Makomi
Elamani 7


Bobikuli bwa Nefi, Mwana Mobali wa Elamani—Nzambe akaneli bato ba Nefi ete akobimela bango na nkanda ya ye, mpo ya kobebisa bango nie longola se soko bayamboli nkuna ya bango. Nzambe abeti bato ba Nefi na bokono; bayamboli mpe babaluki epai ya ye. Samuele, Molamani moko, abikuli epai ya Banefi.

Kokwaka mikapo 7 o 16 eye o kati.

Mokapo 7

Nefi abwakami o nordi mpe azongi o Zalayemila—Asambeli likolo lya linongi lya elanga ya ye mpe abiangi bato mpo ya koyambola to kokufa. Penepene na 23–21 Yambo ya Klisto.

1 Tala, sikawa esalemaki ete o mobu mwa tuku motoba na libwa mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Banefi, ete Nefi, mwana mobali wa Elamani, azongaki o mboka ya Zalayemila uta o mboka ya epai ya nordi.

2 Mpo azalaki o ntei ya bato baye bazalaki o mboka ya epai ya nordi, mpe ateyaki liloba lya Nzambe epai ya bango, mpe abikulaki makambo mingi epai ya bango;

3 Mpe babwakaki maloba manso ma ye, mpenza ete akokaki te kotikala o ntei ya bango, kasi azongaki lisusu epai ya mboka ya mbotama ya ye.

4 Mpe komonoko bato o bozali boko bwa nkuna ya lolenge loye, mpe bayongoli bana ba Gadiatoni bakamataki kiti ya bosambisi—eyibaki bango nguya mpe bokulaka bwa mboka; kotiaka mpembeni mitindo mya Nzambe, mpe na mwa moke te sembo liboso lya ye; kosalaka te boyengebene epai ya bana ba bato;

5 Kotumbolaka basembo na ntina ya bosembo bwa bango; kotikaka moto wa elindo mpe nkuna kokende na kozanga kotumbolama na ntina ya mbongo ya bango; mpe lisusu mpo ya kosimbama o ebonga o moto mwa boyangeli, mpo ya koyangela mpe kosala engebene na bolingi bwa bango, ete bakoka kozwa litomba mpe nkembo ya mokili, mpe, lisusu, ete bakoka na petepete mingi kosala ekobo, mpe koyiba, mpe koboma, mpe kosala engebene na bolingi bwa bangomei—

6 Sikawa bobe boye bonene boyaki likolo lya Banefi, o ntaka ya mibu mingi te; mpe emonoki Nefi yango, motema mwa ye movimbaki na mawa o ntei ya ntolo ya ye; mpe agangaki na mpasi ya liwa ya bozo bwa ye:

7 O, ete nakokaka kozala na mikolo mya ngai o ntango tata wa ngai Nefi ayaki libanda lya mboka ya Yelusaleme, ete nakokaka kosepela elongo na ye o mboka elakelama; nde ezalaka bato baye petepete na kozalana, sikisiki mpo ya kobatela mitindo mya Nzambe, mpe malembe mpo ya kokambema na kosala bobe; mpe bazalaki mbangu mpo ya koyokemela epai ya maloba ma Nkolo—

8 Iyo, soko mikolo mya ngai mizalaka o ntango ina, nde elingaka bozo bwa ngai kozala na bosepeli o bosembo bwa bandeko ba ngai.

9 Kasi tala, nakangemi ete iye izali mikolo mya ngai, mpe ete bozo bwa ngai bokotonda na lisuma ntina ya nkuna eye ya bandeko ba ngai.

10 Mpe tala, sikawa esalemaki ete ezalaki likolo lya linongi lyoko, liye lizalaki o elanga ya Nefi, eye ezalaki mpembeni ya nzela enene eye ekambaki o zando enene, eye ezalaki o engumba ya Zalayemila; yango wana, Nefi amingumbaki likolo lya linongi liye lizalaki o elanga ya ye, liye linongo lizalaki lisusu penepene na ekuke ya elanga mpembeni ya yango ekambi nzela enene.

11 Mpe esalemaki ete izalaki boko bato kolekaka mpembeni mpe bamonoki Nefi lokola azalaki kosopaka libanda bozo bwa ye epai ya Nzambe likolo lya linongi; mpe bakimaki mpe balobelaki bato nini bamonoko, mpe bato bayaki elongo ebele ete bakoka koyeba ntina ya matanga manene boye mpo ya nkuna ya bato.

12 Mpe sikawa, etombwanaki Nefi amonoki ebele ya bato baye basanganaka elongo.

13 Mpe esalemaki ete afungolaki monoko mwa ye mpe alobaki epai ya bango: Tala, ntina nini bomisangisi elongo? Ete nakoka kolobela bino bobe bwa bino?

14 Iyo, zambi namati likolo lya linongi lya ngai ete nakoka kosopa libanda bozo bwa ngai epai ya Nzambe wa ngai, na ntina ya mawa maluti ma motema wa ngai, maye mazali na ntina ya mabe ma bino!

15 Mpe na ntina ya matanga mpe boleli bwa ngai bomisangisi elongo, mpe bokamwi; iyo, mpe bozali na mposa enene ya kokamwa; iyo, bosengelaki kokamwa zambi botiki ete zabulu azwi nkanga enene boye likolo lya mitema mya bino.

16 Iyo, boniboni bokokaki kopesa nzela na lisenginia lya ye oyo azali kolukaka kotindika mosika bozo bwa bino o nse o bobola mpe lisuma lya libela?

17 O yambolani, yambolani! Ntina nini bolingi kokufa? Balukani, balukani epai ya Nkolo Nzambe wa bino. Ntina nini abosani bino?

18 Ezali zambi boyeisi mitema mya bino mikasi; iyo, bolingi te koyokemela epai ya mongongo mwa mokengeli molamu; iyo, botumoli ye mpo ya kosilika na bino.

19 Mpe tala, esika ya kosangisaka bino, longola se soko boyamboli, tala, akopalanganisa bino ete bokokoma misuni mpo ya mbwa mpe niama ya zamba.

20 O, boniboni ekoki bino kobosana Nzambe wa bino o mokolo mpenza moye abikisi bino?

21 Kasi tala, ezali mpo ya kozwa litomba, mpo ya kokumisama na bato, iyo, mpe ete bokoka kozwa wolo mpe mpauni. Mpe botii mitema mya bino likolo lya bozwi mpe biloko mpamba bya mokili moye, mpo ya byango bobomi, mpe bopunzi, mpe boyibi, mpe bopesi litatoli lya lokuta na moto wa penepene na bino, mpe bosali ndenge inso ya bobe.

22 Mpe mpo ya ntina eye lisuma likoya epai ya bino longola se soko boyamboli. Mpo soko bokoyambola te, tala, engumba eye enene, mpe lisusu bingumba bina binene biye bizali zingazinga mpembeni, biye bizali o mboka ya bozwi bwa biso, bikobotolomo ete bokozala na esika te na yango; mpo tala, Nkolo akopesa epai ya bino makasi te, lokola asali kina sikawa, mpo ya kopika mpende na bayini ba bino.

23 Mpo tala, boye elobi Nkolo: Nakolakisa te epai ya bato ba nkuna bokasi bwa ngai, na moko te koleka mosusu, longola se soko ezali epai ya bango baye bakoyambola na masumu ma bango, mpe koyokemela epai ya maloba ma ngai. Sikawa yango wana, nalingi ete bomono, bandeko ba ngai, ete ekozala bolamu mingi mpo ya Balamani koleka mpo ya bino longola se soko bokoyamba.

24 Mpo tala, bazali sembo koleka bino, mpo basumuki te na boyebi bonene boye bozwi; yango wana Nkolo akoyoka mawa epai ya bango; iyo, akobenda molai mikolo mya bango mpe akobakisa nkona ya bango, kutu ntango bokobebisama nie longola se soko bokoyambola.

25 Iyo, lisuma likoya epai ya bino na ntina ya bonsomo bonene boye boyei o ntei ya bino; mpe bosali binomei bomoko o kati ya lyango, iyo, na lingomba lya nkuku liye lisalemaki na Gadiatoni!

26 Iyo, lisuma likoya epai ya bino na ntina ya lolendo loye bondimaki kokotisa na mitema mya bino, loye lotomboli bino koleka eye ezali bolamu na ntina ya bozwi bonene bwa bino!

27 Iyo, lisuma likozala epai ya bino na ntina ya nkuna mpe bonsomo bwa bino!

28 Mpe longola se soko bokoyambola bokowa; iyo, kutu mboka ya bino ikokamatama uta na bino, mpe bokobebisama uta o etando ya mabele.

29 Tala sikawa, nalobi te ete makambo maye makozala, na ngaimei, zambi ezali te na ngaimei nayebi makambo maye; kasi tala, nayebi ete makambo maye mazali ma solo zambi Nkolo Nzambe asali eyebama epai ya ngai, yango wana natatoli ete makozala.