Makomi
Elamani 4


Mokapo 4

Banefi bakabwani mpe Balamani basangisi makasi mpe bakamati mboka ya Zalayemila— Bokweyisami bwa Banefi boyei na ntina ya nkuna ya bango—Eklezia ekulumwi mpe bato bakomi batau lokola Balamani. Penepene na 38–30 Yambo ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete o mobu mwa tuku mitano na minei ezalaki bokabwani mingi o eklezia, mpe ezalaki boweli o ntei ya bato, mpenza ete ezalaki bosopi makila maike.

2 Mpe eteni ya batomboki babomamaki mpe babenganamaki libanda lya mboka, mpe bakendeki epai ya mokonzi wa Balamani.

3 Mpe esalemaki ete basalaki makasi mpo ya kolamusa Balamani mpo ya kobunda na Banefi; kasi tala, Balamani babangaki mpenza, mpenza ete balingaki te koyokemela epai ya maloba ma bakabwani bana.

4 Kasi esalemaki ete o mobu mwa tuku mitano na motoba mwa bokonzi bwa basambisi, izalaki batomboki baye bamataki uta na Banefi epai ya Balamani; mpe balongaki elongo na bana basusu na kolamusaka bango na nkanda ya Banefi; mpe bazalaki mobu mona mobimba kolengeleke mpo ya etumba.

5 Mpe o mobu mwa tuku mitano na sambo bakitaki mpo ya kobunda na Banefi, mpe babandaki mosala mwa liwa; iyo, o mobu mwa tuku mitano na mwambe mwa bokonzi bwa basambisi balongaki na kozwaka mboka ya Zalayemila; iyo, mpe lisusu mboka inso, kutu epai ya mboka eye ezalaki penepene na mboka Beboo.

6 Mpe Banefi mpe mampinga ma Moloniya babenganamaki kutu o kati ya mboka ya Beboo;

7 Mpe kuna balendaki mpo ya kobunda na Balamani, uta o mbu ya westi, kutu epai ya esti; yango kozalaka mobembo mwa mokolo moko mpo ya Monefi moko, o monkoloto moye balendisaka mpe bapikaka mampinga ma bango mpo ya kobatela ekolo ya nordi.

8 Mpe boye bakabwani bana ba Banefi, na lisalisi lya limpinga lyoko linene lya Balamani, bazwaka bozwi bonso bwa Banefi boye bozalaki o mboka ya epai ya sudi. Mpe eye enso esalemaki o mobu mwa tuku mitano na mwambe mpe libwa mwa bokonzi bwa basambisi.

9 Mpe esalemaki ete o mobu mwa tuku motoba mwa bokonzi bwa basambisi, Moloniya alongaki elongo na mampinga ma ye na kozwaka biteni mingi bya mboka; iyo, balongaki lisusu bingumba mingi biye bikweyaka o kati ya maboko ma Balamani.

10 Mpe esalemaki ete o mobu mwa tuku motoba na moko mwa bokonzi bwa basambisi balongaki na kozwaka lisusu katikati ya bozwi bonso bwa bango.

11 Sikawa bobungisi boye bonene bwa Banefi, mpe bobomi boye bozalaki o ntei ya bango, bolingaki kokoma te soko ezalaki te mpo ya nkuna ya bango mpe bonsomo bwa bango boye bozalaki o ntei ya bango; iyo, mpe ezalaki o ntei ya baye lisusu bazalaki koloba bazali ba eklezia ya Nzambe.

12 Mpe ezalaki na ntina ya lolendo la mitema mya bango, na ntina ya bozwi boluti bwa bango, iyo, ezalaki na ntina ya bokakemi bwa bakeleli ba bango, kobotoloko bilei bya bango na bato ba nzala, kobotoloko bilamba na bato ba bolumbu, mpe kobeteke bandeko ba bango basawa likolo lya litama, kosalaka liseki lya ena eye ezalaki bule, kowanganaka molimo mwa bobikuli mpe bobimisi, kobomaka, kopunzaka, kokosaka, koyibaka, kosalaka ekobo, kotelemeke o boweli bonene, mpe kokimaka mosika o kati ya mboka ya Nefi, o ntei ya Balamani—

13 Mpe na ntina ya nkuna eye enene ya bango, mpe bifundeli bya bango na makasi ma bangomei, batikamaki o makasi ma bangomei; yango wana bazwaki bomengo te, kasi batungisamaki mpe babetemeki, mpe babenganamaki liboso lya Balamani, kina babungisaki penepene na mboka inso ya bango.

14 Kasi tala, Moloniya ateyaki makambo mingi epai ya bato na ntina ya masumu ma bango, mpe lisusu Nefi mpe Lehi, baye bazalaki bana babali ba Elamani, bateyaki makambo mingi epai ya bato, iyo, mpe babikulaki makambo mingi epai ya bango matali mabe ma bango, mpe nini ekoya epai ya bango soko bayamboli te masumu ma bango.

15 Mpe esalemaki ete bayambolaki, mpe mbala nzike lokola bayambolaki babandaki kozwa bomengo.

16 Mpo emonoki Moloniya ete bayambolaki amekaki libaku mpo ya kokamba bango uta esika na esika, mpe uta engumba na engumba, kutu kina balongaki lisusu katikati yoko ya bozwi bwa bango mpe katikati yoko ya mboka inso ya bango.

17 Mpe boye esukaki mobu mwa tuku motoba na yambo mwa bokonzi bwa basambisi.

18 Mpe esalemaki ete o mobu mwa tuku motoba na mibale mwa bokonzi bwa basambisi, Moloniya akokaki kozwa lisusu te bozwi bwa Balamani.

19 Yango wana basundolaki mwango mwa bango bwa kokamata etikali ya mboka ya bango, mpo boye motango monene ezalaki Balamani ete ekokaki te kosalema mpo ya Banefi kozwa nguya mingi likolo lya bango; yango wana Moloniya asalelaki mampinga manso ma ye na kosimbaka biteni bina biye bakamataka.

20 Mpe esalemaki ete, na ntina ya bonene bwa motango mwa Balamani Banefi bazalaki na bobangi bonene, mbele balongama, mpe baniatama, mpe babomama, mpe babebisama.

21 Iyo, babandaki komikundola mabikuli ma Alama, mpe lisusu maloba ma Moziya; mpe bamonoki ete bazalaka bato ba mito mikasi, mpe batiaka na mpamba mitindo mya Nzambe.

22 Mpe ete babongolaka mpe baniataka o nse ya makolo ma bango mibeko mya Moziya; to miye Nkolo atindaki ye apesa epai ya bato; mpe bamonoki ete mibeko mya bango mikomaki mibeba, mpe ete bakomaki bato boko ba nkuna, mpenza ete bazalaki ba nkuna kutu bo Balamani.

23 Mpe na ntina ya bobe bwa bango, eklezia ebandaki kokulumwa; mpe babandaki kotia ntembe na molimo mwa bobikuli mpe molimo mwa bobimisi; mpe masambisi ma Nzambe matalaki bango o elongi.

24 Mpe bamonoki ete bakomaki batau, lokola bandeko ba bango Balamani, mpe ete Molimo mwa Nkolo abatelaki bango lisusu te; iyo, alongwaki uta na bango zambi Molimo mwa Nkolo afandaka te o tempelo ezangi bosantu—

25 Yango wana Nkolo atikaki kobatela bango na nguya ya ye ya likamwisi mpe ezangi emekiseli, mpo bakweyaka o kati ya bozali boko bya bozangi bondimi mpe nkuna ya nsomo; mpe bamonoki ete Balamani bakomaki motango mpenza koleka bango, mpe longola se soko bakangemi epai ya Nkolo Nzambe wa bango basengeli na ntembe te kowa.

26 Mpo tala, bamonoki ete bokasi bwa Balamani bozalaki bonene lokola boye bwa bango, kutu moto na moto. Mpe boye bakweyaki o kati ya bobuki mobeko bonene boye; iyo, boye bakomaka batau, na ntina ya bobuki mobeko bwa bango, o ntaka ya mibu mingi te.