Yango wana, ezali bokuse boko bwa likundoli lya bato ba Nefi, mpe lisusu lya Balamani— Bokomama mpo ya Balamani, baye bazali montika moko mwa ndako ya Yisalaele; mpe lisusu mpo ya Moyuda mpe Mopaganu—Bokomama na nzela ya motindo, mpe lisusu na molimo mwa bobikuli mpe bobimisi—Bokomama mpe bokangema, mpe bobombama epai ya Nkolo, ete bobebisama te—Mpo ya koya na likabo mpe nguya ya Nzambe mpo ya ndimbola ya bwango—Bokangema na loboko la Moloni, mpe bobombama epai ya Nkolo, mpo ya koya o ntango esengeli na nzela ya Mopaganu—Ndimbola ya bwango na likabo lya Nzambe.