Makomi
Etele 13


Mokapo 13

Eteli alobi etali Yelusaleme ya sika ekotongama na Amerika na nkona ya Yosefe—Abikuli, abwakami libanda, akomi mambi ma Bayelede, mpe alobeli yambo esalema bobebisami bwa Bayelede—Etumba engali likolo lya mboka mobimba.

1 Mpe sikawa ngai, Moloni, nalingi kosilisa likundoli lya ngai liye litali bobebisami bwa bato baye nakomeli.

2 Mpo tala, babwakaki maloba manso ma Etele; mpo solo alobelaki bango makambo manso, uta o ebandeli ya moto; mpe ete esilaka mai kolongwa uta o etando ya mboka eye ekomaki mboka yoko eponomo likolo lya mboka inso, mboka eponomo na Nkolo; yango wana Nkolo alingi ete bato banso basalela ye baye bakofanda likolo lya etando ya yango;

3 Mpe ete ezalaki esika ya Yelusaleme ya Sika, eye ekokita libanda lya lola, mpe ndako esantu ya Nkolo.

4 Tala, Etele amonoki mikolo mya Klisto, mpe alobaki etali Yelusaleme yoko ya Sika likolo lya mboka eye.

5 Mpe alobaki lisusu etali ndako ya Yisalaele, mpe Yelusaleme uta wapi Lehi akoya—ekosila yango kobebisama, ekotongama lisusu, engumba yoko esantu epai ya Nkolo; yango wana, ekokaki kozala te Yelusaleme yoko ya sika mpo ezalaki o ntango ya kala; kasi ekotongama lisusu, mpe ekokoma engumba yoko esantu ya Nkolo; mpe ekotongama mpo ya ndako ya Yisalaele—

6 Mpe ete Yelusaleme yoko ya Sika ekotongama likolo lya mboka eye, mpo ya montika mwa nkona ya Yosefe, mpo makambo maye mazali emoniseli yoko.

7 Mpo lokola Yosefe amemeki tata wa ye o mboka ya Ejipito, kutu boye akufaki kuna; yango wana Nkolo amemeki montika moko mwa nkona ya Yosefe libanda lya mboka ya Yelusaleme, ete akoka koyoka ngolu epai ya nkona ya Yosefe, ete bawa te, kutu lokola ayokaki ngolu epai ya tata wa Yosefe ete awa te.

8 Yango wana, montika mwa ndako ya Yosefe ekotongama likolo lya mboka eye; mpe ekozala mboka yoko ya lisango lya bango; mpe bakotonga engumba yoko esantu mpo ya Nkolo, bo mpo ya Yelusaleme ya kala; mpe bakobulunganisama lisusu te, kina nsuka eyei, ntango ekoleka mabele.

9 Mpe ekozala lola loko la sika mpe mabele moko ma sika; mpe ikozala bo mpo ya eye ya kala longola se eye ya kala eleki, mpe makambo manso makomi sika.

10 Mpe nde eyei Yelusaleme ya Sika; mpe bapambolami baye bafandi kuna, mpo ezali bango baye ya bango milato mizali mpembe o nzela ya makila ma Mwana wa Mpate; mpe bazali baye batangemaki o ntei ya montika mwa nkona ya Yosefe, oyo bazalaki ba ndako ya Yisalaele.

11 Mpe nde eyei lisusu Yelusaleme ya kala; mpe bafandi ba yango, epambolami bango, mpo basukwami na makila ma Mwana wa Mpate; mpe bango baye bapalanganisamaki mpe basangisamaki uta o ntaka inei ya mabele, mpe uta o ekolo ya nordi, mpe bazali bakaboli ba bokokisi bwa boyokani boye Nzambe asalaki elongo na tata wa bango, Abalayama.

12 Mpe eyei makambo maye, ekomeme esalema nkoma eye elobi, ezali bango baye bazalaki ba yambo, baye bakozala ba nsuka, mpe ezali bango baye bazali ba nsuka baye bakozala ba yambo.

13 Mpe nazalaki penepene na kokoma mingi, kasi napekisamaki; kasi enene mpe ya bokamwi ezalaki mabikuli ma Etele; kasi bamonoki ye lokola mpamba, mpe babwakaki ye libanda; mpe yemei abombanaki o libulu lya libanga lyoko o moi, mpe o butu akendeki kotalaka makambo maye makoya likolo lya bato.

14 Mpe lokola afandaki o libulu lya libanga lyoko asalaki etikali ya likundoli lya ye kotalaka bobebisami boye boyaki likolo lya bato, o butu.

15 Mpe esalemaki ete o mobu mona kaka o mwango abwakamaki libanda uta na bato, ebandaki kozala etumba yoko enene o ntei ya bato, mpo ezalaki mingi baye batelemeki mpe balukaki kobebisa Koliatumili na mwango mwa bango mwa nkuku mwa nkuna, moye elobami.

16 Mpe sikawa Koliatumili, eyekolaka ye, yemei, o ntoki ya etumba mpe mayele manso ma mokili, yango wana apesaki etumba epai ya bango baye balukaki kobebisa ye.

17 Kasi ayambolaki te, mpe bana babali mpe bana basi malonga ba ye te; to bana babali mpe bana basi malonga ba Kowolo te; bana babali malonga mpe bana basi ba Koliyolo te; mpe o nsuka, ezalaki moko te ya bana babali mpe bana basi likolo lya etando ya mabele mobimba baye bayambolaki masumu ma bango.

18 Yango wana, esalemaki ete o mobu mwa yambo eye Etele afandaki o libulu lya libanga lyoko, ezalaki mingi ya bato baye babomamaki na mopanga mwa makelemba mana ma nkuku, kobundaka na Koliatumili ete bakoka kozwa bokonzi.

19 Mpe esalemaki ete bana babali ba Koliatumili babundaki nzike mpe basopaki makila nzike.

20 Mpe o mobu mwa mibale maloba ma Nkolo mayaki epai ya Etele, ete akende kobikula epai ya Koliatumili ete, soko akoyambola, mpe baye ndako ya ye mobimba, Nkolo akopesa epai ya ye bokonzi mpe akobatela bato—

21 Soko te bakobebisama, mpe baye ndako ya ye mobimba longola se soko ezali yemei. Mpe akozala na bomoi kaka mpo ya komono bokokisi bwa mabikuli maye malobamaki matali bato basusu bakozwa mboka mpo ya lisango lya bango; mpe Koliatumili akozwa bokundami na bango; mpe bozo bonso bokobebisama longola se Koliatumili.

22 Mpe esalemaki ete Koliatumili ayambolaki te, mpe baye ndako ya ye te, mpe bato te lokola; mpe bitumba bisilaki te; mpe balukaki koboma Etele, kasi akimaki uta o liboso lya bango mpe abombanaki lisusu o libulu ya libanga lyoko.

23 Mpe esalemaki ete etelemeki Saledi, mpe apesaki etumba epai ya Koliatumili; mpe abeteki ye, mpenza ete o mobu mwa misato, amemeki ye o kati ya bokangemi.

24 Mpe bana babali ba Koliatumili, o mobu mwa minei, babeteki Saledi, mpe bazwaki bokonzi lisusu mpo ya tata wa bango.

25 Sikawa ebandaki kozala etumba yoko o etando mobimba ya mboka, moto na moto elongo na lingomba lya ye kobundaka mpo ya eye azalaki na mposa.

26 Mpe izalaki bayongoli, mpe o nsuka, ndenge inso ya nkuna likolo lya etando mobimba ya mboka.

27 Mpe esalemaki ete Koliatumili asilikaki mpenza na Saledi, mpe akendeki kobunda na ye elongo na mampinga ma ye; mpe bakutanaki na nkanda enene, mpe bakutanaki o lobwaku la Giligali; mpe etumba ekomaki ya nsomo mpenza.

28 Mpe esalemaki ete Saledi abundaki na ye mpo ya ntaka ya mikolo misato. Mpe esalemaki ete Koliatumili abeteki ye, mpe alandaki ye kina ayaki o bisobe bya Esiloni.

29 Mpe esalemaki ete Saledi apesaki ye etumba lisusu likolo lya bisobe; mpe tala, abeteki Koliatumili, mpe abengenaki ye nsima lisusu o lobwaku la Giligali.

30 Mpe Koliatumili apesaki Saledi etumba lisusu o lobwaku la Giligali, o yango abeteki Saledi mpe abomaki ye.

31 Mpe Saledi azokisaki Koliatumili o ebelo, ete akendeki lisusu te kobunda mpo ya ntaka ya mibu mibale, o myango bato banso likolo lya etando ya mboka bazalaki kosopaka makila, mpe ezalaki moto te mpo ya kokanga bango.