Makomi
Enosa 1


Buku ya Enosa

Mokapo 1

Enosa asambeli na bokasi mpe alongi bolimbisi bwa masumu ma ye—Mongongo mwa Nkolo moyei o kati ya mayele ma ye, kolakelaka lobiko mpo ya Balamani o mokolo moko mokoya—Banefi balukaki kobutwisa Balamani—Enosa asepeli na Mosikoli wa ye. Penepene na 420 Yambo ya Klisto.

1 Tala, esalemaki ete ngai, Enosa, koyebaka ete Tata wa ngai azalaki moto moko wa boyengebene—mpo alakisaki ngai o lokota la ye, mpe lisusu o bilei mpe bopaleli bwa Nkolo—Mpe epambolama nkombo ya Nzambe wa ngai mpo ya yango—

2 Mpe nakolobela bino etumba eye nazalaki na yango liboso lya Nzambe, yambo nazwa bolimbisi boko bwa masumu ma ngai.

3 Tala, nakendaki koboma niama o zamba; mpe maloba maye nayokaka mbala nzike Tata wa ngai koloba matali bomoi bwa seko, mpe bosepeli bwa basantu, makotaki o bozindo o kati ya motema mwa ngai.

4 Mpe molimo mwa ngai moyokaki nzala; mpe nafukamaki o nse liboso lya Mozalisi wa ngai, mpe nabelelaki epai ya ye o losambo mpe bobondeli bokasi mpo ya bozo bwa ngaimei; mpe bolai bwa mokolo mobimba nabelelaki epai ya ye; iyo, mpe ekomaki butu natombolaki lisusu mongongo mwa ngai likolo ete mokomaki o lola.

5 Mpe eyaki mongongo moko epai ya ngai, kolobaka: Enosa, masumu ma yo malimbisami, mpe okopambolama.

6 Mpe ngai, Enosa, nayebaki ete Nzambe akokaki te kokosa; yango wana, elindo ya ngai esukwamaki nie.

7 Mpe nalobaki: Nkolo, boniboni esalemi?

8 Mpe alobaki epai ya ngai: Na ntina ya bondimi bwa yo na Klisto, oyo mokolo moko te omono mpe oyoka. Mpe mibu mingi milekaki yambo amimonisa yemei o mosuni; yango wana, kende, bondimi bwa yo bobikisi yo.

9 Sikawa, esalemaki ete eyokaka ngai maloba maye nabandaki koyoka mposa mpo ya bolamu bwa bandeko ba ngai, Banefi; yango wana, nasopaki bozo bwa ngai mobimba epai ya Nzambe mpo ya bango.

10 Mpe ntango ezalaki ngai kobunda o molimo, tala, mongongo mwa Nkolo moyaki o kati ya mayele ma ngai lisusu, kolobaka: Nakobimela bandeko ba yo engebene na etingia ya bango na kobatelaka mitindo mya ngai. Napesaki epai ya bango mboka eye, mpe ezali mboka esantu; mpe nalakeli yango botutu te longola se soko ezali mpo ya ntina ya bobe bwa bango; yango wana, nakobimela bandeko ba yo engebene lokola nalobaki; mpe bobuki mobeko bwa bango nakomeme o nse na mawa likolo lya mito mya bangomei.

11 Mpe esilaka ngai, Enosa, koyoka maloba maye, bondimi bwa ngai bobandaki kozala sikisiki na Nkolo; mpe nasambelaki epai ya ye nakobundaka ntango mingi mpe elai mpo ya bandeko ba ngai, Balamani.

12 Mpe esalemaki ete esilisaka ngai kosambela mpe kosala na etingia enso, Nkolo alobaki epai ya ngai: Nakopesa epai ya yo engebene na mposa ya yo, na ntina ya bondimi bwa yo.

13 Mpe sikawa tala, eye ezalaki mposa eye nazalaki na yango ya ye—ete soko boye ezalaki, ete bato ba ngai, Banefi, bakokweya o kati ya bobuki mobeko, mpe na nzela yoko babebisami, mpe Balamani babebisami te, ete Nkolo Nzambe alinga kobatela likundoli lyoko lya bato ba ngai, Banefi; kutu soko ezali boye na nguya ya loboko la ye losantu, ete likoka kotindama na yoko mokolo mokoya epai ya Balamani, ete, mbele, bakoka kokambema o kati ya lobiko—

14 Mpo o ntango eye bitumba bya biso bizalaki mpamba na kozongisaka bango o bondimi bwa solo. Mpe balapaki ndai o nkele ya bango ete, soko ekokaki kosalema, bakobebisa likundoli lya biso mpe biso, mpe lisusu mimeseno minso mya batata ba biso.

15 Yango wana, ngai koyebaka ete Nkolo Nzambe akokaki kobatela makundoli ma biso, nabelelaki epai ya ye mbala na mbala, mpo alobaki epai ya ngai: Eloko kani okosenga o bondimi, kondimaka ete okozwa yango o nkombo ya Klisto, okozwa yango.

16 Mpe nazalaka na bondimi, mpe nabelelaki epai ya Nzambe ete abatela makundoli; mpe ayokanaki elongo na ngai ete akokomisa yango epai ya Balamani o ntango esengeli ya yemei.

17 Mpe ngai, Enosa, nayebaki ekozala engebene na boyokani boye asalaki; yango wana motema mwa ngai mopemaki.

18 Mpe Nkolo alobaki epai ya ngai: Batata ba yo lokola basengeki ngai likambo liye; mpe likosalema epai ya bango engebene na bondimi bwa bango; mpo bondimi bwa bango bozalaki bo bwa yo.

19 Mpe sikawa esalemaki ete ngai, Enosa, nakendeki zingazinga o ntei ya bato ba Nefi, kobikulaka makambo makoya, mpe kotatolaka makambo maye nayokaki mpe namonoki.

20 Mpe napesi litatoli ete bato ba Nefi balukaki na etingia kozongisa Balamani epai ya bondimi bwa solo bwa Nzambe. Kasi misala mya biso mizalaki mpamba; boyini bwa bango bozalaki bwa sikisiki, mpe bakambemaki na lizali lya bango libe ete bakomaki bato ba nkei, mpe ba loma, mpe bato boko ba mposa-ya-makila, batonda na banzambe ba bikeko mpe bosoto; koliaka niama ya zamba; kofandaka o biema, mpe koyengayengaka zingazinga o esobe na mokaba mwa mposo yoko ekuse ya niama zingazinga na nketo ya bango mpe mito mya bango kolokolo; mpe mayele ma bango mazalaki o litimbo, mpe mopanga mogumbama, mpe ekoko. Mpe mingi ya bango bazalaki kolia eloko te longola se niama ebesu; mpe bazalaki mbala inso kolukaka kobebisa biso.

21 Mpe esalemaki ete bato ba Nefi basalaki bilanga, mpe bakolisaki ndenge inso ya mboto, mpe ya mbuma, mpe bibwele bya matonga, mpe bibwele bya ndenge inso ya niama ya lolenge na lolenge, mpe ntaba, mpe ntaba ya zamba, mpe lisusu farasa mingi.

22 Mpe ezalaki baprofeta mingi mpenza o ntei ya biso. Mpe bato bazalaki bato ba nkanza, na kpokoso mpo ya kososola.

23 Mpe ezalaki eloko te longola se soko ezalaki maloba maluti makasi, liteya mpe bobikuli bwa bitumba, mpe boweli, mpe bobebisami, mpe bokundoli bwa liwa mbala na mbala, mpe bowumeli bwa seko, mpe bosambisi mpe nguya ya Nzambe, mpe makambo maye manso—kolamusaka bango mbala na mbala o bobangi bwa Nkolo. Nalobi ezalaki eloko te ya makambo maye, mpe polele enene mpenza ya bolobi, elingaki kobatela bango na kokita mbangu o bobebisami. Mpe nsima ya lolenge loye nakomi etali bango.

24 Mpe namonoki bitumba o kati ya Banefi mpe Balamani o botamboli bwa mikolo mya ngai.

25 Mpe esalemaki ete nabandaki kokoma mobange, mpe mibu nkama na ntuku nsambo na libwa milekaki uta ntango eye tata wa biso Lehi atikaki Yelusaleme.

26 Mpe namonoki ete nasengeli noki kokita o lilita lya ngai, etambolisamaki ngai na nguya ya Nzambe ete nasengela koteya mpe kobikula epai ya bato baye, mpe kosakola liloba engebene na bosolo boye bozali na Klisto. Mpe nasakolaki yango o mikolo mya ngai minso, mpe nasepelaki o yango likolo lya eye ya mokili.

27 Mpe mosika te nakei o esika ya bopemi bwa ngai, boye bozali elongo na Mosikoli wa ngai; mpo nayebi ete na ye nakopema. Mpe nakosepela o mokolo ekolata kufa ya ngai bozangi bokufi, mpe ekoteleme liboso lya ye; nde nakomono elongi ya ye na elengi, mpe akoloba epai ya ngai: Yaka epai ya ngai, yo opambolami; ezali esika yoko elengelemi mpo ya yo o mboka ya Tata wa ngai. Amene.