Makomi
Alama 56


Mokapo 56

Elamani atindi monkanda na Moloni, kosangelaka lisusu bozali bwa etumba na Balamani—Atipusi mpe Elamani balongi elonga enene likolo lya Balamani—Nkoto ibale ya bana babali ba Elamani babundi na nguya ya likamwisi, mpe moko te wa bango abomami. Nzela 1, penepene na 62 Yambo ya Klisto; nzela 2–19, penepene na 66 Yambo ya Klisto; mpe nzela 20–57, penepene na 65–64 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete o ebandeli ya mobu mwa tuku misato mwa bokonzi bwa basambisi, o mokolo mwa mibale o sanza ya yambo, Moloni azwaki monkanda moko uta na Elamani, kolobelaka makambo ma bato o eteni ena ya mboka.

2 Mpe iye izali maloba akomaki, kolobaka: Ndeko mobali molingami wa ngai, Moloni, na Nkolo mpe o mikakatano ma etumba ya biso; tala, ndeko mobali molingami wa ngai, nazali na nwa moke ya kolobela yo etali etumba ya biso o eteni eye ya mboka.

3 Tala, nkoto ibale ya bana babali ba bato bana baye Amona amemeki o nse libanda lya mboka ya Nefi—sikawa oyebaki ete baye bazalaki biboto bya Lamani, oyo azalaki mwana wa nkulutu wa tata wa biso Lehi;

4 Sikawa nasengeli te kozongela epai ya yo etali mimeseno mya bango to bozangi bondimi bwa bango, mpo oyebi etali makambo maye manso—

5 Yango wana ekoki na ngai ete nalobela yo ete nkoto ibale ya bilenge babali baye bakamati mandoki ma bango ma etumba, mpe balingaki ete nazala mokambi wa bango; mpe toyei mpo ya kobatela ekolo ya biso.

6 Mpe sikawa oyebi lisusu etali boyokani boye batata ba bango basalaki, ete bakokamata te mandoki ma bango ma etumba mpo ya kosopa makila ma bandeko ba bango.

7 Kasi o mobu mwa tuku mibale na motoba, emonoki bango matungisi ma biso mpe mikatano mya biso mpo ya bango, bazalaki penepene na kobuka boyokani boye basalaka mpe kokamata mandoki ma bango ma etumba o bobateli bwa biso.

8 Kasi nalingaki te ete babuka boyokani boye basalaki, kobanzaka ete Nzambe akopesa biso makasi, mpenza ete tokoyoka mpasi mingi te na ntina ya bokokisi bwa ndai eye bakamataka.

9 Kasi tala, eye ezali likambo lyoko o lyango tokoki kozwa bosepeli bonene. Mpo tala, o mobu tuku mibale na motoba, ngai, Elamani, natambolaki o moto mwa bilenge babali nkoto ibale boye o engumba ya Yuda, mpo ya kosalisa Atipusi, oyo oponoki mokambi moko likolo lya bato ba eteni ena ya mboka.

10 Mpe nasangisaki nkoto ibale ya bana ba ngai, (mpo balongobani mpo ya kobiangema bana babali) na limpinga lya Atipusi, o makasi ma liye Atipusi asepelaki mpenza; mpo tala, limpinga lya ye likutolamaki na Balamani zambi makasi ma bango mabomaka motango moko monene mwa bato ba biso, mpo ya ntina yango tosengelaki kolela.

11 Nzokande, tokoki komibondisa o likambo liye, ete bakufaki na ntina ya ekolo ya bango mpe ya Nzambe wa bango, iyo, mpe bazali na bosepeli.

12 Mpe Balamani bakangaka lisusu bato ba boloko mingi, banso ba baye bazali bakapiteni bakonzi, mpo mosusu te batikaki o bomoi. Mpe tobanzi ete bazali sikawa o ntango eye o mboka ya Nefi; ezali boye soko babomami te.

13 Mpe sikawa iye izali bingumba Balamani bazwaki na kosopaka makila ma bato ba biso ba mpiko mingi boye;

14 Mboka ya Mati, to engumba ya Mati, mpe engumba ya Zezilomi, mpe mboka ya Kumeni, mpe mboka ya Atipala.

15 Mpe eye ezali bingumba biye bazwaki ntango nakomaki o engumba ya Yuda; mpe nakutaki Atipusi mpe bato ba ye koyokaka mpasi na makasi ma bango mpo ya kolendisa engumba.

16 Iyo, mpe balembeki o nzoto mpe o molimo lokola, mpo babundaka na mpiko o moi mpe bayokaki mpasi o butu mpo ya kosimba bingumba bya bango; mpe boye bayokaki mpasi ya matungisi ma lolenge na lolenge.

17 Mpe sikawa bazwaki mokano mwa kolonga o esika eye to kokufa; yango wana okoki na bolamu kobanza ete makasi maye make maye namemeki elongo na ngai, iyo, bana babali baye ba ngai, bapesaki bango elikia enene mpe bosepeli boike.

18 Mpe sikawa esalemaki ete emonoki Balamani ete Atipusi azwaki bokasi boko bonene o limpinga lya ye, asengisamaki na mitindo mya Amoloni mpo ya koya te kobunda na engumba ya Yuda, to kobunda na biso, na etumba.

19 Mpe boye esungamaki biso na Nkolo; mpo soko bayaka likolo lya biso o botau bwa biso bakokaki mbele kobebisa limpinga like lya biso; kasi boye tobatelamaki.

20 Bakambemaki na Amoloni mpo ya kosimba bingumba biye bakamataka. Mpe boye esilaki mobu mwa tuku mibale na motoba. Mpe o ebandeli ya mobu tuku mibale na sambo tolengeleke engumba ya biso mpe bisomei mpo ya bobatelami.

21 Sikawa tozalaki na mposa ete Balamani baya kobunda na biso; mpo tozalaki na mposa te ya kobanda etumba yoko likolo lya bango o bisika bikasi bya bango.

22 Mpe esalemaki ete tobombaki banongi libanda zingazinga mpembeni, mpo ya kokengele botamboli bwa Balamani, ete bakoka te koleka biso o butu to o moi mpo ya kobanda etumba yoko likolo lya bingumba bya biso bisusu biye bizalaki epai ya nordi.

23 Mpo toyebaki o bingumba bina izalaki te bakasi bakoki mpo ya kokutana na bango; yango wana biso tozalaki na mposa, soko bakoleka penepene na biso, ya kokweya likolo lya bango nsima ya bango, mpe boye komeme bango likolo nsima o ntango ena kaka bakutanaki na bango liboso. Tobanzaki ete tokokoka kolonga bango; kasi tala, tosiswamaki o mposa ya biso.

24 Bamekaki te koleka penepene na biso elongo na limpinga lya bango mobimba, mpe bamekaki te koleka na eteni yoko, mbele bazala bakasi bakoka te mpe bakweya.

25 Mpe bamekaki te kotambola o nse mpo ya kobunda na engumba ya Zalayemila; mpe bamekaki te kokatisa moto mwa Sidoni, likolo lya engumba ya Nefiya.

26 Mpe boye, elongo na makasi ma bango, bazwaki mokano mwa kosimba bingumba biye bakamataka.

27 Mpe sikawa esalemaki ete o sanza ya ibale ya mobu moye, emememeki epai ya biso biloko mingi bya bolei uta na batata ba nkoto ibale ya bana babali ba ngai bana.

28 Mpe lisusu etindamaki bato nkoto ibale epai ya biso uta o mboka Zalayemila. Mpe boye tolengelemeki elongo na bato nkoto zomi, mpe bilei mpo ya bango, mpe lisusu mpo ya basi ba bango mpe bana ba bango.

29 Mpe Balamani, komonoko makasi ma biso mayikani mokolo na mokolo, mpe bilei biyaki mpo ya lisalisi lya biso, babandaki kobanga, mpe babandaki kowela, soko ekokaki mpo ya kotia nsuka yoko na bozwi bilei mpe makasi ma biso.

30 Sikawa emonoki biso ete Balamani babandaki kokola na nkaka ya lolenge loye, tozalaki na mposa ya komeme angele na mosala likolo lya bango; yango wana Atipusi apesaki ngai mitindo ete natambola elongo na bana babali bake ba ngai mpo ya kokende o engumba yoko ya mpembeni, lokola soko tozalaki komemeke bilei o engumba ya mpembeni.

31 Mpe tosengelaki kotambola penepene na engumba ya Atipala, lokola soko tozalaki kokendeke o engumba ya ngambo esusu, o ndelo penepene na libongo lya mbu.

32 Mpe esalemaki ete totambolaki liboso, lokola soko elongo na bilei bya biso kokende o engumba ena.

33 Mpe esalemaki ete Atipusi atambolaki elongo na eteni yoko ya limpinga lya ye, kotikaka baye batikalaki mpo ya kosimba engumba. Kasi atambolaki te kina nakendeke elongo na limpinga lya ngai like, mpe nakomaki penepene na engumba Atipala.

34 Mpe sikawa, o engumba Atipala epikamaki limpinga lileki likasi lya Balamani; iyo, lya motango moleki.

35 Mpe esalemaki ete eyebisamaki bango na banongi ba bango, babelemeke elongo na limpinga lya bango mpe batambolaki kobunda na biso.

36 Mpe esalemaki ete tokimaki liboso lya bango, epai ya nordi. Mpe boye tokambaki mosika limpinga lya nguya mingi koleka Balamani.

37 Iyo, kutu o ntaka yoko elai mpenza, mpenza ete emonoki bango limpinga lya Atipusi kolandaka bango, na makasi ma bango, babalukaki te o loboko la mobali to o loboko la mwasi, kasi balandaki botamboli bwa bango o nzela alima nsima ya biso; mpe, lokola tobanzaki, ezalaki makanisi ma bango mpo ya koboma biso yambo Atipusi akamata bango, mpe eye ete bakoka kozingama te na bato ba biso.

38 Mpe sikawa Atipusi, komonoko likama lya biso, akomisaki mbango botamboli bwa limpinga lya ye. Kasi tala, ezalaki butu; yango wana bakamataki biso te, mpe Atipusi akamataki bango te; yango wana totiaki nganda mpo ya butu.

39 Mpe esalemaki ete o ntongo, yambo ya ntongontongo tala, Balamani bazalaki kolandaka biso. Sikawa tozalaki te na makasi makoki mpo ya kowela na bango; iyo, nalingaki te ete bana babali bake ba ngai bakweya o kati ya maboko ma bango; yango wana tokobaki botamboli bwa biso, mpe tokamataki botamboli bwa biso o ntei ya esobe.

40 Sikawa bamekaki te kobaluka o loboko la mobali to o loboko la mwasi mbele bazingama; mpe elingaki ngai te kobaluka o loboko la mobali to o loboko la mwasi mbele bakamata ngai, mpe tokokaki te koteleme mpo ya kobunda na bango, kasi kobomama, mpe balingaki kosala boponioki bwa bango; mpe boye tokimaki mokolo mona monso o kati ya esobe, kutu kina eyindaki.

41 Mpe esalemaki ete lisusu, eyaki mwinda mwa ntongo, tomonoki Balamani likolo lya biso, mpe tokimaki liboso lya bango.

42 Kasi esalemaki ete balandaki biso mosika te yambo bateleme; mpe ezalaki o ntongo ya mokolo mwa misato mwa sanza ya sambo.

43 Mpe sikawa, soko bakamatamaki na Atipusi toyebaki te, kasi nalobaki epai ya bato ba ngai: Tala, toyebi te soko batelemeki mpo ya mwango ete toya kobunda na bango, ete bakoka kokanga biso o motambo mwa bango;

44 Yango wana nini elobi bino bana babali ba ngai, elingi bino kokende na bango mpo ya kobunda?

45 Mpe sikawa nalobi epai ya yo, ndeko mobali molingami wa ngai Moloni, ete mokolo moko te namonoko mpiko enene boye, te, te o ntei ya Banefi banso.

46 Mpo lokola nabiangaka bango bana babali ba ngai (mpo banso bazalaki bilenge mpenza) kutu boye balobaki epai ya ngai: Tata, tala Nzambe wa biso azali elongo na biso, mpe akondima te ete tokweya; nde tokende; tolingaki te koboma bandeko ba biso soko balingaki kotika biso nie; yango wana tokende, mbele balonga limpinga lya Atipusi.

47 Sikawa mokolo moko te babundaka, kasi babangaki te liwa; mpe bakanisaki mingi likolo lya lipanda lya batata ba bango koleka basalaki likolo lya bomoi bwa bango; iyo, balakisamaka na bamama ba bango, ete soko batii ntembe te, Nzambe akobikisa bango.

48 Mpe bazongelaki epai ya ngai maloba ma bamama ba bango, kolobaka: Biso totii ntembe te ete bamama ba biso bayebaki yango.

49 Mpe esalemaki ete nazongaki elongo na nkoto ibale ya ngai mpo ya kobunda na Balamani baye balandaki biso. Mpe sikawa tala, mampinga ma Atipusi makamataki bango, mpe etumba yoko ya nsomo ebandaki.

50 Limpinga lya Atipusi lilembeki, na ntina ya botamboli bolai o ntaka yoko ya ntango eke, bakomaki penepene na kokweya o kati ya maboko ma Balamani; mpe soko nazongaka te elongo na nkoto ibale ya ngai balingaki kozwa mwango mwa bango.

51 Mpo Atipusi akweyaka na mopanga, mpe mingi ya bakambi ba ye, na ntina ya bolembi, boye bosalemaki na mbango ya botamboli bwa bango—yango wana bato ba Atipusi, ebulunganisamaki bango na ntina ya bokwei bwa bakambi ba bango, babandaki kopesa nzela liboso lya Balamani.

52 Mpe esalemaki ete Balamani bazwaki mpiko, mpe babandaki kolanda bango; mpe boye ezalaki Balamani kolandaka bango na mpiko enene ntango Elamani ayaki likolo lya nsima ya bango elongo na nkoto ibale ya ye, mpe babandaki koboma bango mpenza, mpenza ete limpinga mobimba lya Balamani litelemeki mpe libalukaki likolo lya Elamani.

53 Sikawa emonoki bato ba Atipusi ete Balamani babalukelaki bango penepene, basangisaki elongo bato ba bango mpe bayaki lisusu likolo lya nsima ya Balamani.

54 Mpe sikawa esalemaki ete biso, bato ba Nefi, bato ba Atipusi, mpe ngai elongo na nkoto ibale ya ngai, tozingaki Balamani, mpe tobomaki bango; iyo, mpenza ete basengisamaki kopesa mandoki ma bango ma etumba mpe lisusu bangomei lokola bato ba boloko ba etumba.

55 Mpe sikawa esalemaki ete etikaki bangomei epai ya biso, tala, natangaki bilenge babali bana baye babundaki elongo na ngai, kobangaka mbele mingi ya bango babomama.

56 Kasi tala, o bosepeli bonene bwa ngai, ezalaka moto moko te wa bango akweyaka o mabele; iyo, mpe babundaki lokola soko na bokasi bwa Nzambe; iyo, mokolo moko te bato bayebana mpo ya kobunda na bokasi bwa likamwisi lya lolenge loye; mpe na nguya ekasi ya lolenge loye bakweyaki likolo lya Balamani, ete babangisaki bango; mpe mpo ya ntina eye Balamani bamipesaki lokola bato ba boloko ba etumba.

57 Mpe lokola tozalaki na esika te mpo ya bato ba biso ba boloko, ete tokoka kokengele bango mpo ya kobatela bango na mampinga ma Balamani, yango wana totindaki bango o mboka ya Zalayemila, mpe eteni yoko ya bato bana baye babomamaki te na Atipusi, elongo na bango; mpe baye batikalaki nakamataki mpe nasangisaki bango na bilenge bya ngai bya Baamoni, mpe nakamataki botamboli bwa biso kozonga o engumba ya Yuda.