Makomi
Yakobo 3


Mokapo 3

Bato bapeto bazwi liloba lya elengi lya Nzambe—Boyengebene bwa Balamani boleki boye bwa Banefi—Yakobo akebisi bato likolo lya bondumba, bosoni, mpe lisumu linso. Penepene na 544–421 Yambo ya Klisto.

1 Kasi tala, ngai, Yakobo, nalingaki koloba epai ya bino baye bozali peto o motema. Talani epai ya Nzambe na sikisiki ya mayele, mpe sambelani epai ya ye o bondimi boluti, mpe akobondisa bino o matungisi ma bino, mpe akosamba likambo lya bino, mpe akotinda o nse boyengebene likolo lya baye bakoluka bobebisami bwa bino.

2 O bino banso baye bozali peto o motema, tombolani mito mya bino mpe zwani liloba lya elengi lya Nzambe, mpe salani limpati likolo lya bolingo bwa ye; mpo bokoki, soko mayele ma bino mazali sikisiki, libela.

3 Kasi, lisuma, lisuma, epai ya bino baye bozali te peto o motema, baye bozali na bosoto mokolo moye liboso lya Nzambe; mpo longola se soko boyamboli mboka elakelami botutu mpo ya ntina ya bino; mpe Balamani, baye bazali na bosoto te bo bino, ata balakelami botutu na botutu bwa nsomo, bakofiakola bino kina o bobebisami.

4 Mpe ntango eyei noki, ete longola se soko boyamboli bakozwa mboka ya lisango lya bino, mpe Nkolo Nzambe akokamba mosika basembo libanda uta o ntei ya bino.

5 Tala, Balamani bandeko ba bino, baye boyini na ntina ya bosoto bwa bango mpe botutu boye boyaki likolo lya mposo ya bango, bazali sembo mingi koleka bino; mpo babosanaki te motindo mwa Nkolo, moye mopesamaki epai ya tata wa biso—ete bakozala na mwasi bobele soko ezali moko, mpe bamakango bakozwa moko te, mpe ekosalama pite te o ntei ya bango.

6 Mpe sikawa, motindo moye bakotosa kobatela; yango wana, na ntina ya botosi boye, na kobombaka motindo moye, Nkolo Nzambe akobebisa bango te, kasi akoyoka ngolu epai ya bango; mpe mokolo moko bakokoma bato bapambolama.

7 Tala, babali ba bango balingi basi ba bango, mpe basi ba bango balingi babali ba bango; mpe babali ba bango mpe basi ba bango balingi bana ba bango; mpe bozangi bondimi bwa bango mpe boyini bwa bango ona bino bozali na ntina ya bobe bwa batata ba bango; yango wana, boniboni balamu bozali koleka bango, o miso mya Mokeli monene wa bino?

8 O bandeko babali ba ngai, nabangi ete longola se soko boyambola uta o masumu ma bino ete mposo ya bango ekozala mpembe koleka ya bino, ntango bokomememe elongo na bango liboso lya ngbende ya Nzambe.

9 Yango wana, motindo moko napesi epai ya bino, moye mozali liloba lya Nzambe, ete botiola lisusu bango te na ntina ya boindo bwa mposo ya bango; mpe bokotiola bango te na ntina ya bosoto bwa bango; kasi bokomikundola bosoto bwa binomei, mpe bokomikundola ete bosoto bwa bango boyaki na ntina ya batata ba bango.

10 Yango wana, bokomikundola bana ba bino, boniboni ete boyokisi bango mpasi o mitema na ntina ya ndakisa eye botii liboso lya bango; mpe lisusu, bokomikundola ete bokoki, na ntina ya bosoto bwa bino, komeme bana ba bino epai ya bobebisami, mpe masumu ma bango makondukana likolo lya mito mya bino o mokolo mwa nsuka.

11 O bandeko ba ngai, yokemelani epai ya maloba ma ngai; lamusani nguya ya bozo bwa bino; ningisani binomei ete bokoka kolamuka uta o mpongi ya liwa; mpe kangolani binomei uta o bolozi bwa limfelo ete bokoka te kokoma banzelu ba zabulu, mpo ya kobwakama o kati ya liziba lya moto mpe libanga lya fofolo liye lizali liwa lya ibale.

12 Mpe sikawa ngai, Yakobo, nalobaki makambo mingi koleka epai ya bato ba Nefi, kokebisaka bango likolo lya bondumba mpe bosoni, mpe lolenge na lolenge la lisumu, na kolobelaka bango malandi ma nsomo ma yango.

13 Mpe eteni yoko ya nkama ya bitamboleli bya bato baye, baye babandi kozala ebele, bikoki te kokomama likolo lya palaki iye; kasi mingi ya bitamboleli bya bango bikomami likolo lya palaki inene, mpe bitumba bya bango, mpe boweli bwa bango, mpe bokonzi bwa bakonzi ba bango.

14 Palaki iye ibiangemi palaki ya Yakobo, mpe isalemaki na loboko la Nefi. Mpe natii nsuka yoko ya kolobaka maloba maye.