Makomi
Alama 57


Mokapo 57

Elamani asangeli bokamati bwa Atipala mpe bomitiki mpe nsima bobateli bwa Kumeni—Bilenge bya ye bya Baamoni babundi na mpiko; mpe bango banso bazokisami, kasi moko te abomami—Gidi ayebisi nsango ya bobomi mpe boponioki bwa bato ba boloko ba Balamani. Penepene na 63 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete nazwaki monkanda moko mwa Amoloni, mokonzi, kolobaka ete soko natiki bato bana ba boloko ba etumba baye tokamataka akotika engumba ya Atipala epai ya biso.

2 Kasi natindaki monkanda epai ya mokonzi, ete toyebaki malamu makasi ma biso makokaki mpo ya kokamata engumba ya Atipala na bokasi ma biso; mpe na kotikaka bato ba biso ba boloko mpo ya engumba ena tokobanza bisomei tozangi bwania, mpe ete tolingaki bobele kotika bato ba biso ba boloko na kobetinia.

3 Mpe Amoloni aboyaki monkanda mwa ngai, mpo alingaki te kobetinia bato ba boloko; yango wana tobandaki kosala bolengeli mpo ya kokende kobunda na engumba ya Atipala.

4 Kasi bato ba Atipala batikaki engumba, mpe bakimaki o bingumba bya bango bisusu, biye bazwaka, mpo ya kolendisa byango; mpe boye engumba ya Atipala ekweyaki o kati ya maboko ma biso.

5 Mpe boye esilaki mobu mwa tuku mibale na mwambe mwa bokonzi bwa basambisi.

6 Mpe esalemaki ete o ebandeli ya mobu mwa tuku mibale na libwa, tozwaki bobakisi boko bwa bilei, mpe bobakisi boko bosusu mpo ya limpinga lya biso, uta o mboka ya Zalayemila, mpe uta o mboka zingazinga mpembeni, o motango mwa bato nkoto motoba, longola se tuku motoba ya bana babali ba Baamoni baye bayaka mpo ya kosangana na bandeko ba bango, ya ngai lingomba like lya nkoto ibale. Mpe sikawa tala, tozalaki bakasi, iyo, mpe tozalaki lisusu na ebele ya bilei bimememeki epai ya biso.

7 Mpe esalemaki ete ezalaki mposa ya biso kobunda etumba yoko na limpinga liye litiamaki mpo ya kobatela engumba ya Kumeni.

8 Mpe sikawa tala, nakolakisa epai ya yo ete sasaipi tokokisaki mposa ya biso; iyo, elongo na ya biso makasi ma mpiko, to elongo na eteni ya biso makasi ma mpiko, tozingaki, o butu, engumba ya Kumeni, moke liboso bazwa bobakisi bwa bilei.

9 Mpe esalemaki ete totiaki nganda zingazinga mpembeni na engumba mpo ya butu mingi; kasi tolalaki likolo lya mipanga mya biso, mpe totiaki bakengeli, ete Balamani bakoka te koya likolo lya biso o butu mpe koboma biso, eye bamekaki mbala mingi; kasi mbala mingi bamekaki eye makila ma bango matangisamaki.

10 O bolandi biloko bya bango bya bolei biyaki, mpe bazalaki penepene na kokota na engumba o butu. Mpe biso, esika ya kozalaka Balamani, tozalaki Banefi; yango wana, tokamataki bango mpe biloko bya bango bya bolei.

11 Mpe ata Balamani bakatamaki mosika na lisalisi lya bango na lolenge loye, bazalaki naino na mokano mwa kosimba engumba; yango wana ekomaki elongobani ete tokamata biloko bina bya bolei mpe totinda byango o mboka ya Yuda, mpe bato ba biso ba boloko o mboka ya Zalayemila.

12 Mpe esalemaki ete mikolo mingi te milekaki yambo Balamani babanda kobungisa elikia enso ya kozwa lisalisi; yango wana batikaki engumba epai ya maboko ma biso; mpe boye tokokisaki mwango mwa biso na kozwaka engumba Kumeni.

13 Kasi esalemaki ete bato ba biso ba boloko bazalaki na motango monene boye ete, ata bonene bwa motango mwa biso, tosengelaki kosalela makasi ma biso manso mpo ya kokengele bango, to kotia bango o liwa.

14 Mpo tala, balingaki kopanzana na motango monene, mpe balingaka kobunda na mabanga, mpe na nzete, to eloko enso bakokaki kozwa o kati ya maboko ma bango, mpenza ete tobomaki koleka nkoto ibale na bango esilisaki bango komitika bato ba boloko ba etumba.

15 Yango wana ekomaki elongobani mpo ya biso, ete totia nsuka yoko na bomoi bwa bango, to tokengele bango, mopanga o loboko, kina o mboka ya Zalayemila; mpe lisusu biloko bya biso bya bolei bizalaki lisusu te bikoka mpo ya bato ba bisomei, ata biye tokamataka uta na Balamani.

16 Mpe sikawa, o bizaleli bina bya kpokoso, ekomaki likambo lyoko lya mpasi mpenza mpo ya kozwa mokano etali bato baye ba boloko ba etumba; kasi, tozwaki mokano mwa kotinda bango o mboka ya Zalayemila; yango wana toponoki eteni yoko ya bato ba biso, mpe topesaki bango mokumba likolo lya bato ba biso ba boloko mpo ya kokende o mboka ya Zalayemila.

17 Kasi esalemaki ete o mokolo mwa nsima bazongaki. Mpe sikawa tala, totunaki bango te etali bato ba boloko; mpo tala, Balamani bazalaki likolo lya biso, mpe bazongaki o ntango esengeli mpo ya kobikisa biso na kokweya o kati ya maboko ma bango. Mpo tala, Amoloni atindaka mpo ya lisalisi lya bango bobakisi boko bwa sika bwa bilei mpe lisusu limpinga lyoko lya bato lya motango monene.

18 Mpe esalemaki ete bato bana baye totindaki elongo na bato ba boloko bakomaki o ntango esengeli mpo ya kososola bango, lokola ezalaki bango penepene na kolonga biso.

19 Kasi tala, lingomba like lya ngai lya nkoto ibale na tuku motoba babundaki na koleka bozangi elikia mingi koleka; iyo, bazalaki sikisiki liboso lya Balamani, mpe bapesaki liwa epai ya bango banso baye batelemelaki bango.

20 Mpe lokola etikali ya limpinga lya biso ezalaki penepene na kopesa nzela liboso lya Balamani, tala, nkoto ibale na tuku motoba bazalaki sikisiki mpe molende.

21 Iyo, mpe batosaki mpe babatelaki mpo ya kokokisa liloba linso lya etinda na bosolo; iyo, mpe kutu engebene na bondimi bwa bango esalemaki epai ya bango, mpe namikundolaki maloba maye balobaki epai ya ngai ete bamama ba bango balakisaki bango.

22 Mpe sikawa tala, ezalaki bana babali baye ba ngai, mpe bato bana baye baponomoki mpo ya komeme bato ba boloko, na bango tosengeli elonga eye enene; mpo ezalaki bango baye babeteki Balamani; yango wana babenganamaki nsima o engumba ya Mati.

23 Mpe tosimbaki engumba ya biso Kumeni, mpe banso tobebisamaki te na mopanga; nzokande, toyokaka mpasi ya bobungisi bonene.

24 Mpe esalemaki ete esilaka Balamani kokima, napesaki sasaipi mitindo ete bato ba ngai baye bazokaka bakamatama uta o ntei ya bakufi, mpe nasalaki ete mpota ya bango ilatisama.

25 Mpe esalemaki ete izalaki nkama ibale, libanda lya nkoto ibale na tuku motoba ya bato ba ngai, baye bakweyaka na ntina ya bobungisi bwa makila; nzokande, engebene na bolamu bwa Nzambe, mpe o bokamwi bonene bwa biso, mpe lisusu bosepeli bwa limpinga lya biso mobimba, ezalaki moto moko te wa bango oyo awaki; iyo, mpe ezalaki bozo boko te o ntei ya bango boye bozwaka mpota mingi.

26 Mpe sikawa, libiki lya bango lizalaki lya bokamwi na limpinga lya biso mobimba, iyo, ete babatelamaki ntango ezalaki nkoto yoko ya bandeko ba biso babomamaki. Mpe totii yango mpenza na nguya ya likamwisi lya Nzambe, na ntina ya bondimi boluti bwa bango na eye bateyamaki na kondima—ete ezali Nzambe moko wa boyengebene, mpe enso oyo atiaki ntembe te, ete bakobatelama na nguya ya ye ya bokamwi.

27 Sikawa eye ezalaki bondimi bwa bango baye nalobelaki; bazali bilenge, mpe makanisi ma bango mazali sikisiki, mpe batii elikia ya bango na Nzambe ntango inso.

28 Mpe sikawa esalemaki ete esilisaka biso boye kosalisa bato ba biso bazokaki, mpe kokunda lisusu bakufi ba biso mpe bakufi ba Balamani, baye bazalaki mingi, tala, totunaki Gidi etali bato ba boloko baye babandaki kokita o mboka ya Zalayemila elongo na bango.

29 Sikawa Gidi azalaki kapiteni mokonzi wa lingomba liye liponomoki mpo ya kokengele bango o nse o mboka.

30 Mpe sikawa, iye izali maloba maye Gidi alobaki epai ya ngai: Tala, tobandaki kokita o mboka ya Zalayemila elongo na bato ba biso ba boloko. Mpe esalemaki ete tokutanaki na banongi ba mampinga ma biso, baye batindamaki libanda kokenge nganda ya Balamani.

31 Mpe bagangaki epai ya biso, kolobaka—Tala, mampinga ma Balamani mazali kotambolaka ona engumba ya Kumeni; mpe tala, bakokweya likolo lya bango, iyo, mpe bakobebisa bato ba biso.

32 Mpe esalemaki ete bato ba biso ba boloko bayokaki bogangi bwa bango, boye bosalaki bango bazwa mpiko; mpe batelemeki na botomboki na biso.

33 Mpe esalemaki ete na ntina ya botomboki bwa bango tosalaki ete mipanga mya biso miya likolo lya bango. Mpe esalemaki ete na nzoto yoko bakimaki likolo lya mipanga mya biso, na yango, motango monene mwa bango mobomamaki; mpe baye batikalaki bapanzanaki mpe bakimaki uta na biso.

34 Mpe tala, ekimaka bango mpe tokokaki kokamata bango te, tokamataki botamboli bwa biso na mbango ona engumba Kumeni; mpe tala, tokomaki o ntango esengeli ete tokokaki kosalisa bandeko ba biso na kobatelaka engumba.

35 Mpe tala, tobikisami lisusu libanda lya maboko ma bayini ba biso. Mpe epambolami nkombo ya Nzambe wa biso; mpo tala, ezali ye oyo abikisi biso; iyo, oyo asali likambo liye linene mpo ya biso.

36 Sikawa esalemaki ete eyokaki ngai, Elamani, maloba maye ma Gidi, natondisamaki na bosepeli boluti na ntina ya bolamu bwa Nzambe na kobatelaka biso, ete tokoka te banso kowa; iyo, mpe natii elikia ete bozo bwa bango baye babomamaki bokotaki o kati ya bopemi bwa Nzambe wa bango.