Makomi
Alama 37


Mokapo 37

Palaki ya motako mpe nkoma isusu ibatelami mpo ya komeme bozo na lobiko—Bayalede babomamaki na ntina ya nkuna ya bango—Ndai mpe mayokani ma bango masengeli kobombama na bato—Tunanani elongo na Nkolo na misala mya bino minso—Lokola Liawona ekambaki Banefi, boye liloba lya Klisto likokamba bato o bomoi bwa seko. Penepene na 74 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa, mwana mobali wa ngai Elamani, natindi yo ete okamata makundoli maye mapesamaki mokumba na ngai;

2 Mpe natindi yo lisusu ete obomba likundoli lya bato baye, lokola nasalaki, likolo lya palaki ya Nefi, mpe obomba biloko binso biye bisantu, biye nabombaki; kutu lokola nabombaki byango; mpo ezali mpo ya mwango mwa bwania ete mabombami.

3 Mpe palaki iye ya motako, iye ikwi minkoma miye, miye mizali na makundoli ma nkoma isantu likolo lya myango, iye izali bonkoko bwa batata ba biso ba kala, kutu uta o ebandeli—

4 Tala, ebikulamaki na batata ba biso, ete ikobombama mpe ikokitanisama uta nkola yoko o esusu, mpe ikobombama mpe ikobatelama na loboko la Nkolo kina ikokende epai ya ekolo na ekolo, libota na libota, monoko na monoko, mpe bato na bato, ete bakoyeba mibombamo mikwami likolo lya yango.

5 Mpe sikawa tala, soko mibombami misengeli kosimba bongengi bwa yango; iyo, mpe mikosimba bongengi bwa yango; iyo, mpe lokola mikosimba palaki inso iye ikwi nkoma isantu.

6 Sikawa okoki kobanza ete eye ezali ligboma na ngai; kasi tala nalobi epai ya yo, ete na biloko bike mpe bya mindondo te makambo manene makomememe masalema; mpe nzela ike mbala mingi ikobulunganisa moto wa bwania.

7 Mpe Nkolo Nzambe akosalaka na nzela mpo ya komeme mpembeni mwango mwa ye monene mpe mwa seko; mpe na nzela ike mpenza Nkolo akobulunganisaka moto wa bwania mpe akomeme mpembeni lobiko la babozo mingi.

8 Mpe sikawa, ezali kina lelo bwania na Nzambe ete biloko biye bibatelama; mpo tala, bitandolaki bokundoli bwa bato baye, iyo, mpe bindimisaki mingi libosani lya nzela ya bango, mpe Bimemeki bango o boyebi bwa Nzambe wa bango mpo ya lobiko la bozo bwa bango.

9 Iyo, nalobi epai ya yo, ezalaka te mpo ya makambo maye, maye makwami o makundoli maye, maye mazali likolo lya palaki iye, Amona mpe bandeko ba ye bakokaki te kondimisa nkoto mingi boye ya Balamani momeseno mwa miko mwa batata ba bango; iyo, makundoli maye mpe maloba ma mango mamemeki bango epai ya boyamboli, ena ezali, mamemeki bango o boyebi bwa Nkolo Nzambe wa bango, mpe kosepela na Yesu Klisto Mosikoli wa bango.

10 Mpe nani ayebi soko ekozala nzela ya bomemi nkoto mingi ya bango, iyo, mpe lisusu nkoto mingi ya bandeko ba mito mikasi ba biso, Banefi, baye sikawa bayeisi mitema mya bango mikasi na lisumu mpe bobe, o boyebi bwa Mosikoli wa bango?

11 Sikawa mibombamo miye miyebisami minso te epai ya ngai; yango wana nakotika.

12 Mpe ekoki soko nalobi bobele mibombami mpo ya mwango mwa bwania, moye mwango moyebani na Nzambe; mpo akopesaka toli na bwania likolo lya misala mya ye, mpe nzela ya ye ezali semba, mpe botamboli bwa ye bozali zunguluke yoko ya seko.

13 O omikundola, omikundola, mwana mobali wa ngai Elamani, boniboni sikisiki ezali mitindo mya Nzambe. Mpe alobaki: Soko bobateli mitindo mya ngai bokozwa bomengo o mboka—kasi soko bobateli te mitindo mya ngai bokokatama monka uta o miso mya ngai.

14 Mpe sikawa omikundola, mwana mobali wa ngai, ete Nzambe apesi yo mokumba ya biloko biye, biye bizali bya bule, biye abombi bule, mpe lisusu biye akobomba mpe akobatela mpo ya mwango mwa bwania na ye, ete akoka kolakisa nguya ya ye epai ya nkola ikoya.

15 Mpe sikawa tala, nalobeli yo na molimo mwa bobikuli, ete soko obuki mitindo mya Nzambe, tala, biloko biye biye bizali bule bikobotolomo uta na yo na nguya ya Nzambe, mpe okosundolama epai ya Satana, ete akoka koyungula yo lokola mpumbulu liboso lya mopepe.

16 Kasi soko obateli mitindo mya Nzambe, mpe osali na biloko biye biye bizali bule engebene na eye Nkolo akotinda yo, (mpo osengeli kobila epai ya Nkolo mpo ya makambo manso maye osengeli kosala na byango) tala, nguya te ya mabele to ya limfelo ekoki kokamata byango uta na yo, mpo Nzambe azali na nguya mpo ya kokokisa maloba ma ye manso.

17 Mpo akokokisa bilako bya ye binso biye akosala epai ya yo, mpo akokisi bilako biye asali epai ya batata ba biso.

18 Mpo alakaki epai ya bango ete akobatela biloko biye mpo ya mwango mwa bwania na ye, ete akoka kolakisa nguya ya ye epai ya nkola ikoya.

19 Mpe sikawa tala, mwango moko akokisi; kutu na bozongisi bwa nkoto mingi ya Balamani o boyebi bwa bosolo; mpe alakisi bango nguya ya ye, mpe akolakisa lisusu kaka nguya ya ye na bango epai ya nkola ikoya; yango wana ikobatelama.

20 Yango wana natindi yo, mwana mobali wa ngai Elamani, ete ozala na etingia na kokokisaka maloba ma ngai manso, mpe ete ozala na etingia na kobombaka mitindo mya Nzambe lokola mikomami.

21 Mpe sikawa, nakoloba epai ya yo etali palaki ntuku ibale na inei ina, ete obomba yango, ete mibombamo mpe misala mya molili, mpe misala mya bango mya nkuku, to misala mya nkuku mya bato baye babebisami, mikoka komonisama epai ya bato ba ye; iyo, bobomi bonso bwa bango, mpe koyongolo, mpe bopunzi bwa bango, mpe nkuna mpe bonsomo bonso bwa bango, ikoka komonisama epai ya bato baye; iyo, mpe ete obatela bibongolele biye.

22 Mpo tala, Nkolo amonoki ete bato ba ye babandaki kosala o molili, iyo, kosala bobomi na nkuku mpe bonsomo; yango wana Nkolo alobaki, soko bayamboli te bakobebisama mosika uta o etando ya mabele.

23 Mpe Nkolo alobaki: Nakolengele epai ya mosali wa ngai Gazelemi, libanga lyoko, liye likongenge o molili mpo ya mwinda, ete nakoka kobombola epai ya bato ba ngai baye basaleli ngai, ete nakoka kobombola epai ya bango misala mya bandeko ba bango, iyo, misala mya nkuku, misala mya bango mya molili, mpe nkuna mpe bonsomo bwa bango.

24 Mpe sikawa, mwana mobali wa ngai, bibongolele biye bilengelemeki ete liloba lya Nzambe likoka kokokisama, liye alobaki, kolobaka:

25 Nakomeme libanda boindo epai ya mwinda misala mya bango minso mya nkuku mpe bonsomo bwa bango; mpe longola se soko boyamboli nakobebisa bango uta o libanda lya etando ya mabele; mpe nakomeme o mwinda bonkutu mpe bonsomo bwa bango, epai ya ekolo na ekolo eye ekokamata nsima mokili moye.

26 Mpe sikawa, mwana mobali wa ngai, tomoni ete bayambolaki te; yango wana babebisami, mpe kina sikawa liloba lya Nzambe likokisami; iyo, bonsomo bwa bango bwa nkuku bomememi libanda lya boindo, mpe miyebani epai ya biso.

27 Mpe sikawa, mwana mobali wa ngai, natindi yo ete osimba ndai inso ya bango, mpe boyokani bwa bango, mpe bondimani bwa bango o bonsomo bwa bango bwa nkuku; iyo, mpe bilembo bya bango binso mpe makamwisi ma bango okobomba na bato baye, ete bayeba mango te, mbele mbaimbai bakokweya o kati ya molili mpe bakobebisama.

28 Mpo tala, ezali botutu boko likolo lya mboka eye mobimba, ete bobebisami bokoya likolo lya basali bana banso ba molili, engebene na nguya ya Nzambe, ekotela bango mpenza; yango wana nazali na mposa ete bato baye bakoka te kobebisama.

29 Yango wana okobomba mwango mwa nkuku moye mwa ndai ya bango mpe boyokani bwa bango na bato baye, mpe bobele nkuna ya bango mpe bobomi bwa bango mpe bonsomo bwa bango okosala miyebana epai bango; mpe okolakisa bango koyina nkuna mpe bonsomo mpe bobomi bwa lolenge loye; mpe okolakisa bango lisusu ete bato baye babebisamaki na ntina ya nkuna bonsomo bwa bango mpe bobomi bwa bango.

30 Mpo tala, babomaki baprofeta banso ba Nkolo baye bayaki o ntei ya bango mpo ya kosakola epai ya bango etali bobe bwa bango; mpe makila ma bango baye babomaki mabeleli epai ya Nkolo Nzambe wa bango mpo ya bobekoli likolo lya bango baye babomamaki; mpe boye masambisi ma Nzambe mayaki likolo lya baye ba molili mpe makelemba ma nkuku.

31 Iyo, mpe elakelama botutu mboka libela na libela mpo ya basali bana ba molili mpe makelemba ma nkuku, kutu mpo ya bobebisami, longola se soko bayamboli yambo batela mpenza.

32 Mpe sikawa, mwana mobali wa ngai, omikundola maloba maye nalobaki epai ya yo; ndimisa te miango miye mya nkuku epai ya bato baye, kasi lakisa bango boyini boko bwa libela likolo lya lisumu mpe bobe.

33 Teya bango boyamboli, mpe bondimi likolo lya Nkolo Yesu Klisto; lakisa bango bamikitisa mpe bazala basokemi mpe na mitema mikita; lakisa bango bazala kotelemela masenginia ma zabulu, o bondimi bwa bango likolo lya Nkolo Yesu Klisto.

34 Lakisa bango kolembe mokolo moko te misala milamu, kasi kozala basokemi mpe na mitema mikita; mpo ba lolenge lona bakozwa bopemi na bozo bwa bango.

35 O, omikundola, mwana mobali wa ngai, mpe oyekola bwania o bolenge bwa yo; iyo, oyekola o bolenge bwa yo kobatela mitindo mya Nzambe.

36 Iyo, mpe belela epai ya Nzambe mpo ya lisalisi lya yo; iyo, tika misala mya yo minso mizala epai ya Nkolo, mpe esika enso okei tika yango ezala na Nkolo; iyo, tika ete makanisi ma yo manso makambema epai ya Nkolo; iyo, tika ete mayoki ma motema mwa yo matiama likolo lya Nkolo libela.

37 Tunana elongo na Nkolo na misala mya yo minso, mpe akokamba yo mpo ya bolamu; iyo, ekolala yo o nse o butu lala o nse na Nkolo, ete akoka kokenge likolo lya yo na mpongi ya yo; mpe ntango ekolamuka yo o ntongo tika motema mwa yo motonda na matondi epai ya Nzambe; mpe soko osali makambo maye, okotombolama likolo o mokolo mwa nsuka.

38 Mpe sikawa, mwana mobali wa ngai, nazali na mwa moke ya koloba etali eloko eye batata ba biso babiangaki libungutulu, to mokambi—to batata ba biso babiangaki yango Liawona, eye ezali, na kolimbolaka, kompa yoko; mpe Nkolo alengeleki yango.

39 Mpe tala, ekoki moto te kosala mosala nsima ya esaleli ya ntoki boye. Mpe tala, elengelemeki mpo ya kolakisa epai ya batata ba biso botamboli boye bakosala na mobembo o esobe.

40 Mpe esalaki mpo ya bango engebene na bondimi bwa bango na Nzambe; yango wana, soko bazalaka na bondimi mpo ya kondima ete Nzambe akokaki kosala ete makonga mana malakisa nzela bakokende, tala, esalemaki; yango wana bazalaki na likamwisi liye, mpe lisusu makamwisi masusu masalemaki, na nguya ya Nzambe, mokolo na mokolo.

41 Nzokande, zambi makamwisi mana masalemaki na nzela ike, yango ilakisaki epai ya bango misala mya bokamwi. Bazalaki goigoi, mpe babosanaki kosalela bondimi mpe etingia ya bango mpe nde misala mina mya bokamwi misilaki, mpe bazwaki botomboli lisusu te o mobembo mwa bango.

42 Yango wana, bawumelaki o esobe, to basalaki te mobembo na botamboli semba, mpe batungisamaki na nzala mpe mposa ya mai, na ntina ya masumu ma bango.

43 Mpe sikawa, mwana mobali wa ngai, nalingi ete ososola ete makambo maye mazangi elilingi te; mpo lokola batata ba biso bazalaki goigoi na kosala keba na kompa eye (sikawa makambo maye mazalaki ma ntango) bazwaki bomengo te; kutu boye ezalaki makambo maye mazali ma molimo.

44 Mpo tala, ezali petepete kosala keba na liloba lya Klisto, liye likolakisa yo botamboli boko bwa alima na esengo ya seko, lokola esengelaki mpo ya batata ba biso kosala keba na kompa, eye ekolakisa epai ya bango botamboli boko bwa alima o mboka elakelama.

45 Mpe sikawa nalobi, ezali kuna emoniseli moko o likambo liye? Mpo lokola mpenza ezali solo mokambi moye momemeki batata ba biso, na kolandaka botamboli bwa bango, o mboka elakelama, maloba ma Klisto, soko tolandi botamboli bwa mango, makomeme biso o ngambo esusu ya lobwaku la mawa o kati ya mboka ya elako elamu mingi koleka.

46 O mwana mobali wa ngai, tozala goigoi te na ntina ya petepete ya nzela; mpo boye ezalaki na batata ba biso; mpo esalemaki mpo ya bango, mpo boye elengelemeki mpo ya bango, ete soko batalaka bakokaki kozala na bomoi. Nzela elengelemi, mpe soko tokotala yango tokozala na bomoi libela.

47 Mpe sikawa, mwana mobali wa ngai, tala ete obatela biloko biye bya bule, iyo, tala ete otala na Nzambe mpe ozala na bomoi. Kende epai ya bato baye kosakola liloba, mpe zala na limemia, Mwana mobali wa ngai, sese.