Makomi
Etele 12


Mokapo 12

Profeta Etele alendisi bato mpo ya kondima na Nzambe—Moloni asangeli lisusu makamwa mpe makamwisi masalemaki na bondimi—Bondimi bokokisi ndeko mobali wa Yelede mpo ya komono Klisto—Nkolo apesi bato botau ete bakoka kozala basawa—Ndeko mobali wa Yelede alongoli Ngomba Zelini na bondimi—Bondima, elikia, mpe lolango lozali na motuya mpenza mpo ya lobiko—Moloni amoni Yesu miso na miso.

1 Mpe esalemaki ete mikolo mya Etele mizalaki o mikolo mya Koliatumili; mpe Koliatumili azalaki mokonzi likolo lya mboka mobimba.

2 Mpe Etele azalaki profeta moko wa Nkolo; yango wana Etele ayaki o mikolo mya Koliatumili, mpe abandaki kobikula epai ya bato, mpo akokaki te kopekisama na ntina ya Molimo mwa Nkolo oyo azalaki elongo na ye.

3 Mpo abelelaki uta o ntongo, kutu kina o mpokwa, kutu kina o bokiti bwa moi, kolendisaka bato mpo ya kondima na Nzambe mpo ya boyamboli mbele babebisama, kolobaka epai ya bango ete na bondimi makambo manso masalemi—

4 Yango wana, oyo andimi na Nzambe akoki solo kolikia mpo ya mokili moko molamu mingi, iyo, kutu esika yoko o loboko la mobali la Nzambe, eye elikia eyei na bondimi, esali longo loko mpo ya bozo bwa bato, loye lokosala bango ba solo mpe ba sikisiki, ntango inso kozalaka na misala milamu beboo, mpe kokambemaka na nkembo ya Nzambe.

5 Mpe esalemaki ete Etele abikulaki na bato makambo manene mpe ma bokamwi epai ya bato, maye bato bandimaki te, zambi bamonoki mango te.

6 Mpe sikawa, ngai, Moloni, nalingi koloba mwa moke etali makambo maye; nalingi kolakisa epai ya mokili ete bondimi bozali makambo maye tolikii mpe tomoni te; yango wana tiani ntembe te zambi bomoni te, mpo bozwi litatoli te kina nsima ya bomekami bwa bondimi bwa bino.

7 Mpo ezalaki na bondimi ete Klisto amilakisaki na batata ba biso, esilaka ya kosekwa uta na bakufi; mpe amilakisaki te epai ya bango kina esilaki bango kozala na bondimi na ye; yango wana, esengeli mpenza ete boko bazala na bondimi na ye, mpo amilakisaki te epai ya mokili.

8 Kasi na ntina ya bondimi bwa bato amilakisaki epai ya mokili, mpe akembelaki nkombo ya Tata, mpe alengeleki nzela yoko ete na yango basusu bakoka kozala bakaboli ba likabo lya lola, ete bakoka kozala na elikia mpo ya biloko biye bamoni te.

9 Yango wana, bokoki lisusu kozwa elikia, mpe kozala bakaboli ba likabo, soko bolingi bobele kozala na bondimi.

10 Tala ezalaki na bondimi ete bango ba kala babiangemaki nsima ya molongo mosantu mwa Nzambe.

11 Yango wana, na bondimi epesami mobeko mwa Mose. Kasi o likabo lya Mwana Mobali wa ye elengeli Nzambe nzela eluti elamu mingi ; mpe ezali na bondimi ete mokokisami.

12 Mpo soko ezali bondimi te o ntei ya bana ba bato Nzambe akoki kosala likamwisi te o ntei ya bango; yango wana, amilakisaki te kina nsima ya bondimi bwa bango.

13 Tala, ezalaki bondimi bwa Alama mpe Amuleki boye bosalaki boloko bokweya o mabele.

14 Tala, ezalaki bondimi bwa Nefi mpe Lehi boye bosalaki bobongwami likolo lya Balamani, ete babatisamaki na moto mpe na Molimo Mosantu.

15 Tala, ezalaki bondimi bwa Amona mpe bandeko babali ba ye basalaki likamwisi lyoko linene boye o ntei ya Balamani.

16 Iyo, kutu baye banso basalaki makamwisi basalaki mango na bondimi, kutu bango baye bazalaki yambo ya Klisto mpe lisusu bango baye bazalaki nsima.

17 Mpe ezalaki na bondimi ete bayekoli basato bazwaki elako ete bakomeka liwa te; mpe bazwaki elako te kina nsima ya bondimi bwa bango.

18 Mpe o ntango yoko te bato basali makamwisi kina nsima ya bondimi bwa bango; yango wana yambo bandimaki na Mwana Mobali wa Nzambe.

19 Mpe ezalaki mingi baye ya bango bondimi ezalaki bokasi mpenza, kutu yambo Klisto aya, baye bakokaki te kobombama uta o kati ya elamba, kasi solo bamonoki na miso mya bango biloko biye bamonoki na miso mya bondimi, mpe bazalaki na nsai.

20 Mpe tala, tomoni na likundoli liye ete moko wa bango azalaki ndeko mobali wa Yelede; mpo enene boye ezalaki bondimi bwa ye na Nzambe, ete etiaki Nzambe mosapi mwa ye, akokaki te kobomba mwango uta o bomoni bwa ndeko mobali wa Yelede, na ntina ya liloba lya ye liye alobaki epai ya ye, liye liloba azwaka na bondimi.

21 Mpe esilaka ndeko mobali wa Yelede komono mosapi mwa Nkolo, na ntina ya elako eye ndeko mobali wa Yelede azwaka na bondimi, Nkolo akokaki te kolongola eloko moko uta o bomoni bwa ye; yango wana alakisaki ye makambo manso, mpo akokaki lisusu te kobombama uta o kati ya elamba.

22 Mpe ezali na bondimi ete batata ba ngai bazwaki elako ete makambo maye makoya epai ya bandeko ba bango o nzela ya Bapaganu; yango wana Nkolo atindi ngai, iyo, kutu Yesu Klisto.

23 Mpe nalobaki epai ya ye: Nkolo, Bapaganu bakoseke makambo maye, na ntina ya botau bwa biso na kokoma; mpo Nkolo osali biso bakasi na liloba lya bondimi, kasi osali biso te bakasi na kokoma; mpo osali bato baye banso ete bakoka koloba nzike, na ntina ya Molimo Mosantu oyo opesi bango;

24 Mpe osali biso ete tokoka kokoma kaka moke, na ntina ya bozangi ntoki ya maboko ma biso. Tala, osali biso te bakasi na kokoma bo ndeko mobali wa Yelede, mpo osalaki ye ete makambo maye akomaki mazalaki makasi kutu lokola yo ozali, na kolonga moto mpo ya kotanga mango.

25 Lisusu osali maloba ma biso ma nguya mpe manene, kutu ete tokoki te kokoma mango; yango wana, ekomi biso tomoni botau bwa biso, mpe tobeti libaku, na ntina ya botiami bwa maloba ma biso; mpe nabangi mbele Bapaganu baseke maloba ma biso.

26 Mpe elobaka ngai eye, Nkolo alobaki epai ya ngai, kolobaka: matio ma ligboma, kasi bakolela; mpe boboto bwa ngai bokoki mpo ya basokemi, ete bazwa te litomba lya botau bwa bino;

27 Mpe soko bato bayei epai ya ngai nakolakisa bango botau bwa bango. Nakopesaka epai ya bato botau ete bakoka kozala basawa; mpe boboto bwa ngai bokoki mpo ya bato banso baye bakomikitisaka liboso lya ngai; mpo soko bamikitisi liboso lya ngai, mpe bondimi na ngai, nde nakosala makambo matau makoma makasi mpo ya bango.

28 Tala, nakolakisa epai ya Bapaganu botau bwa bango, mpe nakolakisa epai ya bango ete bondimi, elikia, mpe lolango lomemi epai ya ngai—liziba lya bosembo bonso.

29 Mpe ngai, Moloni, eyokaki ngai maloba maye, nabondisamaki, mpe nalobaki: O Nkolo, bosembo bwa yo bosalema, mpo nayebi ete okosalaka epai ya bana ba bato engebene na bondimi bwa bango;

30 Mpo ndeko mobali wa Yelede alobaki epai ya ngomba Zelini, Longwa—mpe elongwaki. Mpe soko azalaka na bondimi te elingaka kolongwa te; yango wana yo okosalaka esili bato kozala na bondimi.

31 Mpo boye omimonisaki epai ya bayekoli ba yo; mpo esilaka bango kozala na bondimi, mpe balobaki o nkombo ya yo, omilakisaki epai ya bango na nguya enene.

32 Mpe lisusu namikundoli ete yo olobi ete olengeli ndako yoko mpo ya moto, iyo, kutu o ntei ya mboka ya Tata wa yo, o yango moto akoka kozala na elikia eluti elamu; yango wana moto asengeli kozala na elikia; to akoki te kozwa lisango lyoko o esika eye olengeli.

33 Mpe lisusu, namikundoli ete olobi ete, yo olingi mokili, kutu kina o bolalisi o nse bomoi bwa yo mpo ya mokili, ete okoka kokamata bwango lisusu mpo ya kolengele esika yoko mpo ya bana ba bato.

34 Mpe sikawa nayebi ete bolingo boye azali na bwango mpo ya bana ba bato ezali lolango; yango wana, longola se soko bato bazali na lolango, bakoki te kosangola esika ena eye olengeli o mboka ya Tata wa yo.

35 Yango wana, nayebi na likambo liye olobi, ete soko Bapaganu bazali na lolango te, na ntina ya botau bwa biso, ete okomeka bango, mpe okolongola talanta ya bango, iyo, ena eye bazwi, mpe okopesa epai ya bango baye bakozwa beboo koleka.

36 Mpe esalemaki ete nasambelaki epai ya Nkolo ete apesa epai ya Bapaganu boboto, ete bakoka kozala na lolango.

37 Mpe esalemaki ete Nkolo alobaki epai ya ngai: Soko bazali na lolango te ezali likambo te mpo ya yo, ozali na bondimi; yango wana, milato mya yo mikokomisama sembesembe. Mpe zambi omoni botau bwa yo okoyeisama mokasi, kutu mpo ya bofandi o esika eye nalengeli o mboka ya Tata wa ngai.

38 Mpe sikawa ngai, Moloni, natombeli sese epai ya Bapaganu, iyo, mpe lisusu epai ya bandeko ba ngai baye nalingi, kina tokokutana liboso lya kiti ya bosambisi ya Klisto, wapi bato banso bakoyeba ete milato mya ngai mizangi mbindo ya makila ma bino.

39 Mpe nde ekoyeba bino ete namonoki Yesu, mpe asololaki na ngai miso na miso, mpe ete alobelaki ngai na bosawa mpenza, kutu lokola moto moko akolobelaka mosusu na lokota la ngaimei, etali makambo maye;

40 Mpe, kaka moke nakomi, na ntina ya botau bwa ngai na kokoma.

41 Mpe sikawa, nalingi kotinda bino koluka Yesu oyo baprofeta mpe bapostolo bakomelaki, ete boboto bwa Nzambe Tata, mpe lisusu Nkolo Yesu Klisto, mpe Molimo Mosantu, oyo apesi litatoli lya bango, bakoka kozala mpe kofanda na bino libela. Amene.