Makomi
Yakobo 4


Mokapo 4

Baprofeta banso bakumbamelaki Tata o nkombo ya Klisto—Libonza lya Abalayama lya Yisaka lizalaki o boulani bwa Nzambe mpe Mobotami se Moko wa ye—Bato basengeli kozongisa boyokani bangomei elongo na Nzambe o nzela ya Botumbolami bwa Yesu—Bayuda bakobwaka libanga lya nse. Penepene na 544–421 Yambo ya Klisto.

1 Sikawa tala, esalemaki ete ngai, Yakobo, esalaki ngai nzike epai ya bato ba ngai o liloba, (mpe nakoki kokoma bobele moke ya maloba ma ngai, na ntina ya kpokoso ya kokoma maloba ma biso likolo lya palaki) mpe toyebaki ete makambo maye tokomi likolo lya palaki masengeli kotikala;

2 Kasi enso eye tokokoma likolo lya eloko enso longola se soko likolo lya palaki ekowa mpe ekolimwa nie; kasi tokoki kokoma ndambo yoko ya maloba likolo lya palaki, iye ikopesa bana ba biso, mpe lisusu bandeko balingami ba biso, motuya moko moke mwa boyebi botali biso, to botali batata ba bango—

3 Sikawa o likambo liye tokosepela; mpe tokosala na etingia mpo ya kokoma maloba maye likolo lya palaki, kolikiaka ete bandeko balingami ba biso mpe bana ba biso bakozwa mango na mitema mya botondi, mpe kotala likolo lya mango ete bakoka koyekola na bosepeli kasi na mawa te, to na litio te, etali baboti ba bango ba yambo.

4 Mpo, mpo ya mokano moye tokomaki makambo maye, ete bakoka koyeba ete toyebaki Klisto, mpe tozalaki na elikia ya nkembo ya ye mibu nkama mingi yambo ya boyei bwa ye; mpe kaka bisomei te tozalaki na elikia ya nkembo ya ye, kasi lisusu baprofeta basantu banso baye bazalaki yambo ya biso.

5 Tala, bandimaki na Klisto mpe bakumbamelaki Tata o nkombo ya ye, mpe lisusu tokumbameli tata o nkombo ya ye. Mpe mpo ya mokano moye tokobatela mobeko mwa Mose, mwango mokolakisa bozo bwa biso nzela ona ye; mpe mpo ya ntina eye esantisami epai ya biso mpo ya boyengebene, kutu bo etangelamaki epai ya Abalayama o esobe kozala na botosi epai ya mibeko mya Nzambe na kobonzaka mwana wa ye Yisaka, oyo azali boulani bwa Nzambe mpe Mwana Mobali Mobotami se Moko wa ye.

6 Yango wana, toluki baprofeta, mpe tozali na mamoni mingi mpe molimo mwa bobikuli; mpe ezali biso na matatoli maye manso tozwi elikia yoko, mpe bondimi bwa biso bokomi sikisiki, mpo ete tokoki kotinda o nkombo ya Yesu mpe nzete mpenza ekotosa biso, to ngomba, to mbonge ya mbu.

7 Nzokande, Nkolo Nzambe alakisi biso botau bwa biso ete tokoka koyeba ete ezali na boboto bwa ye, mpe na bonkonde bonene bwa ye epai ya bana ba bato, ete tozali na nguya ya kosala makambo maye.

8 Tala, enene mpe ya bokamwi ezali misala mya Nkolo. Boniboni bozindo ezali mabombamo ma ye; mpe ekoki te ete moto asosola nzela ya ye inso. Mpe moto te ayebi nzela ya ye longola se soko ebimisami epai ya ye; yango wana, bandeko, botiola mabimisi ma Nzambe te.

9 Mpo tala, na nguya ya liloba lya ye moto ayaki likolo lya etando ya mabele, maye mabele makelamaki na nguya ya liloba lya ye. Yango wana, soko ekokaki Nzambe koloba mpe mokili mosalemaki, mpe koloba mpe moto akelamaki, O nde, ntina nini akoki te kotinda mabele, to mosala mwa maboko ma ye likolo lya etando ya mango, engebene na bolingi mpe elengi ya ye?

10 Yango wana, bandeko, lukani te kopesa toli na Nkolo, kasi kozwa toli uta o loboko la ye. Mpo tala, binomei boyebi ete akopesa toli na bwania, mpe na boyengebene, mpe na ngulu enene, likolo lya misala mya ye minso.

11 Yango wana, bandeko balingami, zongisani boyokani epai ya ye na botumbolami bwa Klisto, Mwana Mobali Mobotami se Moko wa ye, mpe bokoki kozwa bosekwi, engebene na nguya ya bosekwi boye bozali na Klisto, mpe lakisamani lokola mbuma-ya-yambo ya Klisto epai ya Nzambe, kozalaka na bondimi, mpe kozwaka elikia elamu ya nkembo na ye yambo amimonisa yemei o mosuni.

12 Mpe sikawa, balingami, kamwani te ete nalobeli bino makambo maye; mpo ntina nini te kolobela botumbolami bwa Klisto, mpe kokoma o boyebi boko bobongo nie bwa ye, lokola kokoma o boyebi bwa bosekwi boko mpe mokili mokoya?

13 Tala, bandeko ba ngai, ye oyo akobikula, tika ye abikula mpo ya boyebi bwa bato; mpo Molimo akoloba bosolo mpe akokosa te. Yango wana, akoloba makambo lokola mazali mpenza, mpe makambo lokola makozala mpenza; yango wana, makambo maye mamonisami epai ya biso na polele, mpo ya lobiko la bozo bwa biso. Kasi tala, tozali te banzeneneke biso kaka o makambo maye; mpo Nzambe lokola alobaki yango epai ya baprofeta ba kala.

14 Kasi tala, Bayuda bazalaki bato ba nkanza; mpe batiolaki maloba ma polele, mpe babomaki baprofeta, mpe balukaki mpo ya makambo maye bakokaki te kososola. Yango wana, na ntina ya lolanda la bango, loye lolanda loyaki na kotalaka o ngambo esusu ya elembo, basengeli mpenza kokweya; mpo Nzambe alongolaki polele ya ye uta na bango, mpe apesaki epai ya bango makambo mingi maye bakoki te kososola, mpo balingaki yango. Zambi balingaki yango Nzambe asalaki yango, ete bakoka kotuta libaku.

15 Mpe sikawa ngai, Yakobo, nakambemi na Molimo mpo ya kobikulaka; mpo namoni na misala mya Molimo oyo azali na ngai, ete na botuti libaku bwa Bayuda bakobwaka libanga likolo lya lyango bakokaki kotonga mpe kozwa nse ya sikisiki.

16 Kasi tala, engebene na makomi, libanga liye likokoma nse bobela yoko ya solo, mpe ya nsuka mpe nse yoko ya solo, likolo lya yango Bayuda bakoki kotonga.

17 Mpe sikawa, balingami ba ngai, boniboni ekoki ete baye, ekosilisa bango kobwaka nse bobela yoko ya solo, bakoka libela kotonga likolo lya yango, ete ekoka kokoma moto mwa litumu lya bango?

18 Tala, bandeko balingami ba ngai, nakobombola mobombamo moye epai ya bino; soko nakoningana te, o nzela yoko to esusu, uta o sikisiki ya ngai na Molimo, mpe nakotuta libaku te na ntina ya bobangi boleki bwa ngai mpo ya bino.