Makomi
Elamani 6


Mokapo 6

Balamani sembo bateyi na Banefi ba nkuna—Bato babale bazwi bomengo o ntaka ya eleko yoko ya kimia mpe biloko ebele—Lusifelo, mokeli wa lisumu, alamusi mitema mya bato ba nkuna mpe bayongoli ba Gadiatoni na bobomi mpe nkuna—Bayongoli babotoli boyangeli bwa Banefi. Penepene na 29–23 Yambo ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete esukaki mobu mwa tuku motoba na mibale mwa bokonzi bwa basambisi, makambo maye manso makomaki mpe Balamani bakomaki, eteni eleki mingi ya bango, bato sembo, mpenza ete bosembo bwa bango bolekaki boye bwa Banefi, na ntina ya sikisiki ya bango mpe molende mwa bango na bondimi.

2 Mpo tala, izalaki mingi ya Banefi baye bakomaki mito mikasi mpe bazanga boyamboli mpe ba nkuna mpenza, mpenza ete babwakaki liloba lya Nzambe mpe liteya mpe bobikuli bonso boye boyaki o ntei ya bango.

3 Nzokande, bato ba eklezia bazalaki na bosepeli bonene na ntina ya mbongwana ya Balamani, iyo, na ntina ya eklezia ya Nzambe, eye etiamaki o ntei ya bango. Mpe balinganaki, mpe basepelaki bango na bango, mpe bazalaki na bosepeli bonene.

4 Mpe esalemaki ete mingi ya Balamani bakitaki o kati ya mboka ya Zalayemila, mpe basakolaki epai ya bato banso ba Banefi lolenge la mbongwana ya bango, mpe alendisaki bango na bondimi mpe boyamboli.

5 Iyo, mpe mingi bateyaki na nguya enene mpenza mpe bokulaka, mpo ya bomemi o nse mingi ya bango o kati ya bozindo bwa bosawa, mpo ya kozala balandi basawa ba Nzambe mpe Mwana wa Mpate.

6 Mpe esalemaki ete mingi ya Balamani bakendeki o kati ya mboka ya epai ya nordi; mpe lisusu Nefi mpe Lehi bakendeki o kati ya mboka ya epai ya nordi, mpo ya koteya epai ya bato. Mpe boye esukaki mobu mwa tuku motoba na misato.

7 Mpe tala, kimia ezalaki o mboka mobimba, mpenza ete Banefi bakendeki bipai binso bya mboka biye balingaki, soko o ntei ya Banefi to Balamani.

8 Mpe esalemaki ete Balamani bakendeki lisusu bipai binso biye balingaki, soko o ntei ya Balamani to o ntei ya Banefi; mpe boye bazalaki na bonsomi bwa bozalani bango na bango, mpo ya kosomba mpe mpo ya koteke, mpe mpo ya kozwa litomba, engebene na mposa ya bango.

9 Mpe esalemaki ete bakomaki na bozwi mpenza, Balamani mpe Banefi lokola; mpe bazwaki ebele eluti ya wolo, mpe ya mpauni, mpe ya ndenge inso ya bibende ya ntalo, o mboka ya sudi mpe o mboka ya nordi lokola.

10 Sikawa mboka ya sudi ebiangemaki Lehi, mpe mboka ya nordi ebiangemaki Muleki, eye ezalaki nsima ya mwana mobali wa Sidikiya; mpo Nkolo amemeki Muleki o mboka ya nordi, mpe Lehi o mboka ya sudi.

11 Mpe tala, ezalaki ndenge inso ya wolo o mboka iye ibale, mpe ya mpauni, mpe ya makele ma ntalo ma lolenge na lolenge; mpe izalaki lisusu bato ba misala mya ntoki mpenza, baye basalaki ndenge inso ya misala mya makele ma ntalo mpe babongisaki mango; mpe boye bakomaki bazwi.

12 Mpe bakolisaki mboto beboo, o nordi mpe o sudi lokola; mpe badakolaki mpenza, o nordi mpe o sudi lokola. Mpe bayikanaki mpe bayikaki mpenza bokasi o mboka. Mpe babokolaki bibwele mpe bitonga mingi, iyo, niama mingi.

13 Tala basi ba bango bazalaki kosala mpe kotonga, mpe basalaki ndenge inso ya bilamba, bya lino lya mapasa-malonga mpe bilamba bya lolenge na lolenge, mpo ya kolatisa bolumbu bwa bango. Mpe boye mobu mwa tuku motoba na minei molekaki na kimia.

14 Mpe o mobu mwa tuku motoba na mitano bazalaki lisusu na bosepeli bonene mpe kimia, iyo, liteya liike mpe mabikuli mingi matali ena eye esengelaki koya. Mpe boye elekaki mobu mwa tuku motoba na mitano.

15 Mpe esalemaki ete o mobu mwa tuku motoba na motoba mwa bokonzi bwa basambisi, tala, Sezolami abomamaki na loboko loyebani te lokola efandaki ye likolo lya kiti ya bosambisi. Mpe esalemaki ete o mobu mona kaka, ete mwana mobali wa ye, oyo aponomoki na bato o esika ya ye, abomamaki lokola. Mpe boye esukaki mobu mwa tuku motoba na motoba.

16 Mpe o ebandeli ya mobu mwa tuku motoba na sambo bato babandaki kokola o nkuna mpenza lisusu.

17 Mpo tala, Nkolo apambolaki bango o ntango elai na bozwi bwa mokili ete balamusamaki te na nkanda, na etumba, to na bosopi makila; yango wana babandaki kotia mitema mya bango likolo lya bozwi bwa bango; iyo, babandaki koluka kozwa litomba ete bakoka kotombwana moko likolo lya mosusu; yango wana babandaki kosala bobomi bwa nkuku, mpe koyongolo mpe kopunza, ete bakoka kozwa litomba.

18 Mpe sikawa tala, babomi mpe bapunzi bana bazalaki lingomba lyoko oyo esalemaki na Kisikumeni mpe Gadiatoni. Mpe sikawa esalemaka ete izalaki mingi, kutu o ntei ya Banefi, ba lingomba lya Gadiatoni. Kasi tala, bazalaki mingi koleka o ntei ya eteni eleki nkuna ya Balamani. Mpe babiangemaki bayongoli mpe babomi ba Gadiatoni.

19 Mpe ezalaki bango baye babomaki mosambisi mokonzi Sezolami, mpe mwana mobali wa ye, o kiti ya bosambisi; mpe tala, bamononoki te.

20 Mpe sikawa esalemaki ete emonoki Balamani ete izalaki bayongoli o ntei ya bango bayokaki mawa mpenza; mpe basalelaki mayele manso na nguya ya bango mpo ya kobebisa bango mosika na etando ya mabele.

21 Kasi tala, Satana alamusaki mitema mya eteni eleki mingi ya Banefi, mpenza ete basalaki bomoko elongo na mangomba mana ma bayongoli, mpe bakotaki o kati ya mayokani ma bango mpe ndai ya bango, ete bakobatela mpe bakobomba bango na bango na bizalela bwa kpokoso binso bakotiama, ete bayoka mpasi te mpo ya bobomi bwa bango, mpe bopunzi bwa bango, mpe boyibi bwa bango.

22 Mpe esalemaki ete bazalaki na bilembo bya bango, iyo, bilembo bya bango bya nkuku, mpe maloba ma bango ma nkuku; mpe eye ete bakoka kokesenisa ndeko mobali moko oyo akotaka o kati ya boyokani, ete nkuna nini ndeko mobali wa ye akosala bakozwa mpasi te na ndeko mobali wa ye, to na bango baye bazalaki ba lingomba lya ye, baye bakamataka boyokani boye.

23 Mpe boye bakokaki koboma, mpe kopunza, mpe koyiba, mpe kosala pite mpe ndenge inso ya nkuna, na bokeseni na mibeko mya ekolo ya bango mpe lisusu mibeko mwa Nzambe wa bango.

24 Mpe onso oyo wa bango oyo azalaki wa lingomba lya bango akobimisa epai ya mokili nkuna ya bango mpe bonsomo bwa bango, akosambisama, engebene na mibeko mya ekolo ya bango te, kasi engebene na mibeko mya nkuna ya bango, miye mipesamaka na Gadiatoni mpe Kisikumeni.

25 Sikawa tala, ezali ndai mpe mayokani maye ma nkuku maye Alama atindaki mwana mobali wa ye ekokende te epai ya mokili, mbele ezala nzela yoko ya bomemi o nse bato epai ya liwa.

26 Sikawa tala, ndai mpe mayokani maye ma nkuku mayaki te epai ya Gadiatoni uta o makundoli maye mapesamaki na Elamani; kasi tala, matiamaki o kati ya motema mwa Gadiatoni na mozali ona kaka oyo asenginiaki baboti ba biso ba yambo mpo ya kolia mbuma epekisama—

27 Iyo, mozali ona kaka oyo asalaki ekokolo elongo na Kaina, ete soko akoboma ndeko mobali wa ye Abele ekoyebana te epai ya mokili. Mpe asalaki ekokolo elongo na Kaina mpe balandi ba ye uta ntango ena.

28 Mpe lisusu ezali mozali ona kaka oyo atiaki yango o kati ya mitema mya bato mpo ya kotonga linongi lyoko lilai likoka ete bakoka kokoma o lola. Mpe ezali mozali ona kaka oyo akambaki bato baye bayaki uta linongi lina o kati ya mboka eye; oyo apanzaki misala mya molili mpe bonsomo likolo lya etando ya mboka, kina abendaki bato o nse o bobebisami boko nie, o limfelo lya libela.

29 Iyo, ezali mozali ona kaka oyo atiaki o kati ya motema mwa Gadiatoni kokoba na kosala mosala mwa molili, mpe bobomi bwa nkuku; mpe asalaki yango uta o ebandeli ya moto kutu kina o ntango eye.

30 Mpe tala, ezali ye oyo azali mokeli wa lisumu linso. Mpe tala, amemi misala mya ye mya molili mpe bobomi bwa nkuku, mpe akitanisi bikokolo bya bango, mpe ndai ya bango, mpe mayokani ma bango, mpe miango mya nkuna ya nsomo, uta nkola o nkola engebene lokola akoki kotia nkanga likolo lya mitema mya bana ba bato.

31 Mpe sikawa tala, atiaki nkanga enene likolo lya mitema mya Banefi; iyo, mpenza ete bakomaki ba nkuna mpenza; iyo, eteni eleki mingi ya bango ebalukaka libanda lya nzela ya bosembo, mpe baniataki o nse ya makolo ma bango mitindo mya Nzambe, mpe babalukaki epai ya nzela ya bangomei, mpe bamisalelaki bikeko bya wolo bya bango mpe mpauni ya bango.

32 Mpe esalemaki ete mabe maye manso mayaki epai ya bango o ntaka ya mibu mingi te, mpenza ete eteni yoko eleki mingi ya yango eyaka epai ya bango o mobu mwa tuku motoba na sambo mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi.

33 Mpe bakolaki na mabe ma bango o mobu mwa tuku motoba na mwambe lokola, na mawa manene mpe boleli bwa basembo.

34 Mpe boye tomoni ete Banefi babandaki kokulumwa o bozangi bondimi, mpe bakolaki na nkuna mpe bonsomo, nzokande Balamani babandaki kokola mpenza o boyebi bwa Nzambe wa bango; iyo, babandaki kobatela meko mpe mitindo mya ye, mpe kotambola o bosolo mpe alima liboso lya ye.

35 Mpe boye tomoni ete Molimo mwa Nkolo abandaki kolongwa uta na Banefi, na ntina ya nkuna mpe bokasi bwa mitema mya bango.

36 Mpe boye tomoni ete Nkolo abandaki kosopa libanda Molimo mwa ye epai ya Balamani, na ntina ya petepete ya bango mpe bolingi bwa bango mpo ya kondima na maloba ma ye.

37 Mpe esalemaki ete Balamani balandaki lingomba lya bayongoli ba Gadiatoni; mpe bateyaki liloba lya Nzambe o ntei ya eteni eleki nkuna ya bango, mpenza ete lingomba liye lya bayongoli libebisamaki nie o ntei ya Balamani.

38 Mpe esalemaki o ngambo esusu, ete Banefi batongaki bango mpe basalisaki bango, kobandaka na eteni eleki nkuna ya bango, kina batondisaka mboka mobimba ya Banefi, mpe basenginiaka eteni eleki mingi ya basembo kina bakitaki o nse na kondima na misala mya bango mpe kokabola bopunzi bwa bango, mpe kosangana elongo na bango na bobomi mpe makelemba ma bango ma nkuku.

39 Mpe boye bazwaki bokambi mobimba bwa boyangeli, mpenza ete baniataki o nse ya makolo ma bango mpe babeteki mpe bapasolaki mpe babalolaki mpe babakolaki mikongo mya bango na babola mpe basokemi, mpe balandi basawa ba Nzambe.

40 Mpe boye tomoni ete bazalaki o bozali boko bwa nsomo, mpe bakolaki mpo ya bobebisami boko bwa libela.

41 Mpe esalemaki ete boye esukaki mobu mwa tuku motoba na mwambe mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi.