Makomi
Elamani 15


Mokapo 15

Nkolo atumbolaki Banefi zambi alingaki bango—Balamani babongwana bazali sikisiki mpe molende o bondimi—Nkolo akoyoka ngolu epai ya Balamani o mikolo mya nsuka. Penepene na 6 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa, bandeko balingami ba ngai, tala, nasakoli epai ya bino ete longola se soko boyamboli ndako ya bino ekotikala mpamba.

2 Iyo, longola se soko boyamboli, basi ba bino bakozala na ntina enene ya kolela o mokolo moye bakomelisa mabele; mpo bakomeka kokima mpe ekozala te esika ya kobombana; iyo, mpe lisuma epai ya bango baye bazali na mwana, mpo bakozala bozito mpe bakokoka te kokima; yango wana, bakoniatama o nse mpe bakotikala mpo ya kowa.

3 Iyo, lisuma epai ya bato baye babiangemi bato ba Nefi longola se soko bayamboli, ekomono bango bilembo biye binso mpe makamwa maye makolakisama epai ya bango; mpo tala, bazali bato boko baponomi na Nkolo; iyo, bato ba Nefi elingaki ye, mpe lisusu etumbolaki ye bango; iyo, o mikolo mya mabe ma bango etumbolaki ye bango zambi alingaki bango.

4 Kasi tala bandeko ba ngai, Balamani eyinaki ye zambi misala mya bango mizalaki mibe ntango inso, mpe eye na ntina ya bobe bwa momeseno mwa batata ba bango. Kasi tala, lobiko loyei epai ya bango o nzela ya liteya lya Banefi; mpe mpo ya ntina eye Nkolo abendaki molai mikolo mya bango.

5 Mpe nalingi ete botala ete eteni eleki mingi ya bango bazali o nzela ya lotomo la bango, mpe bazali kotambola na bokebi liboso lya Nzambe, mpe batosi kobatela mitindo mya ye mpe meko ya ye mpe masambisi ma ye engebene na mobeko mwa Mose.

6 Iyo, nalobi epai ya bino, ete eteni eleki mingi ya bango bazali kosalaka eye, mpe bazali kosalaka makasi na etingia ya sikisiki ete bakoka komeme etikali ya bandeko ba bango o boyebi bwa bosolo; yango wana bazali mingi baye babakisi motango mwa bango mokolo na mokolo.

7 Mpe tala, boyebi na binomei, mpo botatoli yango, ete lokola mingi ya bango bamememi o boyebi bwa bosolo, mpe bayebi mimeseno mya nkuna mpe nsomo mya batata ba bango, mpe bakambemi mpo ya kondima nkoma isantu, iyo, mabikuli ma baprofeta basantu, maye makomami, maye makokamba bango o bondimi likolo lya Nkolo, mpe epai ya boyamboli, boye bondimi mpe boyamboli bomemi bobongwani bwa motema epai ya bango—

8 Yango wana, mingi lokola bayei o eye, boyebi binomei bazali sikisiki mpe molende o bondimi, mpe o makambo na mango basalemi nsomi.

9 Mpe boyebi lisusu ete bakundi mandoki ma bango ma etumba mpe babangi, kokamata mango lisusu, mbele na yoko nzela bakosumuka; iyo, bokoki komono ete babangi kosumuka—mpo tala bakondima bangomei baniatama o nse mpe babomama na bayini ba bango, mpe bakotombola te mipanga mya bango mpo ya kobunda na bango, mpe eye na ntina ya bondimi bwa bango na Klisto.

10 Mpe sikawa, na ntina ya molende mwa bango ekondima bango o likambo lina liye bandimi, mpo na ntina ya sikisiki ya bango epelisamaki bango mwinda, tala, Nkolo akopambola bango mpe akobenda molai mikolo mya bango, ata bobe bwa bango—

11 Iyo, kutu soko bokokulumwa o bozangi bondimi Nkolo akobenda molai mikolo mya bango, kina ntango ekoya eye elobami na batata ba biso, mpe lisusu na profeta Zenosi, mpe baprofeta basusu mingi, etali bozongisi bwa bandeko ba biso, Balamani, lisusu o boyebi bwa bosolo—

12 Iyo, nalobi epai ya bino, ete o ntango ya nsuka bilako bya Nkolo bitandolami na bandeko ba biso, Balamani; mpe ata matungisi mingi maye bakozwa, mpe ata bakobenganama epai na epai likolo lya etando ya mabele, mpe bakolandama, mpe bakobeteme mpe bakopalanganisama o mboka mompaya, kozalaka na esika te mpo ya bobombani, Nkolo akoyoka ngolu epai ya bango.

13 Mpe eye ezali engebene na bobikuli, ete bakomememe lisusu o boyebi bwa solo, boye bozali boyebi bwa Mosikoli wa bango, mpe mobateli monene mpe wa solo wa bango, mpe bakotangema o ntei ya mpate ya ye.

14 Yango wana nalobi epai ya bino, ekozala bolamu mingi mpo ya bango koleka mpo ya bino longola se soko boyamboli.

15 Mpo tala, soko elakisamaka misala mikasi epai ya bango miye milakisami epai ya bino, iyo, epai ya bango baye bakulumwi o bozangi bondimi na ntina ya mimeseno mya batata ba bango, bokoki komono na binomei ete balingaki mokolo moko lisusu te bakulumwa o bozangi bondimi.

16 Yango wana, elobi Nkolo: Nakobebisa bango nie, kasi nakosala ete o mokolo mwa bwania bwa ngai bakozonga lisusu epai ya ngai, elobi Nkolo.

17 Mpe sikawa tala, elobi Nkolo, etali bato banso ba Banefi: Soko bakoyambola te, mpe bakotosa te kosala bolingi bwa ngai, nakobebisa bango nie, elobi Nkolo, na ntina ya bozangi bondimi bwa bango ata misala mikasi mingi miye nasali o ntei ya bango; mpe na bosolo lokola Nkolo azali na bomoi makambo maye makozala, elobi Nkolo.