Makomi
Alama 63


Mokapo 63

Sibiloni mpe nsima Elamani azwi makundoli ma bule—Banefi mingi basali mobembo o mboka epai ya nordi—Agoti atongi masuwa, maye manani o mbu ya westi—Moloniya alongi Balamani o etumba. Penepene na 56–52 Yambo ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete o ebandeli ya mobu mwa tuku misato na motoba mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi, ete Sibiloni azwaki biloko bina bya bule biye bipesamaki epai ya Elamani na Alama.

2 Mpe azalaki moto moko moyengebene, mpe atambolaki alima liboso lya Nzambe; mpe atosaki kosala bolamu ntango inso, mpo ya kobatela mitindo mya Nkolo Nzambe wa ye; mpe lokola esalaki ndeko mobali wa ye.

3 Mpe esalemaki ete Moloni akufaki lokola. Mpe boye esukaki mobu mwa tuku misato na motoba mwa bokonzi bwa basambisi.

4 Mpe esalemaki ete o mobu mwa tuku misato na sambo mwa bokonzi bwa basambisi, ezalaki lingomba linene lya bato, kutu o motango mwa bato nkoto mitano na nkama inei, elongo na basi ba bango mpe bana ba bango, bakendeki libanda lya mboka ya Zalayemila o kati ya mboka ezalaki epai ya nordi.

5 Mpe esalemaki ete Agoti, kozalaka moto moko wa bilukaluka, yango wana akendeki mpe amitongelaki masuwa moko manene mpenza, o ndelo ya mboka Beboo, mpembeni ya mboka Mpamba, mpe apusaki mango o kati ya mbu ya westi, mpembeni ya nkingo ya nkaka eye ekambi o kati ya mboka ya epai ya nordi.

6 Mpe tala, izalaki mingi ya Banefi bakotaki kuna mpe bananaki elongo na bilei biike, mpe lisusu basi mpe bana mingi, bakendeki botamboli bwa bango epai ya nordi. Mpe boye esukaki mobu mwa tuku misato na sambo.

7 Mpe o mobu mwa tuku misato na mwambe, moto oyo atongaki masuwa masusu. Mpe masuwa ma yambo mazongaki lisusu, mpe bato basusu mingi bakotaki o kati ya mango; mpe bakamataki bilei biike, mpe bakendeki libanda lokola o mboka ya epai ya nordi.

8 Mpe esalemaki ete bayokanaki lisusu te. Mpe tobanzi ete bazindaki o bozindo bwa mbu. Mpe esalemaki ete masuwa moko masusu mananaki lokola; mpe wapi makendeki toyebi te.

9 Mpe esalemaki ete o mobu mona izalaki bato mingi baye bakendeki o mboka ya epai ya nordi. Mpe boye esukaki mobu mwa tuku misato na mwambe.

10 Mpe esalemaki ete o mobu mwa tuku misato na libwa mwa bokonzi bwa basambisi, Sibiloni akufaki lokola, mpe Koliantoni akendeke o mboka ya epai ya nordi na masuwa moko, mpo ya komeme bilei epai ya bato bakendeke o kati ya mboka ena.

11 Yango wana ekomaki elongobani mpo ya Sibiloni kopesa biloko bina bya bule, yambo ya liwa lya ye, likolo lya mwana wa Elamani, oyo abiangemaki Elamani, ebiangemaki ye nsima ya nkombo ya tata wa ye.

12 Sikawa tala, minkoma mina minso o bozwi bwa Elamani mikomamaki mpe mitindamaki o ntei ya bana ba bato o ntaka ya mboka mobimba, longola se soko izalaki biteni bina biye bitindamaka na Alama bikende kuna te.

13 Nzokande, biloko biye bibombamaki bya bule, mpe bikitanisamaki uta nkola yoko o esusu; yango wana, o mobu mona, bipesamaki likolo lya Elamani, yambo ya liwa lya Sibiloni.

14 Mpe esalemaki lisusu o mobu moye ete izalaki boko bakabwani bakendeke epai ya Balamani; mpe balamusamaki lokola na nkanda mpo ya kobunda na Banefi.

15 Mpe lisusu o mobu moye bakitaki elongo na limpinga lya motango monene mpo ya kobunda na bato ba Moloniya, to kobunda na limpinga lya Moloniya, o yango babetemeke mpe babenganamaki nsima lisusu o mboka ya bangomei, mpe bayokaki mpasi ya bobungisi bonene.

16 Mpe boye esukaki mobu mwa tuku misato na libwa mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi.

17 Mpe boye esukaki nsango ya Alama, mpe Elamani mwana mobali wa ye, mpe lisusu Sibiloni, oyo azalaki mwana mobali wa ye.