Makomi
Alama 45


Nsango ya bato ba Nefi, mpe bitumba mpe bokabwani bwa bango, o mikolo mya Elamani, engebene na likundoli lya Elamani, liye abombaki o mikolo mya ye.

Kokwaka mikapo 45 o 62 eye o kati.

Mokapo 45

Elamani andimi maloba ma Alama—Alama abikuli bobebisami bwa Banefi—Apamboli mpe alakeli mboka botutu—Alama akokaki kokamatama likolo na Molimo, kutu lokola Mose—Bokabwani bokomi o Eklezia. Penepene na 73 Yambo ya Klisto.

1 Tala, sikawa esalemaki ete bato ba Nefi basepelisamaki mpenza, zambi Nkolo abikisaki lisusu bango libanda lya maboko ma bayini ba bango; yango wana bapesaki matondi epai ya Nkolo Nzambe wa bango; iyo, mpe bakilaki mingi mpe basambelaki mingi, mpe bakumbamelaki Nzambe na bosepeli bonene mpenza.

2 Mpe esalemaki ete o mobu mwa zomi na libwa mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi, ete Alama ayaki epai ya mwana mobali wa ye Elamani mpe alobaki epai ya ye: Endimi yo maloba maye nalobaki epai ya yo matali makundoli mana maye mabombami?

3 Mpe Elamani alobaki epai ya ye: Iyo, nandimi.

4 Mpe Alama alobaki epai ya ye: Endimi yo na Yesu Klisto, oyo akoya?

5 Mpe alobaki: iyo, nandimi maloba manso olobaki.

6 Mpe Alama alobaki epai ya ye lisusu: Ekobatela yo mitindo mya ngai?

7 Mpe alobaki: Iyo, nakobatela mitindo mya yo na motema mwa ngai mobimba.

8 Nde Alama alobaki epai ya ye: Opambolami; mpe Nkolo akopesa yo bomengo o mboka eye.

9 Kasi tala, nazali na mwa moke ya kobikula epai ya yo; kasi nini nakobikula epai ya yo okosala te eyebana; iyo, nini nakobikula epai ya yo ekoyebisama te, kutu kina bobikuli bokokokisama; yango wana koma maloba maye nakoloba.

10 Mpe maye mazali maloba: Tala, namoni ete bato baye mpenza, Banefi, engebene na molimo mwa bobimisi oyo azali na ngai, na mobu nkama minei uta o ntango Yesu Klisto akomimonisa epai ya bango, bakokulumwa o bozangi bondimi.

11 Iyo, mpe nde bakomono bitumba mpe bokono, iyo, nzala mpe bosopi makila, kutu kina bato ba Nefi bakosila—

12 Iyo, mpe eye zambi bakokulumwa o bozangi bondimi mpe bakokweya o kati ya misala mya molili, mpe bosoni, mpe ndenge inso ya mabe; iyo, nalobi epai ya yo, ete zambi bakosumuka na mwinda mpe boyebi bonene, iyo, nalobi epai ya yo, ete uta mokolo mona, kutu nkola ya inei ekoleka te enso yambo bobe boye bonene makosalema.

13 Mpe ekoya mokolo mona monene, tala, ntango noki mpenza eyei eye bango baye bazali sikawa, to nkona ya bango baye batangemi o ntei ya bato ba Nefi, bakotangema lisusu te o ntei ya bato ba Nefi.

14 Kasi onso oyo atikali, mpe abebisami te o mokolo mona monene mpe mwa nsomo, akotangema o ntei ya Balamani, mpe akokoma lokola bango, banso, longola se soko ezali ndambo oyo bakobiangema bayekoli ba Nkolo; mpe bango Balamani bakolanda kutu kina bakosila. Mpe sikawa, na ntina ya bobe, mabikuli maye makokokisama.

15 Mpe sikawa esalemaki ete esilisaka Alama koloba makambo maye na Elamani, apambolaki ye, mpe lisusu bana babali ba ye basusu; mpe lisusu apambolaki mabele mpo ya litomba lya basembo.

16 Mpe alobaki: boye elobi Nkolo Nzambe—Mboka ekolakelama botutu, iyo, mboka eye, mpo ya ekolo na ekolo, libota na libota, monoko na monoko, mpe bato na bato, kina o bobebisami, baye basali na nkuna, eteli bango mobimba; mpe lokola nalobi ekosalema boye ekozala; mpo eye ezali botutu mpe lipamboli lya Nzambe likolo lya mboka, mpo Nkolo akoki kotala likolo lya lisumu ata ndambo eke te ya ndingisa.

17 Mpe sikawa, elobaki Alama maloba maye apambolaki eklezia, iyo, bango banso baye bakoteleme ngbi o bondimi uta o ntango ena mpe nsima.

18 Mpe esilisaki Alama kosala eye akendeki libanda lya mboka Zalayemila, lokola mpo ya kokende o kati ya mboka ya Meleki. Mpe esalemaki ete ayokanaki lisusu te; mpe lokola mpo ya liwa lya ye to bokundami bwa ye toyebi te.

19 Tala, eye toyebi, ete azalaki moto moko sembo; mpe liloba likendeki mosika o eklezia ete akamatamaki na Molimo, to akundamaki na loboko la Nkolo, kutu lokola Mose. Kasi tala, nkoma ilobi Nkolo akamataki Mose epai ya yemei; mpe tobanzi ete ayambi lokola Alama o molimo; yango wana, mpo ya ntina eye toyebi eloko te etali liwa lya ye mpe bokundami bwa ye.

20 Mpe sikawa esalemaki ete o ebandeli ya mobu zomi na libwa mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi, ete Elamani akendeki o ntei ya bato mpo ya kosakola liloba epai ya bango.

21 Mpo tala, na ntina ya bitumba babundaki na Balamani mpe bokabwani boke mingi mpe mbilingambilinga iye izalaki o ntei ya bato, ekomaki elongobani ete liloba lya Nzambe lisakolama o ntei ya bango, iyo, mpe ete libongisi lyoko lya mibeko lisalema o ntaka ya eklezia.

22 Yango wana, Elamani mpe bandeko ba ye bakendeki mpo ya kotia lisusu eklezia o mboka mobimba, iyo, o engumba na engumba o ntaka ya mboka eye ezwamaki na bato ba Nefi. Mpe esalemaki ete baponoki banganga mpe balakisi o ntaka ya mboka mobimba, likolo lya biklezia binso.

23 Mpe sikawa esalemaki ete esilisaka Elamani mpe bandeko ba ye baponoki banganga mpe balakisi likolo lya biklezia ete ebimaki bokabwani o ntei ya bango, mpe balingaki te kosala keba na maloba ma Elamani mpe bandeko ba ye;

24 Kasi bakolaki na lolendo, batombolamaki o mitema mya bango, na ntina ya bozwi bonene mpenza bwa bango; yango wana bakolaki na bozwi o miso mya bangomei, mpe balingaki te kosala keba na maloba ma bango, mpo ya kotambola alima liboso lya Nzambe.