekoka kokonama o motema mwa bino, tala, soko ezali nkona ya solo, to nkona elamu, soko bobwaki yango libanda te na bozangi bondimi bwa bino, ete botelemela Molimo mwa Nkolo, tala, ekobanda kovimba o kati ya ntolo ya bino; mpe ekoyoka bino boningani bwa bovimbi boye, bokobanda koloba o kati ya binomei—Esengeli mpenza ezala nkona elamu, to liloba lizali lilamu, mpo ebandi kotandola bozo bwa ngai; iyo, ebandi kopelisa mwinda mwa bososoli bwa ngai, iyo, ebandi kozala elengi mpo ya ngai.

29 Sikawa, tala, oyo ekobakisa bondimi bwa bino te? Nalobi epai ya bino ete, iyo; nzokande bokoli te o boyebi boko bobongo nie.

30 Kasi tala, lokola nkona evimbi, mpe eboti nkasa, mpe ebandi kokola, nde bosengeli mpenza koloba ete nkona ezali elamu; mpo tala evimbi, mpe eboti nkasa, mpe ebandi kokola. Mpe sikawa, tala, eye ekolendisa bondimi bwa bino te? Iyo, ekolendisa bondimi bwa bino: mpo okoloba nayebi ete eye ezali nkona elamu; mpo tala eboti nkasa mpe ebandi kokola.

31 Mpe sikawa, tala, eyebi bino na ntembe te eye ezali nkona elamu? Nalobi epai ya bino, Iyo; mpo nkona na nkona ekobotaka na elilingi ya yangomei.

32 Yango wana, soko nkona ekoli, ezali elamu, kasi soko ekoli te, tala ezali elamu te, yango wana ekobwakama mosika.

33 Mpe sikawa, tala, zambi bomeki bomeki, mpe bokoni nkona, mpe evimbi mpe eboti nkasa, mpe ebandi kokola, bosengeli mpenza koyeba ete nkona ezali elamu.

34 Mpe sikawa, tala, ezali boyebi bwa bino bobongo nie? Iyo, boyebi bwa bino bozali bobongo nie o likambo lina, mpe bondimi bwa bino bozali kolala; mpe eye zambi boyebi, mpo boyebi ete liloba livimbisi bozo bwa bino, mpe lisusu boyebi ete liboti mpenza nkasa, ete bososoli bwa bino bobandi kopela mwinda, mpe mayele ba bino mabandi kotandolama.

35 O nde, ezali te eye mpenza? Nalobi epai ya bino, iyo, zambi ezali mwinda; mpe eye enso ezali mwinda, ezali elamu, zambi ekoki kososolama, yango wana bosengeli koyeba ete ezali elamu; mpe sikawa tala, esilisi bino komeka mwinda moye ezali bososoli bwa bino bobongo nie?

36 Tala nalobi epai ya bino, Te; mpe esengeli bino te kotia mpembeni bondimi bwa bino, mpo bosalelaki bobele bondimi bwa bino mpo ya kokona nkona ete bokoka komeka bomeki bwa koyeba soko nkona ezalaki elamu.

37 Mpe tala, awa nzete ebandi kokola, bokoloba: Toleisa yango na bokebi bonene, ete ekoka kozwa mosisa, ete ekoka kokola, mpe epesa mbuma epai ya biso. Mpe sikawa tala, soko boleisi yango na bokebi boike, ekozwa mosisa, mpe ekokola, mpe ekopesa mbuma.

38 Kasi soko botali mpamba nzete, mpe botii te makanisi mpo ya boleisi bwa yango, tala, ekozwa mosisa moko te; mpe ekoya mulunge mwa moi mpe mokozikisa yango, zambi ezali na mosisa te, ekokauka nie, mpe bokopikola yango mpe kobwaka yango libanda.

39 Sikawa, eye ezali te zambi nkona ezalaki elamu te, mpe ezali te zambi mbuma ya yango elingaki kozala elongobana te; kasi ezali mpo mabele ma bino mazali ekomba, mpe bolingi koleisa nzete te, yango wana bokoki kozala na mbuma ya yango te.

40 Mpe boye, soko bokoleisa liloba te, kotalaka o boso na liso lya bondimi na mbuma, bokoki mokolo moko te kopikola mbuma ya nzete ya bomoi.

41 Kasi soko bokoleisa liloba, iyo, leisani nzete lokola ebandi kokola, na bondimi bwa bino elongo na etingia enene, mpe na bompikiliki, kotalaka o boso na mbuma ya yango, ekokamata mosisa; mpe tala ekozala nzete yoko ekobima zololo kina na bomoi bwa libela.

42 Mpe na ntina ya etingia ya bino mpe bondimi bwa bino mpe bompikiliki bwa bino na liloba na koleisaka lyango, ete likamata mosisa na bino, tala, moke moke bokopikola mbuma ya lyango, eye ezali ya motuya, eye ezali sukali likolo lya enso eye ezali sukali, mpe eye ezali mpembe likolo lya enso eye ezali mpembe, iyo, mpe ya peto likolo lya enso eye ezali peto; mpe bokosala limpati likolo lya mbuma eye kutu kina botondi, ete bozala lisusu na nzala te, mpe bozala na mposa ya mai te.

43 Nde, bandeko ba ngai, bokobuka mbano ya bondimi bwa bino, mpe etingia ya bino, mpe bompikiliki, mpe motema molai, kozelaka nzete epesa mbuma epai ya bino.