Makomi
Alama 7


Maloba ma Alama maye apesaki na bato ba Gideona, engebene na likundoli lya yemei.

Kokwaka mokapo 7.

Mokapo 7

Klisto akobotama na Maliya—Akokangola nkanga ya liwa mpe akomeme masumu ma bato ba ye—Bango baye bayamboli, babatisami, mpe babateli mitindo bakozala na bomoi bwa seko—Bosoto bokoki te kosangola bokonzi bwa Nzambe—Bosawa, bondimi, elikia, mpe lolango losengelami. Penepene na 83 Yambo ya Klisto.

1 Tala bandeko balingami ba ngai, komonoko ete nazwi ndingisa mpo ya koya epai ya bino, yango wana nakomeka kolobela bino na lokota la ngai; iyo, na monoko mwa ngaimei, komonoko ete ezali mbala ya yambo nalobi epai ya bino na maloba ma monoko mwa ngai, ekangamaki ngai mobimba na kiti ya bosambisi, ezalaki ngai na mikumba miike ete nakokaki te koya epai ya bino.

2 Mpe kutu nakokaki te koya sikawa o ntango eye soko ezalaki te ete kiti ya bosambisi epesamaki na mosusu, mpo ya kokonza o esika ya ngai; mpe Nkolo o ngolu nzike andimaki ete naya epai ya bino.

3 Mpe tala, nayei kozalaka na elikia enene mpe mposa nzike ete nakokuta ete bino bomikitisaka liboso lya Nzambe, mpe ete bokobaki na kobondelaka ngolu ya ye, ete nakokuta ete bozalaka na bozangi mpamela liboso lya ye, ete nakokuta ete bozalaka na kpokoso ya boponi eye bandeko ba bino bazalaki na yango o Zalayemila.

4 Kasi epambolama nkombo ya Nzambe, ete apesi ngai nzela ya koyeba, iyo, apesaki ngai bosepeli bonene mpenza ya koyebaka ete batiami lisusu o nzela ya bosembo.

5 Mpe nalikii ete, engebene na Molimo mwa Nzambe oyo azali na ngai, ete nakozala na bosepeli likolo lya bino; nzokande nazali na mposa te ete bosepeli bwa ngai likolo lya bino eya na ntina ya matungisi mpe mawa maike boye maye nazwi mpo ya bandeko ba Zalayemila, mpo tala, bosepeli bwa ngai eyaki likolo lya bango nsima ya kotambolaka o katikati ya litungisi mpe mawa.

6 Kasi tala, ngai nalikii ete bozali te o bozali bwa bozangi bondimi boye lokola ezalaki bandeko ba bino; nalikii ete botombwani te o lolendo la mitema mya bino; iyo, nalikii ete botii te mitema mya bino likolo lya bozwi mpe biloko bya mpamba bya mokili; iyo, nalikii ete bokumbameli bikeko te, kasi bokumbameli Nzambe wa solo mpe wa bomoi, mpe ete bokotalela o boso mpo ya bolimbisi bwa masumu ma bino, elongo na bondimi bwa libela, boye bozali koya.

7 Mpo tala, nalobi epai ya bino esengeli makambo mingi koya; mpe tala, ezali likambo lyoko liye lizali na motuya mingi koleka mango manso—mpo tala, ntango ezali ya mosika mpenza te eye Mosikoli akofanda mpe akoya o ntei ya bato ba ye.

8 Tala, nalobi te ete akoya o ntei ya biso o ntango ya bofandi bwa ye o tabelenakele ya kufa; mpo tala, Molimo alobi te epai ya ngai ete ekozala boye. Sikawa etali likambo liye nayebi te; kasi eye mingi nayebi, ete Nkolo Nzambe azali na nguya ya kosala makambo manso maye mazali engebene na liloba lya ye.

9 Kasi tala, Molimo alobi eye mingi epai ya ngai: Belela epai ya bato baye, kolobaka—Yambolani, mpe lengeleni nzela ya Nkolo, mpe tambolani o nzela ya ye, eye ezali semba; mpo tala, bokonzi bwa lola bozali penepene, mpe Mwana Mobali wa Nzambe akoya likolo lya etando ya mabele.

10 Mpe tala, akobotama na Maliya, o Yelusaleme eye ezali mboka ya batata ba biso ba kala, ye kozalaka moseka, sani ya motuya mpe eponomo, mpe oyo akozipama na elili likolo mpe akozwa zemi na nguya ya Molimo Mosantu, mpe akobota mwana mobali moko, iyo, kutu Mwana Mobali wa Nzambe.

11 Mpe akokende, koyokaka mpasi ya bolozi mpe matungisi mpe masenginia ma lolenge na lolenge; mpe eye ete liloba likoka kokokisama liye lilobi akokamata likolo lya ye bolozi mpe bokono bwa bato ba ye.

12 Mpe akokamata likolo lya ye liwa, ete akoka kokangola nkanga ya liwa liye lizali kokanga bato ba ye; mpe akokamata likolo lya ye bokono bwa bango, ete nsopo ya ye ekoka kotonda na ngolu, engebene na mosuni, ete akoka koyeba engebene na mosuni boniboni kosalisa bato ba ye engebene na bokono bwa bango.

13 Sikawa Molimo ayebi makambo manso; nzokande Mwana Mobali wa Nzambe akoyoka mpasi engebene na mosuni ete akoka kokamata likolo lya ye masumu ma bato ba ye, ete akoka kolongola bobuki mobeko bwa bango engebene na nguya ya libiki lya ye; mpe sikawa tala, eye ezali litatoli liye lizali na ngai.

14 Sikawa nazali koloba epai ya bino ete bosengeli koyambola, mpe kobotama lisusu; mpo Molimo alobi soko bobotami lisusu te bokoki te kosangola bokonzi bwa lola; yango wana yakani mpe batisamani mpo ya boyamboli, ete bosukwama uta o masumu ma bino, ete bondimi likolo lya Mwana wa Mpate wa Nzambe, oyo akolongola masumu ma mokili, oyo azali makasi mpo ya kobikisa mpe kopetola uta o bozangi bosembo bonso.

15 Iyo, nalobi epai ya bino ete yakani mpe bangani te, mpe tikani mpembeni masumu manso maye makokakema bino mpamba mpamba, maye makokanga bino o nse mpo ya bobebisami, iyo, yakani, mpe kendeni mpe lakisani epai ya Nzambe wa bino ete bozali kolingaka koyambola masumu ma bino mpe kokota o kati ya boyokani elongo na ye mpo ya kobomba mitindo mya ye, mpe kotatola yango epai ya ye mokolo moye na kokendeke na mai ma libatisi.

16 Mpe onso oyo asali eye, mpe akobomba mitindo mya Nzambe uta sikawa kina nsima, ye kaka akomikundola nini nalobaki epai ya ye, iyo, akozwa bomoi bwa seko, engebene na litatoli lya Molimo Mosantu, oyo atatoli na ngai.

17 Mpe sikawa bandeko balingami ba ngai, endimi bino makambo maye? Tala, nalobi epai ya bino, iyo, nayebi ete bondimi mango; mpe nzela ete nayebi ete bondimi mango ezali na libimisi lya Molimo oyo azali na ngai. Mpe sikawa zambi bondimi bwa bino bozali bokasi botali yango, iyo, botali makambo maye nalobaki, enene ezali bosepeli bwa ngai.

18 Mpo lokola nalobaki epai ya bino uta o ebandeli, ete bozalaki te na bozali bwa kpokoso ya boponi lokola bandeko ba bino, kutu boye namoni ete mposa ya ngai esepelisami.

19 Mpo namoni ete bozali na nzela semba; namoni ete bozali na nzela eye ememi o bokonzi bwa Nzambe; iyo, namoni ete bozali kosembolaka nzela ya ye.

20 Namoni ete emonisamaki epai ya bino litatoli lya liloba lya ye, ete akoki te kotambola o nzela nioka nioka; mpe akobaluka te uta o ena alobaki; mpe azali na elilingi te ya kobaluka na loboko la mobali to loboko la mwasi, to uta ena ezali sembo mpo ya ena ezali mbeba; yango wana, botamboli bwa ye bozali zunguluke yoko ya seko.

21 Mpe afandi te o tempelo izangi bosantu; mpe ekoki te bosoto to eloko enso ya mbindo koyambama o bokonzi bwa Nzambe; yango wana nalobi epai ya bino ntango ekoya, iyo, mpe ekozala o mokolo mwa nsuka, ete ye oyo azali na bosoto akotikala o bosoto bwa ye.

22 Mpe sikawa bandeko balingami ba ngai, nalobi makambo maye epai ya bino ete nakoka kolamusa bino o liyoki lyoko lya lotomo la bino na Nzambe, ete bokoka kotambola na bozangi mpamela liboso lya ye, ete bokoka kotambola engebene na molongo mosantu mwa Nzambe, nsima ya yango boyambami.

23 Mpe sikawa nalingi ete bozala basawa, mpe bayangelami mpe boboto; petepete mpo ya kozalana; botonda na bompikiliki mpe motema molai; kozalaka na montei o makambo manso; kozalaka na etingia na kabombaka mitindo mya Nzambe o ntango inso; kosengeke mpo ya biloko kani binso bozali na mposa, bya molimo mpe bya ntango; ntango inso kozongisaka matondi epai ya Nzambe mpo ya biloko kani binso bozwi.

24 Mpe mononi ete bozali na bondimi, elikia, mpe lolango, mpe nde bokofuluka ntango inso na misala milamu.

25 Mpe tika Nkolo apambola bino, mpe abomba bilamba bya bino mbindo te ete bokoka o mokolo mwa nsuka komememe mpo ya kofanda elongo na Abalayama, Yisaka, mpe Yakobo, mpe baprofeta basantu baye bazala uta mokili ebanda, kozalaka na bilamba bya bino mbindo te kutu lokola bilamba bya bango bizali mbindo te, o bokonzi bwa lola mpo ya kokende libanda lisusu te.

26 Mpe sikawa bandeko balingami ba ngai, nalobi maloba maye epai ya bino engebene na Molimo oyo alakisi bosolo na ngai; mpe bozo bwa ngai bosepeli mpenza, na ntina ya etingia eluti mpe bokebi boye bopesi epai ya libola lya ngai.

27 Mpe sikawa, kimia ya Nzambe etikala likolo lya bino, mpe likolo lya ndako mpe mboka ya bino, mpe likolo lya bibwele mpe bitongo bya bino, mpe inso iye bozwi, basi mpe bana ba bino, engebene na bondimi mpe misala milamu mya bino, uta ntango eye mpe libela. Mpe boye nalobi. Amene.