Makomi
Alama 47


Mokapo 47

Amalikia asaleli bobubi, bobomi, mpe poloso mpo ya kokoma mokonzi wa Balamani—Banefi bakabwani bazali ba nkuna mpe ba loma koleka Balamani. Penepene na 72 Yambo ya Klisto.

1 Sikawa tokozonga o likundoli lya biso na Amalikia mpe bango baye bakimaki elongo na ye o kati ya esobe; mpo, tala, akamataka bango baye bakendeki elongo na ye, mpe amataki o mboka ya Nefi o ntei ya Balamani, mpe alamusaki Balamani na nkanda na bato ba Nefi, mpenza ete mokonzi wa Balamani atindaki esakola yoko o ntaka ya mboka mobimba, ete bamisangisa elongo lisusu mpo ya kobunda na Banefi.

2 Mpe esalemaki ete ekendeki esakola o ntei ya bango babangaki mpenza; iyo, bayokaki nsomo na koyokisa mabe mokonzi, mpe bayokaki nsomo lokola na kobunda na Banefi mbele babungisa bomoi bwa bango. Mpe esalemaki ete balingaki te, to eteni eleki mingi ya bango balingaki te, kotosa mitindo mya mokonzi.

3 Mpe sikawa esalemaki ete mokonzi azalaki na nkele na ntina ya bozangi botosi bwa bango; yango wana apesaki Amalikia bokomanda bwa eteni ya limpinga lya ye eye ezalaki na botosi epai ya bitinda bya ye, mpe atindaki ete akende mpe asengisa bango na mandoki.

4 Sikawa tala, eye ezalaki mposa ya Amalikia; mpo ye kozalaka moto moko wa ekpake mpo ya kosala bobe yango wana atiaki mwango o motema mwa ye mpo ya kobotolo bokonzi na mokonzi wa Balamani.

5 Mpe sikawa azalaki na bokomanda bwa biteni bina bya Balamani baye basepelaki na mokonzi; mpe alukaki kolonga bosepeli bwa bango baye bazalaki te na botosi; yango wana akendeki o boso o esika eye ebiangemaki Onida, mpo kuna ekimaka Balamani banso; mpo babombolaki limpinga koyaka, mpe, kobanzaka ete bazalaki koyaka mpo ya kobebisa bango, yango wana bakimaki o Onida, o esika ya mandoki.

6 Mpe baponoko moto moko mpo ya kozala mokonzi moko mpe mokambi moko likolo lya bango, kozalaka na makanisi makangema na mokano moko molengeleme ete basengisamaki te kokende kobunda na Banefi.

7 Mpe esalemaki ete bamisangisaki elongo likolo lya ngomba eye ebiangemaki Atipa, o bolengeli mpo ya kobunda.

8 Sikawa ezalaki te likanisi lya Amalikia mpo ya kopesa bango etumba engebene na mitindo mya mokonzi; kasi tala, ezalaki likanisi lya ye kolonga bosepeli na mampinga ma Balamani, mpo ete akoka komitia o moto mwa bango mpe alongola o bokonzi mokonzi mpe akamata bokonzi.

9 Mpe tala, esalemaki ete asalaki limpinga lya ye batelemisa biema bya bango o lobwaku lozalaki penepene na ngomba Atipa.

10 Mpe esalemaki ete ezalaki butu atindaki bontoma boko bwa nkuku epai ya ngomba ya Atipa, kozalaka na mposa ete mokambi wa bango baye bazalaki likolo lya ngomba, oyo ya ye nkombo ezalaki Lewoti, ete akita o nse ya ngomba, mpo azalaki na mposa ya koloba elongo na ye.

11 Mpe esalemaki ete ezwaki Lewoti nsango amekaki te kokita o nse ya ngomba. Mpe esalemaki ete Amalikia atindaki lisusu mbala ya ibale, kozalaka na mposa ya ye akita. Mpe esalemaki ete Lewoti alingaki te; mpe atindaki lisusu mbala ya isato.

12 Mpe esalemaki ete emonoki Amalikia ete akokaki te kosala Lewoti akita mosika na ngomba, ye moko amataki o kati ya ngomba, penepene na nganda ya Lewoti; mpe atindaki lisusu nsango epai ya Lewoti, kozalaka na mposa ete alinga kokita, mpe ameme bakengeli ba ye elongo na ye.

13 Mpe esalemaki ete ekitaka Lewoti elongo na bakengeli ba ye na Amalikia, ete Amalikia azalaki na mposa ye akita elongo na limpinga lya ye o ntango ya butu, mpe azinga bato bana o nganda ya bango likolo lya bango mokonzi apesaka etinda ya ye, mpe ete asundola bango o kati ya maboko ma Lewoti, soko alingi kokomisa ye (Amalikia) mokambi moko wa mibale likolo lya limpinga mobimba.

14 Mpe esalemaki ete Lewoti akitaki elongo na bato ba ye mpe bazingaki bato ba Amalikia, boye ete yambo balamuka o ntongontongo ya mokolo bazingamaki na mampinga ma Lewoti.

15 Mpe esalemaki ete emonoki bango ete bazingamaki, basambaki elongo na Amalikia ete andima bango kosangana elongo na bandeko ba bango, ete bakoka te kobebisa bango. Sikawa eye ezalaki likambo mpenza liye Amalikia azalaki na yango mposa.

16 Mpe esalemaki ete asundolaki bato ba ye, o bokeseni na bitinda bya mokonzi. Sikawa eye ezalaki likambo Amalikia azalaki na mposa, ete akoka kokokisa mwango mwa ye na kolongolaka bokonzi na mokonzi.

17 Sikawa ezalaki momeseno o ntei ya Balamani ete soko mokambi mokonzi wa bango abomami, kopono mokonzi wa babale mpo ya kozala mokambi mokonzi wa bango.

18 Mpe esalemaki ete Amalikia asalaki ete moko wa basali ba ye atia ngenge ndambo ndambo na Lewoti, ete akufaki.

19 Sikawa, ekufaki Lewoti, Balamani baponoki Amalikia mpo ya kozala mokambi mpe mokonzi wa bango.

20 Mpe esalemaki ete Amalikia atambolaki elongo na mampinga ma ye (mpo alongaki mposa ya ye) o mboka ya Nefi, o engumba ya Nefi, eye ezalaki engumba mokonzi.

21 Mpe mokonzi ayaki libanda kokutana na ye elongo na bakengeli ba ye, mpo abanzaki ete Amalikia akokisaki bitinda bya ye, mpe ete Amalikia asangisaki elongo limpinga lyoko linene boye mpo ya kokende kobunda na Banefi o etumba.

22 Kasi tala, lokola eyaki mokonzi libanda mpo ya kokutana na ye Amalikia asalaki basali ba ye bakende liboso kokutana na mokonzi. Mpe bakendeki mpe bamigumbaki liboso lya mokonzi, lokola soko mpo ya komemia ye na ntina ya bonene bwa ye.

23 Mpe esalemaki ete mokonzi atandolaki loboko la ye mpo ya kotombola bango, lokola ezalaki na momeseno mwa Balamani, lokola elembo ya kimia, moye momeseno bazwaka uta na Banefi.

24 Mpe esalemaki ete etombolaka ye wa yambo uta o mabele, tala atiaki mokonzi mbeli o motema; mpe akweyaki o mabele.

25 Sikawa basali ba mokonzi bakimaki; mpe basali ba Amalikia batombolaki bogangi, na kolobaka:

26 Tala, basali ba mokonzi batii ye mbeli o motema, mpe akwei mpe bakimi; tala, yakani mpe talani.

27 Mpe esalemaki ete Amalikia atindaki mampinga ma ye batambola mpe batala nini ekomaki na mokonzi; mpe ekomaka bango o esika, mpe emonoko bango mokonzi kolalaka o makila ma ye, Amalikia asalaki lokola azalaki na nkele, mpe alobaki: Onso oyo alingaki mokonzi, tika ye akende, mpe alanda basali ba ye ete bakoka kobomama.

28 Mpe esalemaki ete banso baye balingaki mokonzi, eyokaki bango maloba maye, balandaki nsima ya basali ba mokonzi.

29 Sikawa emonoki basali ba mokonzi limpinga lyoko kolandaka bango nsima, babangaki lisusu, mpe bakimaki o kati ya esobe, mpe bayaki likolo o kati ya mboka ya Zalayemila mpe basanganaki na bato ba Amona.

30 Mpe limpinga liye lilandaki bango nsima lizongaki, lokola balandaki bango nsima na mpamba; mpe boye Amalikia, na boyibi bwa ye, alongaki mitema mya bato.

31 Mpe esalemaki ete na mokolo mwa nsima, akotaki o engumba Nefi elongo na mampinga ma ye, mpe akamataki engumba.

32 Mpe sikawa esalemaki ete mwasi wa mokonzi, eyokaka ye ete mokonzi abomamaki—mpo Amalikia atindaki bontoma boko na mwasi wa mokonzi koyebisaka ye ete mokonzi abomamaka na basali ba ye, mpe alandaka bango elongo na limpinga lya ye, kasi ezalaki na mpamba, mpe basalaka boponioki bwa bango—

33 Yango wana, ezwaka mwasi wa mokonzi nsango atindaki epai ya Amalikia, kozalaka na mposa ete abikisa bato ba engumba; mpe ye lokola azalaki na mposa ete akota epai ya ye; mpe azalaki na mposa ya ye ete ameme banzeneneke elongo na ye mpo ya kotatola liwa lya mokonzi.

34 Mpe esalemaki ete Amalikia akamataki mosali ona kaka oyo abomaki mokonzi, mpe banso baye bazalaki elongo na ye, mpe bakotaki epai ya mwasi wa mokonzi, epai ya esika wapi afandaki; mpe bango banso batatolaki epai ya ye ete mokonzi abomamaki na basali ba yemei; mpe balobaki lisusu: Bakimi; etatoli te eye mpo ya mabe ma bango? Mpe boye basepelisaki mwasi wa mokonzi etali liwa lya mokonzi.

35 Mpe esalemaki ete Amalikia alukaki bosepeli bwa mwasi wa mokonzi, mpe akamataki ye epai ya ye o bolongani; mpe boye na boyibi bwa ye, mpe na lisalisi lya basali ba ye ba mayele mabe azwaki bokonzi, iyo, andimamaki mokonzi o ntaka ya mboka mobimba, o ntei ya bato banso ba Balamani, baye bakwaki Balamani mpe Balemuele mpe Bayisamaele, mpe bakabwani banso ba Banefi, uta o bokonzi bwa Nefi kina o ntango ya lelo.

36 Sikawa bakabwani baye, ezwaki bango motindo moko mpe liyebisi lyoko na Banefi, iyo, eteyamaki bango na boyebi boko bwa Nkolo, nzokande, ezali bokamwi mpo ya kosangela, ntango elai te nsima ya bokabwani bwa bango bakomaki bato ba mito mikasi mpe bazanga boyamboli, mpe ba nko, ba nkuna, ba loma koleka Balamani—komeleke mimeseno mya Balamani; kopesaka nzela na goigoi, mpe ndenge inso ya bosoni; iyo, kobosanaka mpenza Nkolo Nzambe wa bango.