Makomi
Yakobo 1


Buku ya Yakobo
Ndeko Mobali wa Nefi

Maloba ma liteya lya ye epai ya bandeko babali ba ye. Abulunganisi moto moko oyo aluki kokweisa malongi ma Klisto. Ndambo yoko ya maloba matali mambi ma bato ba Nefi.

Mokapo 1

Yakobo mpe Yosefa baluki kondimisa bato mpo ya kondima na Klisto mpe kobatela mitindo mya ye—Nefi akufi—Nkuna eluti o ntei ya Banefi. Penepene na 544–421 Yambo ya Klisto.

1 Mpo tala, esalemaki ete mibu ntuku mitano na mitano milekaki uta o ntango Lehi atikaki Yelusaleme; yango wana, Nefi apesaki ngai, Yakobo, motindo motali palaki ike, likolo lya yango makambo maye makomami.

2 Mpe apesaki ngai, Yakobo, motindo ete nakoma likolo lya palaki iye mwa makambo maye namonoki ete mazali ma motuya koleka; ete nasimba te, longola se soko ezali moke, etali mambi ma bato baye babiangemi bato ba Nefi.

3 Mpo alobaki ete mambi ma bato ba ye makokomama likolo lya palaki ya ye isusu, mpe ete nakobomba palaki iye mpe nakokitanisa yango epai ya nkona ya ngai, uta nkola o nkola.

4 Mpe soko liteya liye lizalaki bule, to libimisi liye lizalaki linene, to bobikuli, ete nakoma mito mya yango likolo lya palaki iye, mpe ete nasimba likolo lya yango lokola mpenza ekoki, mpo ya ntina ya Klisto, mpe mpo ya ntina ya bato ba biso.

5 Mpo ya ntina ya bondimi mpe motema likolo monene, emonisamaki solo epai ya biso etali bato ba biso, makambo kani makokoma epai ya bango.

6 Mpe lisusu tozwaki mabimisi mingi, mpe molimo mwa bobikuli boike; yango wana, toyebaki Klisto mpe bokonzi bwa ye, boye bokoya.

7 Yango wana tosalaki na etingia o ntei ya bato ba biso, ete tokoka kondimisa bango mpo ya koya epai ya Klisto, mpe bakabola bolamu bwa Nzambe, ete bakoka kokota o kati ya bopemi bwa ye, mbele o nzela yoko to esusu, alapa ndai na nkele ya ye bayingela te, lokola o botumoli o mikolo mya masenginia, ntango ezalaki bana ba Yisalaele o esobe.

8 Yango wana, tolingi na Nzambe ete tokoka kondimisa bato banso kotomboka na Nzambe te, mpo ya kotumola ye na nkanda te, kasi ete bato banso balinga kondima na Klisto, mpe bamono liwa lya ye, mpe bayoka mpasi ya ekulusu ya ye mpe bakumba nsoni ya mokili; yango wana, ngai, Yakobo, nazwi likolo lya ngai kokokisa motindo mwa ndeko wa ngai Nefi.

9 Sikawa Nefi abandaki kokoma mpaka, mpe amonoki ete asengeli kokufa mosika te; yango wana, akulisaki moto moko mpo ya kozala mokonzi moko mpe mokambi moko likolo lya bato ba ye sikawa, engebene na bokonzi bwa bakonzi.

10 Lokola elingaki mpenza bato Nefi, lokola ezalaki ye mobateli monene wa bango, lokola esalelaki ye mopanga mwa Labana o bobateli bwa bango, mpe lokola esalaki ye o mikolo mya ye minso mpo ya bolamu bwa bango—

11 Yango wana, bato bazalaki na mposa mpo ya kokanga o bokundoli bwa nkombo ya ye. Mpe onso oyo asengelaki kokonza o esika ya ye abiangemaki na bato, Nefi wa babale, Nefi wa basato, mpe bongo na bongo, engebene na bokonzi bwa bakonzi; mpe boye ebiangemaki bango na bato, ata bazalaki na nkombo kani balingaki.

12 Mpe esalemaki ete Nefi akufaki.

13 Sikawa bato baye bazalaki Balamani te bazalaki Banefi; nzokande, babiangemaki Banefi, Bayakobi, Bayosefe, Bazolami, Balamani, Balemuele, mpe Bayisamaele.

14 Kasi ngai, Yakobo, uta sikawa nakokesenisa bango te na nkombo iye, kasi nakobianga bango Balamani baye bakoluka kobebisa bato ba Nefi, mpe baye bazali balingi ba Nefi nakobianga bango Banefi, to bato ba Nefi, engebene na bokonzi bwa bakonzi.

15 Mpe sikawa esalemaki ete bato ba Nefi, o nse ya bokonzi bwa mokonzi wa babale, babandaki kokolisa bokasi o mitema mya bango, mpe bamitikaki mwa moke o misala mya nkuna, bo kaka Dawidi wa kala azalaki na mposa ya basi mingi mpe bamakango, mpe lisusu Solomo, mwana wa ye.

16 Iyo, mpe babandaki lisusu koluka nzike wolo mpe mpauni, mpe babandaki komitombola mwa moke o lolendo.

17 Yango wana ngai, Yakobo, napesaki bango maloba maye lokola nalakisaki bango o tempelo, ezwaki ngai bokulaka uta na Nkolo.

18 Mpo ngai, Yakobo, mpe ndeko wa ngai Yosefe tobulisamaki banganga mpe balakisi ba bato baye, na loboko la Nefi.

19 Mpe tokumisaki mosala mwa biso epai ya Nkolo, kokamataka likolo lya biso mokumba, koyanolaka masumu ma bato likolo lya mito mya bisomei soko tolakisaki bango te liloba lya Nzambe na etingia enso; yango wana, na kosalaka na bokasi bwa biso makila ma bango makoka te kozala likolo lya bilamba bya biso; soko te makila ma bango makoya likolo lya bilamba bya biso, mpe tolingaki te kozwama na bozangi mbindo o mokolo mwa nsuka.