Makomi
Yakobo 5


Mokapo 5

Yakobo atangi Zenosi etali lisese lya nzete ya elaya ya mboka mpe nzete ya elaya ya zamba—Izali boulani bwa bato ba Yisalaele mpe Bapaganu—Bopalangani mpe bosangani bwa Yisalaele bomonisami yambo bosalema—Nsango esalemi ya Banefi mpe Balamani mpe ndako mobimba ya Yisalaele—Bapaganu bakoyingisama o kati ya Yisalaele—O nsuka elanga ya vino ekozikisama. Penepene na 544–421 Yambo ya Klisto.

1 Tala, bandeko ba ngai, bomikundoli te ete botangaki maloba ma profeta Zenosi, oyo alobaki epai ya ndako ya Yisalaele, kolobaka:

2 Yokemela, O yo ndako ya Yisalaele, mpe yoka maloba ma ngai, profeta moko wa Nkolo.

3 Mpo tala, boye elobi Nkolo, nakomekisa yo, O ndako ya Yisalaele, bo nzete ya elaya ya mboka, eye moto moko akamataki mpe aleisaki o elanga ya vino ya ye; ekolaki mpe ekomaki ya kala, mpe ebandaki kobeba.

4 Mpe esalemaki ete nkolo wa elanga ya vino akendeki, mpe amonoki ete nzete ya elaya ya ye ebandaki kobeba; mpe alobaki: nakosokola yango, mpe nakotimola zingazinga na yango, mpe nakoleisa yango, ete mbele ekoka kotinda bitape bya sika mpe bya petepete, mpe ekowa te.

5 Mpe esalemaki ete asokolaki yango, mpe atimolaki zingazinga na yango, mpe aleisaki yango engebene na liloba lya ye.

6 Mpe esalemaki ete nsima ya mikolo mingi ebandaki kotinda mwa moke bitape bya sika mpe bya petepete; kasi tala, mama wa nsonge ya yango abandaki kobeba.

7 Mpe esalemaki ete nkolo wa elanga ya vino amonoki yango, mpe alobaki epai ya mosali wa ye: Esali ngai mpasi ete nabungisa nzete eye; yango wana, kende mpe buka bitape uta o nzete ya elaya ya zamba, mpe meme byango awa epai ya ngai; mpe tokopikola bamama ba bitape biye bibandi kokauka, mpe tokobwaka byango o kati ya moto ete bikoka kozika.

8 Mpe tala, elobi Nkolo wa elanga ya vino, nakolongola mingi ya bitape biye bya sika mpe bya petepete, mpe nakoyingisa byango wapi bisika nalingi; mpe ezali likambo te ete soko ekozala boye ete mosisa mwa nzete eye mokowa, nakoka kobatela mbuma ya yango epai ya ngaimei; yango wana, nakozwa bitape biye bya sika mpe bya petepete, mpe nakoyingisa byango wapi bisika nalingi.

9 Kamata bitape bya nzete ya elaya ya zamba, mpe yingisa byango o kati, o bisika bya byango; mpe byango biye napikolaki nakobwaka o kati ya moto mpe nakozikisa byango, ete biukisa te mabele ma elanga ya vino ya ngai.

10 Mpe esalemaki ete mosali wa Nkolo wa elanga ya vino asalaki engebene na liloba lya Nkolo wa elanga ya vino, mpe ayingisaki o kati, bitape bya nzete ya elaya ya zamba.

11 Mpe Nkolo wa elanga ya vino asalaki ete etimolisama zingazinga, mpe esokolama, mpe aleisama, kolobaka epai ya mosali wa ye: Esali ngai mpasi ete nabungisa nzete eye; yango wana, ete mbele nakoka kobatela misisa mya yango ete miwa te, ete nakoka kobatela yango epai ya ngaimei, nasali likambo liye.

12 Yango wana, kende o nzela ya yo; kengele nzete, mpe leisa yango, engebene na maloba ma ngai.

13 Mpe biye nakotia o eteni ya esika eleki nse ya elanga ya vino ya ngai, esika wapi nakolinga, ezali likambo te epai ya yo; mpe nakosala yango ete nakoka kobatela epai ya ngaimei bitape bya solo bya nzete; mpe lisusu, ete nakoka kotanda likolo mbuma mpo ya eleko, epai ya ngaimei; mpo esali ngai mpasi ete nabungisa nzete eye mpe mbuma ya yango.

14 Mpe esalemaki ete Nkolo wa elanga ya vino akendeki o nzela ya ye, mpe abombaki bitape mpenza bya nzete ya elaya ya mboka o eteni ya esika eleki nse ya elanga ya vino ya ngai, ndambo o yoko ndambo o esusu, engebene na bolingi mpe elengi ya ye.

15 Mpe esalemaki ete ntango elai elekaki, mpe Nkolo wa elanga ya vino alobaki epai ya mosali wa ye: Yaka, tokita o kati ya elanga ya vino, ete tokoka kosala o elanga ya vino.

16 Mpe esalemaki ete Nkolo wa elanga ya vino, mpe lisusu mosali, bakitaki o kati ya elanga ya vino mpo ya kosala. Mpe esalemaki ete mosali alobaki epai nkolo wa ye: Tala, mono awa; tala nzete.

17 Mpe esalemaki ete Nkolo wa elanga ya vino atalaki mpe amonoki nzete o yango bitape bya nzete ya elaya ya zamba biyingisamaki; mpe etindaki mpe ebandi kobota mbuma. Mpe amonoki ete ezalaki elamu; mpe mbuma ya yango ezalaki bo mbuma ya yambo mpenza.

18 Mpe alobaki epai ya mosali wa ye: Tala, bitape bya nzete ya zamba bizwaki makiki ma mosisa mwa yango, ete mosisa mwa yango mokumbi makasi maike; mpe na ntina ya makasi maike ma mosisa mwa yango bitape bya zamba bibotaki mbuma ya elanga. Sikawa, soko toyingisaka te o bitape biye, nzete ya yango elingaki kowa. Mpe sikawa, tala, nakotanda likolo mbuma nzike, iye nzete ya yango ebotaki; mpe mbuma ya yango nakotanda likolo mpo ya eleko, epai ya ngaimei.

19 Mpe esalemaki ete Nkolo wa elanga ya vino alobaki epai ya mosali: Yaka, tika tokende o eteni ya esika eleki nse ya elanga ya vino, mpe totala soko bitape mpenza bya nzete bibotaki te mbuma nzike lokola, ete nakoka kotanda likolo mbuma ya yango mpo ya eleko, epai ya ngaimei.

20 Mpe esalemaki ete bakendeki wapi nkolo abombaki bitape mpenza bya nzete, mpe alobaki epai ya mosali: Tala iye; mpe amonoki ya yambo eye ebotaki mbuma nzike; mpe amonoki lisusu ete ezalaki elamu. Mpe alobaki epai ya mosali: Kamata mbuma ya yango, mpe tanda yango likolo mpo ya eleko, ete nakoka kabatela yango epai ya ngaimei; mpo tala, elobi ye, ntango elai eye naleisaki yango, mpe eboti mbuma nzike.

21 Mpe esalemaki ete mosali alobaki epai ya nkolo wa ye: Boniboni oyei kokona awa nzete eye, to etape ya nzete eye ? Mpo tala, ezalaki esika ebe mingi koleka o mabele manso ma elanga ya vino ya yo.

22 Mpe Nkolo wa elanga ya vino alobaki epai ya ye: Pesa ngai toli te; nayebaki ete ezalaki esika yoko ebe ya mabele; yango wana, nalobaki epai ya yo, naleisaki yango ntango elai eye, mpe omoni ete eboti mbuma nzike.

23 Mpe esalemaki ete Nkolo wa elanga ya vino alobaki epai ya mosali wa ye: Tala awa; tala nakonaki etape esusu ya nzete lokola; mpe oyebi ete esika eye ya mabele ezalaki ebe koleka eye ya yambo. Kasi, tala nzete. Naleisi yango ntango elai eye, mpe eboti mbuma nzike; yango wana, sangisa yango, mpe tanda yango likolo mpo ya eloko, ete nakoka kobatela yango epai ya ngaimei.

24 Mpe esalemaki ete Nkolo wa elanga ya vino alobaki lisusu epai ya mosali wa ye: Tala awa, mpe tala etape esusu lokola, eye nakonaki; tala ete naleisaki yango lokola, mpe eboti mbuma nzike.

25 Mpe alobaki epai ya mosali: Tala awa mpe omono ya nsuka. Tala, eye nakonaki o esika yoko ya mabele malamu; mpe naleisaki yango ntango elai eye, mpe bobele esika yoko ya nzete eboti mbuma ya elanga, mpe esika esusu ya nzete eboti mbuma ya zamba; tala, naleisaki nzete eye bo isusu.

26 Mpe esalemaki ete Nkolo wa elanga ya vino alobaki epai ya mosali: Pikola bitape biye biboti te mbuma elamu, mpe bwaka byango o kati ya moto.

27 Kasi tala, mosali alobaki epai ya ye: Tika tosokola yango, mpe totimola zingazinga na yango, mpe toleisa yango na ntango mwa elai mingi, ete mbele ekoka kobota mbuma elamu epai ya yo, ete okoka kotanda yango likolo mpo ya eleko.

28 Mpe esalemaki ete Nkolo wa elanga ya vino mpe mosali wa Nkolo ya elanga ya vino baleisaki mbuma enso ya elanga ya vino.

29 Mpe esalemaki ete ntango elai elekaka, mpe Nkolo wa elanga ya vino alobaki epai ya mosali wa ye: Yaka, tika tokita o kati ya elanga ya vino, ete tokoka kosala lisusu o elanga ya vino. Mpo tala, ntango ekomi penepene, mpe nsuka noki eyei; yango wana, nasengeli kotanda mbuma mpo ya eloko, epai ya ngaimei.

30 Mpe esalemaki ete Nkolo wa elanga ya vino mpe mosali bakitaki o kati ya elanga ya vino; mpe bakomaki o nzete ya yango bitape mpenza bibukamaki, mpe bitape bya nzete ya zamba biyingisamaki o kati; mpe tala ndenge inso ya mbuma iukisaki nzete.

31 Mpe esalemaki ete Nkolo wa elanga ya vino amekaki mbuma, lolenge na lolenge engebene na motango mwa yango. Mpe Nkolo wa elanga ya vino alobaki: Tala, ntango elai eye toleisaki nzete eye, mpe natandaki likolo epai ya ngaimei mpo ya eleko mbuma nzike.

32 Kasi tala, mbala eye eboti mbuma nzike, mpe yoko te ya yango ezali elamu. Mpe tala, ezali lolenge na lolenge ya mbuma ebe; mpe epesi ngai litomba te, ata mosala monso mwa biso; mpe sikawa epesi ngai mpasi ete nabungisa nzete eye.

33 Mpe Nkolo wa elanga ya vino alobaki epai ya mosali: Nini tokosala epai ya nzete, ete nakoka kobatela lisusu mbuma elamu ya yango epai ya ngaimei?

34 Mpe mosali alobaki epai ya nkolo wa ye: Tala, zambi oyingisaki o kati, bitape bya nzete ya elaya ya zamba bileisaki misisa, ete mizali na bomoi mpe miwei te; yango wana omoni ete mizali naino milamu.

35 Mpe esalemaki ete Nkolo wa elanga ya vino alobaki epai ya mosali wa ye: Nzete epesi ngai litomba te, mpe misisa mya yango mipesi ngai litomba te boye ntango elai lokola ekobota mbuma ebe.

36 Nzokande, nayebi ete misisa mizali milamu, mpe mpo ya mwango mwa ngaimei nabatelaki myango; mpe na ntina ya makasi maike ma myango kina sikawa miboti, uta o bitape bya nzete ya zamba, mbuma elamu.

37 Kasi tala, bitape bya zamba bikolaki mpe bimatelaki misisa mya yango; mpe na ntina ete bitape bya zamba bilongaki misisa mya yango bibotaki mbuma ebe nzike; mpe na ntina ete bibotaki mbuma ebe nzike omoni ete ebandi kowa; mpe ekotela noki, ete bikoka kobwakama o kati ya moto, longola se soko tokosala eloko yoko mpo ya kobatela yango.

38 Mpe esalemaki ete Nkolo wa elanga ya vino alobaki epai ya mosali wa ye: Tika tokita o kati ya eteni ya esika eleki nse ya elanga ya vino, mpe totala soko bitape mpenza biboti lokola mbuma ebe.

39 Mpe esalemaki ete bakitaki o kati ya eteni ya esika eleki nse ya elanga ya vino. Mpe esalemaki ete bamonoki ete mbuma ya bitape bya solo ekomaki ebeba lokola; iyo, ya yambo mpe ya ibale mpe lisusu ya nsuka, ikomaki inso ipola.

40 Mpe mbuma ya zamba ya eye ya nsuka elongaki eteni ena ya nzete eye ebotaki mbuma elamu, kutu ete etape ekaukaki nie mpe ekufaki.

41 Mpe esalemaki ete Nkolo wa elanga ya vino alelaki, mpe alobaki epai ya mosali: Nini nakokaki kosala lisusu mpo ya elanga ya vino ya ngai?

42 Tala, nayebaki ete mbuma inso ya elanga ya vino, longola se iye, ikomaki ibeba. Mpe sikawa iye, iye ibotaki mbala yoko mbuma elamu ikomi lisusu ibeba; mpe sikawa nzete inso ya elanga ya vino ya ngai izali ilamu te mpo ya eloko longola se soko esengeli kokatama o nse mpe kobwakama o kati ya moto.

43 Mpe tala eye ya nsuka, ya yango etape ekaukaki nie, nakonaki yango o esika elamu ya mabele; iyo, kutu eye ezalaki eponama epai ya ngai likolo lya biteni binso bisusu bya mboka ya elanga ya vino ya ngai.

44 Mpe omonoki ete nakati lisusu eye eulisaki esika eye ya mabele, ete nakoka kokona nzete eye o esika ya yango.

45 Mpe omonoki ete eteni ya yango ebotaki mbuma elamu, mpe eteni ya yango ebotaki mbuma ya zamba; mpe zambi napikolaki bitape bya yango te mpe babwakaki yango o kati ya moto te, tala, elongaki etape elamu ete ekaukaki nie.

46 Mpe sikawa, tala, ata bokebi bonso boye nasalaki mpo ya elanga ya vino ya ngai, nzete ya yango ekomi ebeba, ete eboti mbuma elamu te; mpe iye nazalaki na elikia ya kobatela, mpo ya kotanda likolo mbuma ya yango mpo ya eloko, epai ya ngaimei. Kasi, tala, ekomi nzete ya elaya ya zamba, mpe ezali elongobani te kasi mpo ya kokatama o nse mpe kobwakama o kati ya moto; mpe ezali kopesa ngai mpasi ete nabungisa yango.

47 Kasi nini nakokaki kosala lisusu o kati ya elanga ya vino ya ngai? Elembisaki ngai loboko la ngai, ete naleisaki yango te? Te, naleisaki yango, mpe natimolaki zingazinga na yango, mpe nasokolaki yango, mpe natiaki malalelo na yango; mpe natandolaki loboko la ngai penepene na bolai bwa mokolo mobimba, mpe nsuka ekomi penepene. Mpe ekopesa ngai mpasi ete nakata nzete inso ya elanga ya vino ya ngai, mpe nabwaka yango o kati ya moto ete ezikisama. Nani oyo abebisaki elanga ya vino ya ngai?

48 Mpe esalemaki ete mosali alobaki epai ya nkolo wa ye: Ezali te lofundo la elanga ya vino ya yo—elongaki te bitape bya yango misisa miye mizali milamu? Mpe zambi bitape bilongaki misisa mya yango, tala bikolaki mbangu mingi koleka makasi ma misisa, kokamataka makasi mpo ya yangomei. Tala, nalobi, ezali eye ntina te ete nzete ya elanga ya vino ya yo ekomi ebeba?

49 Mpe esalemaki ete Nkolo ya elanga ya vino alobaki epai ya mosali: Tika tokende mpe tokata nzete ya elanga ya vino mpe tobwaka yango o kati ya moto, ete eukisa mabele ma elanga ya vino ya ngai te, mpo nasali inso. Nini nakokaki kosala lisusu mpo ya elanga ya vino ya ngai?

50 Kasi, tala, mosali alobaki epai ya nkolo wa elanga ya vino: Bikisa yango mwa ntango elai.

51 Mpe Nkolo alobaki: iyo, nakobikisa yango mwa ntango elai, mpo ekosala ngai mpasi ete nabungisa nzete ya elanga ya vino ya ngai.

52 Yango wana, tika tokamata bitape bya iye nakonaki o eteni ya esika eleki nse ya elanga ya vino ya ngai, mpe tika toyingisa yango o kati ya nzete uta wapi biyei; mpe tika topikola uta o nzete bitape bina ya yango mbuma eleki bololo, mpe toyingisa o bitape bya solo bya nzete o esika ya yango.

53 Mpe eye nakosala ete nzete ekoka kowa te, ete, mbele, nakoka kobatela epai ya ngaimei misisa mya yango mpo ya mwango mwa ngaimei.

54 Mpe, tala, misisa mya bitape bya solo bya nzete eye nakonaki wapi nalingaki mizali naino na bomoi; yango wana, ete nakoka kobatela yango lisusu mpo ya mwango mwa ngaimei, nakokamata bitape bya nzete eye, mpe nakoyingisa byango o kati epai ya byango. Iyo, nakoyingisa o kati epai ya byango bitape bya nzete mama wa byango, ete nakoka kobatela misisa lokola epai ya ngaimei, ete ekokoma byango mpenza bikasi bikoki mbele bikoka kobota mbuma elamu epai ya ngai, mpe nakoka naino kozala na nkembo o mbuma ya elanga ya vino ya ngai.

55 Mpe esalemaki ete bakamataki uta o nzete ya solo eye ekomaki ya zamba, mpe bayingisaki o kati epai ya nzete ya solo, eye ekomaki lisusu ya zamba lokola.

56 Mpe bazwaki lisusu nzete mpenza eye ekomaki lokola ya zamba, mpe bayingisaki yango o kati ya nzete mama wa byango.

57 Mpe Nkolo wa elanga ya vino alobaki epai ya mosali: Pikola te bitape bya zamba uta o nzete, longola se yango eye ezali bololo mingi koleka; mpe o yango okoyingisa engebene na eye nalobaki.

58 Mpe tokoleisa lisusu nzete ya elanga ya vino, mpe tokopetola bitape bya yango; mpe tokopikola uta o nzete bitape byango bikomeli, biye bisengeli biwa, mpe tokobwaka byango o kati ya moto.

59 Mpe eye nakosala ete, mbele, misisa mya yango mikoka kokamata makasi na ntina ya bolamu bwa byango; mpe na ntina ya bobongoli bwa bitape, ete bilamu bikoka kolonga bibe.

60 Mpe na ntina ete nabatelaki bitape bya solo mpe misisa mya byango, mpe ete nayingisaki o bitape bya solo lisusu o kati ya nzete mama wa byango, mpe nabatelaki misisa mya nzete mama wa byango, ete, mbele, nzete ya elanga ya vino ya ngai ekoka kobota lisusu mbuma elamu; mpe ete nakoka kozala na bosepeli lisusu o mbuma ya elanga ya vino ya ngai, mpe, mbele, ete nakoka, kosepela mpenza ete nabatelaki misisa mpe bitape bya mbuma ya yambo—

61 Yango wana, kende, mpe bianga basali, ete tokoka kosala na etingia na bokasi bwa biso o elanga ya vino, ete tokoka kolengele nzela, ete nakoka kobimisa lisusu mbuma ya yambo mpenza, eye mbuma ya yambo mpenza ezali elamu mpe ya motuya mingi koleka mbuma inso isusu.

62 Yango wana, tika tokende mpe tosala na bokasi bwa biso mbala eye ya nsuka, mpo tala nsuka ekomi penepene, mpe eye ezali mpo ya mbala ya nsuka eye nakosukola elanga ya vino ya ngai.

63 Yingisa o bitape; banda na biye bya nsuka ete bizala bya yambo, mpe ete biye bya yambo bizala bya nsuka, mpe timola zingazinga na nzete, ya mobange mpe ya elenge, ya yambo mpe ya nsuka; mpe ya nsuka mpe ya yambo, ete inso ikoka koleisama mbala yoko lisusu mpo ya mbala ya nsuka.

64 Yango wana, timola zingazinga na yango, mpe sukola yango, mpe tia malalelo o yango mbala yoko lisusu, mpo ya mbala ya nsuka, mpo nsuka ekomi penepene. Mpe soko ezali boye ete nzete eye ekoli, mpe eboti mbuma ya yambo mpenza, nde bokolengele nzela mpo ya yango, ete ikoka kokola.

65 Mpe lokola ikobanda kokola bokopetola nie bitape biye bikobimisa mbuma ya bololo, engebene na makasi ma biye bilamu mpe bolai bwa byango; mpe bokopetola nie te biye bibe na mbala yoko, mbele misisa mya yango mizala mikasi mingi mpo ya ekango, mpe ekango ya byango ekowa, mpe nabungisa nzete ya elanga ya vino ya ngai.

66 Mpo ezali kopesa ngai mpasi ete nabungisa nzete ya elanga ya vino ya ngai; yango wana okopetola biye bibe engebene lokola biye bilamu bikokola, ete mosisa mpe nsonge ikoka kozala ikokani o makasi, kina biye bilamu bilonga biye bibe, mpe biye bibe bikokatama o nse mpe bikobwakama mosika o kati ya moto, ete biukisa te mabele ma elanga ya vino ya ngai; mpe boye nakokombo mosika biye bibe libanda lya elanga ya vino ya ngai.

67 Mpe bitape bya nzete ya solo ekoyingisa ngai lisusu o kati ya nzete ya solo;

68 Mpe bitape bya nzete ya solo nakoyingisa o kati ya bitape bya solo bya nzete; mpe boye nakomeme yango elongo lisusu, ete ikobimisa mbuma ya yambo mpenza, mpe ikozala yoko.

69 Mpe biye bibe bikobwakama mosika, iyo, kutu libanda lya mboka enso ya elanga ya vino ya ngai; mpo tala, kaka mbala yoko eye nakosukola elanga ya vino ya ngai.

70 Mpe esalemaki ete Nkolo wa elanga ya vino atindaki mosali wa ye; mpe mosali akendeki mpe asalaki lokola Nkolo atindaka ye, mpe amemeki basali basusu; mpe bazalaki mingi te.

71 Mpe Nkolo wa elanga ya vino alobaki epai ya bango: Kendeni, mpe salani o elanga ya vino, na bokasi bwa bino. Mpo tala, eye ezali mbala ya nsuka eye nakoleisa elanga ya vino ya ngai; mpo nsuka ezali mpembeni mosika te, mpe eleko ekoya noki; mpe soko bosali na bokasi bwa bino elongo na ngai bokozala na bosepeli o mbuma eye nakotanda likolo epai ya ngaimei mpo ya eleko eye mosika te ekoya.

72 Mpe esalemaki ete basali bakendeki mpe basalaki na bokasi bwa bango; mpe Nkolo wa elanga ya vino asalaki elongo na bango lokola; mpe batosaki mitindo mya Nkolo wa elanga ya vino o makambo manso.

73 Mpe ebandaki kozala mbuma ya yambo mpenza lisusu o elanga ya vino; mpe bitape mpenza bibandaki kokola mpe kobota mpenza; mpe bitape bya zamba bibandaki kopikolama mpe kobwakama mosika; mpe babatelaki misisa mpe nsonge ya yango na bokokani, engebene na makasi ma yango.

74 Mpe boye basalaki, na etingia enso, engebene na mitindo mya Nkolo wa elanga ya vino, kutu kina biye bibe bibwakamaki mosika libanda lya elanga ya vino, mpe Nkolo abatelaki epai ya yemei ete nzete ekomaki lisusu na mbuma ya yambo mpenza; mpe ikomaki bo nzoto yoko; mpe mbuma ekomaki ekokana; mpe Nkolo wa elanga ya vino abatelaki epai ya yemei mbuma ya yambo mpenza, eye ezalaki ya motuya epai ya ye uta o ebandeli.

75 Mpe esalemaki ete emonoki Nkolo wa elanga ya vino ete mbuma ya ye ezalaki elamu, mpe ete elanga ya vino ya ye ezalaki lisusu ebeba te, abiangaki basali ba ye, mpe alobaki epai ya bango: Tala, mpo ya mbala ya nsuka eye toleisaki elanga ya vino ya ngai; mpe bomoni ete nasalaki engebene na bolingi bwa ngai; mpe nabatelaki mbuma ya yambo mpenza, ete ezali elamu, kutu bo lokola ezalaki o ebandeli. Mpe bopambolami; mpo zambi bozalaki na etingia na kosalaka elongo na ngai na elanga ya vino ya ngai, mpe botosaki mitindo mya ngai, mpe bobimisi epai ya ngai lisusu mbuma ya yambo mpenza, ete elanga ya vino ya ngai ezali lisusu ebeba te, mpe eye ebe ebwakami mosika, tala bokozala na bosepeli elongo na ngai na ntina ya mbuma ya elanga ya vino ya ngai.

76 Mpo tala, mpo ya ntango yoko elai nakotanda likolo mbuma ya elanga ya vino ya ngai epai ya ngaimei mpo ya eleko, eye ekoya noki; mpe mpo ya mbala ya nsuka naleisaki elanga ya vino ya ngai, mpe nasukolaki yango, mpe natimolaki zingazinga na yango, mpe natiaki malalelo na yango; yango wana nakotanda likolo epai ya ngaimei mbuma, mpo ya ntango elai, engebene na eye nalobaki.

77 Mpe ekokoka ntango eye mbuma ebe ekoya lisusu o elanga ya vino ya ngai, nde nakosala eye elamu mpe eye ebe esangisama; mpe eye elamu nakobatela epai ya ngaimei, mpe nakobwaka mosika eye ebe o kati ya esika ya yangomei. Mpe nde ekoya eleko mpe nsuka; mpe elanga ya vino ya ngai nakosala mpo ya kotumbama na moto.