Makomi
Alama 38


Mitindo mya Alama na mwana mobali wa ye Sibiloni.

Kokwaka mokapo 38.

Mokapo 38

Sibiloni aniokwamaki mpo ya ntina ya bosembo—Lobiko lozali na Klisto, oyo azali bomoi mpe mwinda mwa mokili—Simbani mposa inso ya bino. Penepene na 74 Yambo ya Klisto.

1 Mwana mobali wa ngai, pesa litoyi na maloba ma ngai, mpo nalobi epai ya yo, kutu lokola nalobaki epai ya Elamani, ete mbala nzike lokola ekobatela yo mitindo mya Nzambe okozwa bomengo o mboka; mpe mbala nzike lokola ekobatela yo te mitindo mya Nzambe okokatama mosika uta o miso mya ye.

2 Mpe sikawa, mwana mobali wa ngai, nandimi ete nakozala na bosepeli bonene na yo, na ntina ya molende mpe bondimi bwa yo epai ya Nzambe; mpo lokola obandi o bolenge bwa yo kotala na Nkolo Nzambe wa yo, kutu boye nazali na elikia ete okokoba na kobatelaka mitindo mya ye; mpo apambolami ye oyo akotia molende kina o nsuka.

3 Nalobi epai ya yo, mwana mobali wa ngai, ete nazali na bosepeli bonene na yo, na ntina ya bondimi bwa yo mpe na etingia ya yo, mpe bompikiliki bwa yo mpe motema molai mwa yo o ntei ya bato ba Bazolami.

4 Mpo nayebi ete ozalaki na miniololo; iyo, mpe nayebi lisusu ete obambamaki mabanga mpo ya ntina ya liloba; mpe ondimaki makambo maye manso na bompikiliki zambi Nkolo azalaki elongo na yo; mpe sikawa oyebi ete Nkolo abikisaki yo.

5 Mpe sikawa mwana mobali wa ngai, Sibiloni, nalingi ete omikundola, ete lokola mpenza okotia elikia ya yo na Nzambe kutu mingi boye akobikisa yo o libanda lya mimekano mya yo, mpe mobulu mwa yo, mpe matungisi ma yo, mpe okotombolama likolo o mokolo mwa nsuka.

6 Sikawa, mwana mobali wa ngai, nalingi te ete okanisa ete ngai nayebi makambo maye ngaimei, kasi ezali Molimo mwa Nzambe oyo azali na ngai oyo azali kosala makambo maye mayebana epai ya ngai; mpo soko nabotamaki te na Nzambe nalingaki te koyeba makambo maye.

7 Kasi tala, Nkolo na ngolu ya ye enene atindaki anzelu wa ye mpo ya kosakola epai ya ngai ete nasengeli kotika mosala mwa bobebisi o ntei ya bato ba ye; iyo, mpe namoni anzelu moko miso na miso, mpe alobaki na ngai, mpe mongongo mwa ye mozalaki lokola nkake, mpe moningisaki mabele mobimba.

8 Mpe esalemaki ete nazalaki mikolo misato mpe butu isato o bolozi mpe nsomo ya bololo mingi koleka o bozo bwa ngai; mpe mokolo moko te, kina nabelelaki epai ya Nkolo Yesu Klisto mpo ya ngolu, nazwaki bolimbisi bwa masumu ma ngai. Kasi tala, nabelelaki epai ya ye mpe nazwaki kimia o bozo bwa ngai.

9 Mpe sikawa, mwana mobali wa ngai, nalobeli yo eye ete okoka kozwa bwania, ete okoka koyekola na ngai ete ezali te nzela esusu to mayele na wapi moto akoki kobikisama, bobele o kati mpe na lisalisi lya Klisto. Tala, azali bomoi mpe mwinda mwa mokili. Tala, azali liloba lya bosolo mpe bosembo.

10 Mpe sikawa, lokola obandi kolakisa liloba kutu boye nalingi ete okoba kolakisa; mpe nalingi ete ozala na etingia mpe motei o makambo manso.

11 Tala ete otombwana te mpo ya lolendo; iyo, tala ete omikumisa te na bwania bwa yomei, to na bokasi bwa yomei.

12 Salela mpiko, kasi enzombo te; mpe lisusu tala ete osimba mposa inso ya yo, ete okoka kotondisama na bolingo; tala ete omibenda uta na goigoi.

13 Sambela te lokola Bazolami bakosalaka, mpo omoni ete bakosambelaka mpo bayokama na bato, mpe mpo bakumisama mpo ya bwania bwa bango.

14 Loba te: O Nzambe, natondi yo ete biso tozali balamu koleka bandeko ba biso; kasi kutu loba: O Nkolo, limbisa bozangi bolongobani bwa ngai, mpe omikundola bandeko ba ngai na ngolu—iyo, ndima bozangi bolongobani bwa yo liboso lya Nzambe.

15 Mpe tika Nkolo apambola bozo bwa yo, mpe ayamba yo o mokolo mwa nsuka o kati ya bokonzi bwa ye, mpo ya kofanda na kimia. Sikawa kende, mwana mobali wa ngai, mpe lakisa liloba epai ya bato baye. Zala na limemia. Mwana mobali wa ngai, sese.