Makomi
Alama 33


Mokapo 33

Zenosi alakisi ete bato basengeli kosambela mpe kokumbamela Nzambe o bisika binso, mpe ete bosambisi bobalolami mosika na ntina ya Mwana Mobali—Zenoki alakisi ete ngolu epesami na ntina ya Mwana Mobali—Mose atombolaka o esobe, emoniseli yoko ya Mwana Mobali wa Nzambe. Penepene na 74 Yambo ya Klisto.

1 Sikawa esilisaki Alama koloba maloba maye, batindaki epai ya ye na mposa ya koyeba soko basengeli kondima na Nzambe moko, ete bakoka kozwa mbuma eye alobelaka, to boniboni basengeli kokona nkona, to liloba liye alobelaka, liye alobaki ete lisengeli kokonama o mitema mya bango; to na lolenge kani basengelaki kobanda kosalela bondimi bwa bango.

2 Mpe Alama alobaki epai ya bango: Tala, bolobi ete bokoki te kokumbamela Nzambe wa bino zambi bobwakami libanda lya sinagogi ya bino. Kasi tala, nalobi epai ya bino, soko bobanzi ete bokoki te kokumbamela Nzambe, bosali mbeba enene, mpe bosengelaki koluka nkoma; soko bobanzi ete balakisi bino eye, bososoli yango te.

3 Emikundoli bino botangaki nini Zenosi, profeta wa kala, alobaki etali losambo to bokumbami?

4 Mpo alobaki: Oyoki ngolu, O Nzambe, mpo oyoki losambo la ngai, kutu ezalaki ngai o esobe; iyo, oyokaki ngolu esambelaki ngai etali bango baye bazalaki bayini ba ngai, mpe obalolaki bango na ngai.

5 Iyo, O Nzambe, mpe oyokaki ngolu epai ya ngai esambelaki ngai epai ya yo o elanga ya ngai; ebelelaki ngai epai ya yo o losambo la ngai, mpe oyokaki ngai.

6 Mpe lisusu, O Nzambe, ebalukaki ngai o ndako ya ngai oyokaki ngai o losambo la ngai.

7 Mpe ebalukaki ngai o ebombelo ya ngai, O Nzambe, mpe esambelaki ngai epai ya yo, oyokaki ngai.

8 Iyo, oyoki ngolu epai ya bana ba yo ebeleli bango epai ya yo, mpo ya koyoka yo kasi bato te, mpe olingaki koyoka bango.

9 Iyo, O Nzambe, oyoki ngolu epai ya ngai, mpe oyoki ebelela ya ngai o katikati ya mayangani ma yo.

10 Iyo, mpe oyoki lisusu ngai ebwakami ngai libanda mpe etiolami ngai na bayini ba ngai; iyo, oyokaki ebelela ya ngai, mpe osilikaki na bayini ba ngai, mpe obimelaki bango na nkanda ya yo na bobebisami bwa sasaipi.

11 Mpe oyokaki ngai na ntina ya matungisi ma ngai mpe bosolo bwa ngai; mpe ezali na ntina ya Mwana Mobali wa yo ete oyokaki boye ngolu epai ya ngai, yango wana nakobelela epai ya yo na matungisi ma ngai manso, mpo na yo ezali bosepeli bwa ngai; mpo obalolaki masambisi ma yo mosika na ngai, na ntina ya Mwana Mobali wa yo.

12 Mpe sikawa Alama alobaki epai ya bango: Endimi bino nkoma ina iye ikomami na bango ba kala?

13 Tala, soko bondimi, bosengeli kondima nini Zenosi alobaki; mpo, tala alobaki: Obaloli mosika masambisi ma yo na ntina ya Mwana Mobali wa yo.

14 Sikawa tala, bandeko ba ngai, natuni soko botangi nkoma? Soko botangi, boniboni bokoki kozanga kondima Mwana Mobali wa Nzambe?

15 Mpo ekomami te ete Zenosi ye kaka alobelaki makambo maye, kasi Zenoki alobelaki makambo maye lokola—

16 Mpo tala, alobaki: Osiliki, O Nkolo, na bato baye, zambi balingi te kososola ngolu ya yo iye opesaki epai ya bango na ntina ya Mwana Mobali wa yo.

17 Mpe sikawa, bandeko ba ngai, bomoni ete profeta wa babale wa kala atatolaki Mwana Mobali wa Nzambe, mpe zambi bato balingaki te kososola maloba ma ye babambaki ye mabanga kina o liwa.

18 Kasi tala, eye ezali enso te; baye bazali te bobele boko baye balobeli etali Mwana Mobali wa Nzambe.

19 Tala, alobelamaki na Mose; iyo, mpe tala emoniseli yoko etelemisamaki o esobe, ete onso oyo akotala likolo lya yango akozala na bomoi. Mpe mingi batalaki yango mpe bazalaki na bomoi.

20 Kasi bake basosolaki ntina ya makambo mana, mpe eye na ntina ya bokasi bwa mitema mya bango. Kasi ezalaki mingi baye bazalaki mito mikasi boye ete balingaki te kotala yango wana bawaki. Sikawa ntina balingaki te kotala ezali zambi bandimaki te ete ekobikisa bango.

21 O bandeko ba ngai, soko bokokaki kobika bobele na kobwakaka miso mya bino zingazinga ete bokoka kobikisama, elingaki bino te kotala noki, to ekolinga bino kutu koyeisa mitema mya bino mikasi na bozangi bondimi, mpe kozala goigoi, ete bolinga te kobwaka miso mya bino zingazinga, ete bokoka kowa?

22 Soko boye, lisuma likoya likolo lya bino; kasi soko boye te, nde bwakani miso mya bino zingazinga mpe bandani kondima na Mwana Mobali wa Nzambe, ete akoya kosikola bato ba ye, mpe ete akoyoka mpasi mpe akokufa mpo ya kotumbolama mpo ya masumu ma bango; mpe ete akolamuka lisusu uta o bakufi, eye ekomeme esalema bosekwi, ete bato banso bakoteleme liboso lya ye, mpo ya kosambisama o mokolo mwa nsuka mpe mwa bosambisi, engebene na misala mya bango.

23 Mpe sikawa, bandeko ba ngai, nazali na mposa ete bokona liloba liye o mitema mya bino, mpe lokola libandi kovimba kutu boye leisani lyango na bondimi bwa bino. Mpe tala, ekokoma nzete yoko, kobimaka zololo na bino kina o bomoi bwa libela. Mpe nde Nzambe akoka kosala epai ya bino ete mikumba mya bino mikoka kozala pepele, na lisalisi lya bosepeli bwa Mwana Mobali wa ye. Mpe kutu eye enso ekoki bino kosala soko bolingi. Amene.