Makomi
Alama 34


Mokapo 34

Amuleki atatoli ete liloba lizali na Klisto mpo ya lobiko—Longola se soko botumbolami bosalemi, bato banso bakowa—Mobeko mobimba mwa Mose molakisi nzela ona mbeka ya Mwana Mobali wa Nzambe—Mwango mwa seko mwa bosikoli mofandi likolo lya bondimi mpe boyamboli—Sambelani mpo ya mapamboli ma ntango mpe ma molimo—Bomoi boye bozali ntango mpo ya bato kolengele kokutana na Nzambe—Salani lobiko la bino na bobangi liboso lya Nzambe. Penepene na 74 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete esilisaka Alama koloba maloba maye epai ya bango afandaki o nse likolo lya mabele, mpe Amuleki atelemeki mpe abandaki kolakisa bango, kolobaka:

2 Bandeko ba ngai, nakanisi ete ekoka te ete bozanga koyeba makambo maye malobamaki matali boyei bwa Klisto, oyo alakisami na biso azali Mwana Mobali wa Nzambe; iyo, nayebi ete makambo maye malakisamaki epai ya bino beboo liboso lya bokabwani uta o ntei ya biso.

3 Mpe lokola bino bozalaki na mposa ya ndeko mobali molingami wa ngai ete ayebisa epai ya bino nini bosengeli kosala, na ntina ya matungisi ma bino; mpe alobi mwa moke epai ya bino mpo ya kolengele mayele ma bino; iyo, mpe alendisi bino mpo ya bondimi mpe bompikiliki—

4 Iyo, kutu ete bozala na bondimi boike boye kutu mpo ya kokona liloba o mitema mya bino, ete bokoka komeka bomeki bwa bolamu bwa yango.

5 Mpe tomoni ete motuna monene moye mozali o makanisi ma bino mozali soko liloba lizali na Mwana Mobali wa Nzambe, to soko ezali Klisto te.

6 Mpe bomonoki lisusu ete ndeko mobali wa ngai alakisaki epai ya bino, o bileko mingi, ete liloba lya lobiko lizali na Klisto mpo ya lobiko.

7 Ndeko wa ngai abiangaki likolo lya maloba ma Zenosi, ete bosikoli bokoya o lisalisi lya Mwana Mobali wa Nzambe, mpe lisusu likolo lya maloba ma Zenoki; mpe lisusu abilaki epai ya Mose, mpo ya kolakisa ete makambo maye mazali solo.

8 Mpe sikawa, tala, nakotatola epai ya bino ete makambo maye mazali solo. Tala, nalobi epai ya bino, ete nayebi ete Klisto akoya o ntei ya bana ba bato, mpo ya kokamata bobuki mobeko bwa bato ba ye, mpe ete akotumbolama mpo ya masumu ma mokili; mpo Nkolo Nzambe alobi bongo.

9 Mpo elongobani ete botumbolami boko bosalema; mpo engebene na mwango monene mwa Nzambe wa Seko esengeli botumbolami bosalema, soko te bato banso basengeli na ntembe te kowa; iyo, banso bazali mito mikasi; iyo, banso bakwei mpe babungi, mpe basengeli kowa longola se soko ezali na lisalisi lya botumbolami boye elongobani bosalema.

10 Mpo elongobani ete ezala mbeka yoko enene mpe ya nsuka; iyo, mbeka ya moto te, mpe ya niama te, mpe ya lolenge loko te la ndeke; mpo ekozala te mbeka yoko ya moto; kasi esengeli ezala mbeka ezanga ndelo mpe ya seko.

11 Sikawa ezali moto moko te oyo akoki kobonza makila ma yemei maye makotumbolama mpo ya masumu ma bato basusu. Sikawa, soko moto moko abomi, tala mobeko mwa biso, moye mozali moyengebene, mokokamata bomoi bwa ndeko mobali wa ye? Nalobi epai ya bino, Te.

12 Kasi mobeko mokosenge bomoi bwa ye oyo abomi, yango wana ekoki kozala eloko te eye ezali mokuse na botumbolami boko bozanga ndelo eye ekokoka mpo ya masumu ma mokili.

13 Yango wana, elongobani ete ezala mbeka yoko enene mpe ya nsuka, mpe nde ekozala, to elongobani ete ezala, nsuka ya bosopi makila; nde ekokisami mobeko mwa Mose; iyo, enso ekokokisama, nsonge mpe elembo yoko na yoko, mpe yoko te ekoleka.

14 Mpe tala, eye ezali ntina mobimba ya mobeko, eteni na eteni kolakisaka na mbeka ena enene mpe ya nsuka; mpe mbeka ena enene mpe ya nsuka ekozala Mwana Mobali wa Nzambe, iyo, ezanga ndelo mpe ya seko.

15 Mpe boye akomeme lobiko na bango baye bakondima likolo lya nkombo ya ye; eye kozalaka mokano mwa mbeka eye ya nsuka, mpo ya komeme penepene nsopo ya ngolu, iye ilongi boyengebene, mpe imemi penepene nzela epai ya bato ete bakoka kozala na bondimi mpo ya boyamboli.

16 Mpe boye ngolu ekoki kosepelisa bisenge bya boyengebene, mpe kozinga byango o maboko ma bozangi likama, ntango ye oyo asaleli te bondimi mpo ya boyamboli amitalisi na mobeko mobimba mwa bisenge bya boyengebene; yango wana bobele epai ya ye oyo azali na bondimi mpo ya boyamboli emememi mpembeni mwango monene mpe mwa seko mwa bosikoli.

17 Yango wana tika Nzambe apesa epai ya bino, bandeko ba ngai, ete bokoka kobanda kosalela bondimi bwa bino mpo ya boyamboli, ete bobanda kobelela nkombo ya ye esantu, ete ayoka ngolu epai ya bino;

18 Iyo, belelani epai ya ye mpo ya ngolu; mpo azali na nguya mpo ya kobikisa.

19 Iyo, bomikitisa, mpe kobani na kosambela epai ya ye.

20 Belelani epai ya ye ezali bino o bilanga bya bino, iyo, likolo lya bibwele bya bino binso.

21 Belelani epai ya ye o ndako ya bino, iyo, likolo lya baye ndako ya bino, ntongo, nzanga, mpe mpokwa.

22 Iyo, belelani epai ya ye mpo ya mabe na nguya ya bayini ba bino.

23 Iyo, belelani epai ya ye mpo ya mabe na zabulu, oyo azali moyini wa bosembo bonso.

24 Belelani epai ya ye likolo lya milona mya bilanga bya bino, ete bokoka kozwa bomengo na myango.

25 Belelani likolo lya bibwele bya bilanga bya bino, ete bikoka koyikana.

26 Kasi eye ezali enso te; bosengeli kosopa mpenza bozo bwa bino o bisika bya bino bikangema, mpe bibombelo bya bino, mpe o esobe ya bino.

27 Iyo, mpe ebeleli bino te epai ya Nkolo, tika mitema mya bino mitondisama, mibendana libanda o losambo epai ya ye ntango inso mpo ya bolamu bwa bino, mpe lisusu mpo ya bolamu bwa bango baye bazali zingazinga na bino.

28 Mpe sikawa tala, bandeko balingami ba ngai, nalobi epai ya bino, banzani te ete eye ezali enso; mpo esilisi bino kosala makambo maye, soko bobaloli mosika bazangi, mpe baye ba bolumbu, mpe bobimeli te bakoni mpe batungisami, mpe bokabi te biloko bya bino, soko bozwi, na bango baye batelemi na mposa—nalobi epai ya bino, soko bosali yoko te ya makambo maye, tala, losambo la bino lozali mpamba, mpe lotombeli bino eloko te, mpe bozali lokola bakibisi baye bawangani bondimi.

29 Yango wana, soko bomikundoli te kozala na lolango, bozali lokola likambu, liye molambi kambili akobwaka libanda, (yango kolongobanaka te) mpe liniatami o nse ya makolo ma bato.

30 Mpe sikawa, bandeko ba ngai, nalingi ete, esilisi bino kozwa matatoli mingi boye, komonoko ete nkoma isantu itatolaki makambo maye, yakani mpe botani mbuma mpo ya boyamboli.

31 Iyo, nalingi ete boya mpe boyeisa mitema mya bino mikasi lisusu te; mpo tala, sikawa ezali ntango mpe mokolo mwa lobiko la bino; mpe yango wana, soko bokoyambola mpe bokoyeisa mitema mya bino mikasi te, sasaipi mwango monene mwa bosikoli mokomememe mpembeni ya bino.

32 Mpo tala, bomoi boye bozali ntango mpo ya bato kolengele mpo ya kokutana na Nzambe; iyo, tala mokolo mwa bomoi boye mozali mokolo mpo ya bato kosala misala mya bango.

33 Mpe sikawa, lokola nalobaki epai ya bino yambo, lokola bozali na matatoli mingi, yango wana, nabondeli na bino ete bozilisa te mokolo mwa boyamboli bwa bino kina o nsuka; mpo nsima ya mokolo moye mwa bomoi, moye mopesameli biso mpo ya kolengele mpo ya boseko, tala, soko tobongisi te ntango ya biso ezali biso o bomoi boye, nde eyei butu bwa molili na bwango ekoki te mosala kosalema.

34 Bokoki koloba te, emememi bino o kpokoso ena ya nsomo, ete nakoyambola, ete nakozonga epai ya Nzambe wa ngai. Te, bokoki te koloba eye; mpo molimo mona kaka oyo mozwi nzoto ya bino o ntango eye bokei libanda lya bomoi boye, molimo mona kaka akozala na nguya ya kozwa nzoto ya bino o mokili mwa seko.

35 Mpo tala, soko bozilisaki mokolo mwa boyamboli bwa bino kutu kina o liwa, tala, bokomi bayangelami na molimo mwa zabulu, mpe akangi bino ba ye; yango wana, Molimo mwa Nkolo alongwaki uta na bino, mpe azali na esika te na bino, mpe zabulu azali na nguya enso likolo lya bino; mpe eye ezali bozali bwa nsuka bwa moto wa nkuna.

36 Mpe eye nayebi; zambi Nkolo alobi ete afandi te o tempelo izanga bosantu, kasi o mitema mya basembo afandi; iyo, mpe alobi lisusu ete basembo bakofanda o bokonzi bwa ye, mpo ya kokende libanda lisusu te; kasi bilamba bya bango bikokomisama mpembe o nzela ya makila ma Mwana wa Mpate.

37 Mpe sikawa, bandeko balingami ba ngai, nazali na mposa ete bomikundola makambo maye, mpe ete bosala lobiko la bino na bobangi liboso lya Nzambe, mpe ete bowangana lisusu te boyei bwa Klisto;

38 Ete bowela lisusu te na Molimo Mosantu, kasi boyamba ye, mpe bokamata nkombo ya Klisto; ete bomikitisa liboso lya ye kutu o mputulu, mpe bokumbamela Nzambe, o bisika binso bokoka kozala, o molimo mpe o bosolo; mpe ete bozala na bomoi na bopesi matondi mokolo na mokolo, mpo ya ngolu mpe mapamboli mingi maye apesi likolo lya bino.

39 Iyo, mpe lisusu nakolendisa bino, bandeko ba ngai, ete bokenge mpo ya losambo ntango inso, ete bokoka kokambema te mosika na masenginia ma zabulu, ete alonga bino te, ete bokoka kokoma bayangelami ba ye te o mokolo mwa nsuka; mpo tala, akopesa bino mbano ya eloko elamu te.

40 Mpe sikawa bandeko balingami ba ngai, nalingi kolendisa bino na kozala na bompikiliki, mpe ete bondima ndenge inso ya matungisi; ete botiola te bango baye babwaki bino libanda na ntina ya bozangi boluti bwa bino, mbele bokoma basumuki lokola bango;

41 Kasi ete bozala na bompikiliki, mpe bokanga mitema na matungisi mana, na elikia yoko ya sikisiki ete mokolo moko bokopema uta o matungisi ma bino manso.