Makomi
Alama 5


Maloba maye Alama, Nganga Monene engebene na molongo mosantu mwa Nzambe, atikaki na bato o engumba mpe mboka ike ya bango o ntaka ya mboka.

Kokwaka mokapo 5.

Mokapo 5

Mpo ya kolonga lobiko, bato basengeli koyambola mpe kobatela mitindo, kobotama lisusu, kosukola bilamba bya bango o makila ma Klisto, kozala basawa mpe komilongola na lolendo mpe boluli, mpe kosala misala mya bosembo—Mobateli Molamu abiangi bato ba ye—Bango baye bakosala misala mibe bazali bana ba zabulu—Alama atatoli bosolo bwa malongi ma ye mpe atindi bato koyambola—Nkombo ya basembo ekokomama o buku ya bomoi. Penepene na 83 Yambo ya Klisto.

1 Sikawa esalemaki ete Alama abandaki kopesa liloba lya Nzambe epai ya bato, yambo o mboka ya Zalayemila, mpe uta kuna o ntaka ya mboka mobimba.

2 Mpe maye mazali maloba maye alobaki epai ya bato o eklezia eye etiamaki o engumba ya Zalayemila, engebene na likundoli lya yemei, kolobaka:

3 Ngai, Alama, ebulisamaki ngai na tata wa ngai, Alama, mpo ya kozala nganga monene likolo lya eklezia ya Nzambe, ye kozalaka na nguya mpe bokulaka uta na Nzambe mpo ya kosala makambo maye, tala, nalobi epai ya bino ete abandaki kotia eklezia o mboka eye ezalaki o ndelo ya Nefi; iyo, mboka eye ebiangemaki mboka ya Molomoni; iyo, mpe abatisaki bandeko ba ye o mai ma Molomoni.

4 Mpe tala, nalobi epai ya bino ete, babikisamaki libanda lya maboko ma bato ba mokonzi Noa, na ngolu mpe nguya ya Nzambe.

5 Mpe tala, nsima ya yango, bamememeki o kati ya bowumbu na maboko ma Balamani o esobe; iyo, nalobi epai ya bino, bazalaki o bokangemi, mpe lisusu Nkolo abikisaki bango libanda lya bowumbu na nguya ya liloba lya ye; mpe tomememeki o kati ya mboka eye, mpe awa tobandaki kotia eklezia ya Nzambe o ntaka ya mboka eye lokola.

6 Mpe sikawa tala, nalobi epai ya bino, bandeko ba ngai, bino baye bozali ba eklezia eye, ekangi bino mpenza bokundoli bwa bokangemi bwa batata ba bino? Iyo, mpe ekangi bino mpenza bokundoli bwa ngolu mpe motema molai mwa ye ona bango? Mpe lisusu, ekangi bino mpenza bokundoli ete abikisaki bozo bwa bango uta o limfelo?

7 Tala, abongolaki mitema mya bango; iyo, alamusali bango uta o mpongi ya mozindo, mpe balamukaki epai ya Nzambe. Tala, bazalaki o katikati ya molili; nzokande, bozo bwa bango bopelisamaki na mwinda mwa liloba lya bomoi bwa libela; iyo, bazingamaki penepene na nkanga ya liwa, mpe na miniololo mya limfelo, mpe bobebisami bwa libela bozelaki bango.

8 Mpe sikawa natuni bino, bandeko ba ngai, ebomamaki bango? Tala, nalobi epai ya bino, Te, babomamaki te.

9 Mpe lisusu natuni, ekatanaki nkanga ya liwa, mpe miniololo mya limfelo miye mizingaki bango penepene, mikangolamaki? Nalobi epai ya bino ete, Iyo, mikangolamaki, mpe bozo bwa bango botandolamaki, mpe bayembaki bolingo bwa lobiko. Mpe nalobi epai ya bino ete babikisamaki.

10 Mpe sikawa natuni bino likolo lya ezalela kani ebikaki bango? Iyo, ebandeli kani elikiaka bango mpo ya lobiko? Ntina kani ya bango kokangolama uta o nkanga ya liwa, iyo, mpe lisusu miniololo mya limfelo?

11 Tala, nakoki kolobela bino—endimaki te tata wa ngai Alama o maloba mapesamaki na monoko mwa Abinadi? Mpe ezalaki ye te profeta wa Nzambe? Elobaki ye te maloba ma Nzambe, mpe tata wa ngai Alama endimaki ye mango te?

12 Mpe engebene na bondimi bwa ye mbongwana enene esalemaki o motema mwa ye. Tala nalobi epai ya bino ete eye enso ezali ya solo.

13 Mpe tala, asakolaki liloba epai ya batata ba bino, mpe mbongwana ekasi esalemaki o mitema mya bango, mpe bamikitisaki mpe batiaki elikia ya bango na Nzambe wa solo mpe wa bomoi. Mpe tala, bazalaki potongono kina o nsuka; yango wana babikisamaki.

14 Mpe sikawa tala, natuni bino, bandeko ba ngai ba eklezia, ebotamaki bino na molimo wa Nzambe? Ezwi bino elili ya ye na bilongi bya bino? Eyoki bino mbongwana ekasi eye o mitema mya bino?

15 Esaleli bino bondimi o bosikolami bwa ye oyo akelaki bino? Etali bino o boso na miso mya bondimi, mpe emoni bino nzoto eye ya kufa eye esekwi o bozangi bokufi, mpe bopoli boye bosekwi o bozangi bopoli, mpo ya koteleme liboso lya Nzambe mpo ya kosambisama engebene na bikela biye bisalemaki o nzoto ya kufa?

16 Nalobi epai ya bino ete, ekoki bino kokanisa na binomei ete boyoki mongongo mwa Nkolo, kolobaka epai ya bino, o mokolo mona: Yakani epai ya ngai, bino bopambolama, mpo tala, misala mya bino mizalaki misala sembo likolo lya etando ya mabele?

17 To ekanisi bino na binomei ete bokoka kokosa Nkolo o mokolo mona, mpe koloba—Nkolo, misala mya biso mizalaki misala sembo likolo lya etando ya mabele—mpe ete akobikisa bino?

18 To soko te, ekoki bino kokanisa binomei bomememi liboso lya esambelo ya Nzambe na bozo bwa bino botonda na elindo mpe boswi bwa motema, kozalaka na bokundoli boko bwa elindo enso ya bino, iyo, bokundoli boko bobongo nie bwa nkuna enso ya bino, iyo, bokundoli boko ete botiyaki ntembe na mitindo mya Nzambe?

19 Nalobi epai ya bino, ekoki bino kotala likolo na Nzambe o mokolo mona na motema moko peto mpe maboko sembesembe? Nalobi epai ya bino, ekoki bino kotala likolo, kozalaka na elili ya Nzambe ekatami likolo lya bilongi bya bino?

20 Nalobi epai ya bino, ekoki bino kokanisa ete bobikisami ntango bomipesi mpo ya kokoma bayangelami ba zabulu?

21 Nalobi epai ya bino, bokoyeba o mokolo mona ete bokoki te kobikisama; mpo moto te akoki kobikisama longola se soko bilamba bya ye bisukwami mpembe; iyo, bilamba bya ye bisengeli kopetolama kina bikosukwama uta o bosoto bonso, o kati ya makila ma ye oyo alobamaki na batata ba biso, oyo akoya kosikola bato ba ye uta o masumu ma bango.

22 Mpe sikawa natuni bino, bandeko ba ngai, boniboni bokoyoka, soko bokoteleme liboso lya esika ya bosambisi ya Nzambe, ezwi bilamba bya bino bosoto ya makila mpe ndenge inso ya mbindo? Tala, Nini biloko biye bikotatola mpo ya bobe bwa bino?

23 Tala ekoloba te ete bino bozali babomi, iyo, mpe lisusu ete bozali na elindo ya ndenge inso ya nkuna?

24 Tala, bandeko ba ngai, ebanzi bino ete moto wa lolenge loye akoki kozwa esika ya kofanda o bokonzi bwa Nzambe, elongo na Abalayama, elongo na Yisaki, mpe elongo na Yakobo, mpe lisusu baprofeta basantu banso, ya bango bilamba bisukwami mpe bizangi mbindo, bizali peto mpe mpembe?

25 Nalobi epai ya bino, Te; longola se soko bokomisi Mokeli wa biso mokosi moko uta o ebandeli, to bobanzi ete azali mokosi moko uta o ebandeli, bokoki te kobanza ete ba lolenge loye bakoki kozala na esika o bokonzi bwa lola; kasi bakobwakama libanda mpo bazali bana ba bokonzi bwa zabulu.

26 Mpe sikawa tala, nalobi epai ya bino, bandeko ba ngai, soko boyoki mbongwana yoko o motema, mpe soko boyoki koyemba nzembo ya bolingo bwa lobiko, nalingi kotuna, ekoki bino koyoka boye sikawa?

27 Etamboli bino, komibombaka na bozangi mpamela liboso lya Nzambe? Ekokaki bino koloba, soko bobiangemi mpo ya kokufa o ntango eye, o kati ya binomei, ete bozali mpenza basawa? Ete bilamba bya bino bisukwami mpe bikomisai mpembe o kati ya makila ma Klisto, oyo akoya mpo ya kosikola bato ba ye uta o masumu ma bango?

28 Tala, elongwi bino na lolendo? Nalobi epai ya bino, soko te bolengelemi te mpo ya kokutana na Nzambe. Tala bosengeli kolengele na lombangu; mpo bokonzi bwa lola bozali mosika te mpembeni, mpe moko wa lolenge loye azali te na bomoi bwa seko.

29 Tala, nalobi, ezali moko o ntei ya bino oyo alongwi te na boluli? Nalobi epai ya bino ete moko wa lolenge loye alengelemi te; mpe ngai nalingi ete alengele nokinoki, mpo ngonga ezali penepene mpembeni, mpe ayebi te ekoya ntango kani; mpo moko wa lolenge loye amonomi azangi elindo te.

30 Mpe lisusu nalobi epai ya bino, ezali moko o ntei ya bino oyo akosala liseki na ndeko wa ye, to oyo akonduka boniokoli likolo lya ye?

31 Lisuma epai ya moko wa lolonge loye, mpo alengelemi te, mpe ntango ezali penepene ete asengeli koyambola to akoki kobikisama te!

32 Iye, kutu lisuma epai ya bino banso basali ba bobe; yambolani, yambolani, mpo Nkolo Nzambe alobaki yango!

33 Tala, atindi bobiangemi epai ya bato banso; mpo maboko ma ngolu maninolami ona bango, mpe alobi: Yambolani, mpe nakoyamba bino.

34 Iyo, alobi: Yakani epai ya ngai mpe bokolia mbuma ya nzete ya bomoi; iyo, bokolia mpe bokomele limpa mpe mai ma bomoi na bonsomi;

35 Iyo, yakani epai ya ngai mpe memeni misala semba, mpe bokokatama te o nse mpe bokobwakama te o kati ya moto—

36 Mpo tala, ntango ekomi penepene ete onso oyo akomeme te mbuma elamu, to onso oyo akosala te misala semba, ye kaka azali na ntina ya komilela mpe kolela.

37 O bino basali ba bobe; bino baye bovimbani o biloko bya mpamba bya mokili, bino baye bolakisaki boyebi nzela ya bosembo nzokande bokei mpembeni, lokola mpate azangi mokengeli, ata mokengeli abiangaki nsima ya bino mpe azali kaka kobianga nsima ya bino, kasi bokoyokemela te mongongo mwa ye!

38 Tala, nalobi epai ya bino, ete mokengeli molamu abiangi bino; iyo, mpe abiangi bino o nkombo ya yemei, eye ezali nkombo ya Klisto; mpe soko bokoyokemela te epai ya mongongo mwa mokengeli molamu, o nkombo eye na yango bobiangemi, tala, bozali te mpate ya mokengeli molamu.

39 Mpe sikawa soko bozali te mpate ya mokengeli molamu, ya etonga kani ezali bino? Tala, nalobi epai ya bino, ete zabulu azali mokengeli wa bino, mpe bozali ba etonga ya ye; mpe sikawa, nani akoki kowangana eye? Tala, nalobi epai ya bino, moto oyo akowangana eye azali mokosi moko mpe mwana moko wa zabulu.

40 Mpo nalobi epai ya bino enso eye elamu eyei uta na Nzambe, mpe enso eye ebe eyei uta na zabulu.

41 Yango wana, soko moto moko amemi misala milamu ayokemeli epai ya mongongo mwa mokengeli molamu, mpe alandi ye; kasi onso oyo amemi misala mibe, ye kaka akomi mwana wa zabulu, mpo ayokemeli epai ya mongongo mwa ye, mpe alandi ye.

42 Mpe onso oyo akosala eye akozwa lifuta lya ye na ye; yango wana, mpo ya lifuta lya ye akoyamba liwa, lokola mpo ya makambo matali bosembo, kozalaka ya kokufa mpo ya misala minso milamu.

43 Mpe sikawa, bandeko ba ngai, nalingi ete boyoka ngai, mpo nalobi o makasi ma bozo bwa ngai; mpo tala, nalobi epai ya bino polele ete bokoki kobunga te, to nalobi engebene na mitindo mya Nzambe.

44 Mpo nabiangemi mpo ya koloba nsima ya lolenge loye, engebene na molongo mosantu mwa Nzambe, moye mozali na Klisto Yesu; iyo, natindami mpo ya koteleme mpe kotatola epai ya bato baye makambo malobamaki na batata ba biso matali makambo maye makoya.

45 Mpe eye ezali enso te. Ebanzi bino ete nayebi makambo maye ngaimei? Tala, natatoli epai ya bino ete nayebi ete makambo wapi nalobi mazali ma solo. Mpe boniboni bobanzi ete nayebi bosolo bwa mango mpenza?

46 Tala, nalobi epai ya bino mayebisami epai ya ngai na Molimo Mosantu mwa Nzambe. Tala, nakilaki bilei mpe nasambelaki mikolo mingi ete nakoka koyeba makambo maye ngaimei. Mpe sikawa nayebi ngaimei ete mazali solo; mpo Nkolo Nzambe asali mango mamonisama epai ya ngai na Molimo Mosantu mwa ye; mpe eye ezali molimo mwa bobimisi oyo azali na ngai.

47 Mpe lisusu, nalobi epai ya bino ete ebimisami boye epai ya ngai, ete maloba maye malobamaki na batata ba biso mazali solo, kutu boye engebene na molimo mwa bobikuli oyo azali na ngai, oyo azali lisusu na limonisi lya Molimo mwa Nzambe.

48 Nalobi epai ya bino, ete nayebi na ngaimei ete enso eye nakoloba epai bino, etali eye ekoya, ezali solo; mpe nalobi epai ya bino, ete ngai nayebi ete Yesu Klisto akoya, iyo, Mwana Mobali, Mobotami se Moko wa Tata, atonda na boboto, mpe ngolu, mpe bosolo. Mpe tala, ezali ye oyo akoya mpo ya kolongola masumu ma mokili, iyo, masumu ma moto na moto oyo akondima sikisiki likolo lya nkombo ya ye.

49 Mpe sikawa nalobi epai ya bino ete eye ezali molongo nsima ya mwango nabiangemi, iyo, mpo ya koteya epai ya bandeko balingami ba ngai, iyo, mpe na moko na moko oyo afandi o mboka; iyo, koteya epai ya banso, mobange mpe elenge, mowumbu mpe monsomi; iyo, nalobi epai ya mokolo, mpe mokolo wa katikati, mpe nkola ya mbuta; iyo, kobelela epai ya bango ete basengeli koyambola mpe kobotama lisusu.

50 Iyo, boye elobi Molimo: Yambolani, bino bato banso nsuka inso ya mabele, mpo bokonzi bwa lola bozali mosika te mpembeni; iyo, Mwana Mobali wa Nzambe akoya o nkembo ya ye, o bokasi bwa ye, lokumu, nguya, mpe bodondwi. Iyo, bandeko balingami ba ngai, nalobi epai ya bino, ete Molimo alobi: Tala nkembo ya Mokonzi wa mabele manso; mpe lisusu Mokonzi wa lola mosika te mpenza ekongenge o ntei ya bana banso ba bato.

51 Mpe lisusu Molimo alobi epai ya ngai, iyo, belela epai ya ngai na mongongo mokasi kolobaka: Kende mpe loba epai ya bato baye—Yambolani, mpo longola se soko boyamboli bokoki ata moke te kosangola bokonzi bwa lola.

52 Mpe lisusu nalobi epai ya bino, Molimo alobi: Tala, soka elali o mosisa mwa nzete; yango wana nzete na nzete eye ekomeme te mbuma elamu ekokatama o nse mpe ekobwakama o kati ya moto, iyo, moto moko moye mokoki kosila te, kutu moto moko mokozima te. Tala, mpe omikundola, Mosantu Moko alobaki yango.

53 Mpe sikawa bandeko balingami ba ngai, nalobi epai ya bino, ekoki bino kotelemela maloba maye; iyo, ekoki bino kolalisa mpembeni makambo maye, mpe koniata Mosantu Moko o nse ya makolo ma bino; iyo, ekoki bino kovimbana o lolendo la mitema mya bino; iyo, ekokoba bino kaka o bolati bwa monzele mwa ntalo mpe kotiaka mitema mya bino likolo lya biloko bya mpamba bya mokili, likolo lya bozwi bwa bino?

54 Iyo, ekokoba bino o lobanzo ete bozali balamu boko koleka basusu; iyo, ekokoba bino o boniokoli bwa bandeko ba bino, baye bamikitisi mpe batamboli nsima ya molongo mosantu mwa Nzambe, na wapi bamememi o kati ya eklezia eye, kosantisamaka na Molimo Mosantu, mpe bamemi misala miye milongobani mpo ya boyamboli—

55 Iyo, mpe ekokoba bino o bobaloli mikongo mya bino epai ya bakeleli, mpe bazangi, mpe na bolongoli biloko bya bino uta na bango?

56 Mpe o bosukizi, bino banso baye bokokoba o nkuna ya bino, nalobi epai ya bino ete baye bazali bango baye bakokatama o nse mpe kobwakama o kati ya moto longola se soko noki bayamboli.

57 Mpe sikawa nalobi epai ya bino, bino banso baye bozali na mposa ya kolanda mongongo mwa mokengeli molamu, yakani libanda uta na bato ba nkuna, mpe kabwanani, mpe simbani te biloko bya bango bya bosoto; mpe tala, nkombo ya bango ekolongolama mpenza, ete nkombo ya bato ba nkuna ekotangema te o ntei ya nkombo ya basembo, ete liloba lya Nzambe likokisama, liye lilobi: Nkombo ya bato ba nkuna ekosangana te elongo na nkombo ya bato ba ngai;

58 Mpo nkombo ya basembo ekokomama o buku ya bomoi, mpe epai ya bango nakopesa lisango lyoko o loboko la ngai la mobali. Mpe sikawa, bandeko ba ngai, nini esengeli bino koloba mpo ya ntembe o eye? Nalobi epai ya bino, soko bolobi mabe na yango, ezali likambo te, mpo liloba lya Nzambe lisengeli kokokisama.

59 Mpo ezali mokengeli kani o ntei ya bino kozalaka na mpate mingi akokenge te likolo lya yango, ete mbwa ya zamba ikota te mpe ilia te ebwele ya ye? Mpe tala, soko mbwa ya zamba akoti o etonga akobengana ye te? Iyo, mpe o nsuka, soko akoki, akobebisa ye.

60 Mpe sikawa nalobi epai ya bino ete mokengeli molamu azali kobianga nsima ya bino; mpe soko boyokemeli epai ya mongongo mwa ye akomeme bino o kati ya etonga ya ye, mpe bozali mpate ya ye; mpe atindi bino ete botika te mbwa ya zamba ya lokoso akota o ntei ya bino, ete akoka te kobebisa bino.

61 Mpe sikawa ngai, Alama, natindi bino na lokota la ye oyo atindaki ngai, ete bobomba kosala maloba maye nayebisi epai ya bino.

62 Nalobi na nzela ya etinda epai ya bino baye ba eklezia; mpe epai ya baye bazali te ba eklezia nalobi na nzela ya bobiangemi, kolobaka: Yakani mpe batisamani mpo ya boyamboli, ete bino lisusu bolia mbuma ya nzete ya bomoi.