Makomi
Yalomi 1


Buku ya Yalomi

Mokapo 1

Banefi babateli mobeko mwa Mose, bataleli o boso boyei bwa Klisto, mpe bazwi bomengo o mboka—Baprofeta mingi basali mpo ya kobatela bato o nzela ya bosolo. Penepene na 399–361 Yambo na Klisto.

1 Sikawa tala, ngai, Yalomi, nakomi ndambo yoko ya maloba engebene na motindo mwa tata wa ngai, Enosa, ete bonkoko bwa biso bobombama.

2 Mpe lokola palaki iye izali ike, mpe lokola makambo maye makomami mpo ya mokano mwa litomba lya bandeko ba biso Balamani, yango wana, esengeli mpenza ezala ete nakoma mwa moke; kasi nakokoma te makambo ma bobikuli bwa ngai, to bwa mabimisi ma ngai. Mpo nini nakokaki kokoma koleka batata ba ngai bakomaki? Mpo ebimisaki bango te mwango mwa lobiko? Nalobi epai ya bino, Iyo; mpe eye ekoki mpo ya ngai.

3 Tala, elongobani ete nzike esalema o ntei ya bato, na ntina ya bokasi bwa mitema mya bango, mpe na bokufi bwa matoyi ma bango, mpe lolanda la mayele ma bango, mpe nkanza ya nkingo ya bango; nzokande, Nzambe azali na ngolu mpenza epai ya bango, mpe akombi bango naino te mosika uta o etando ya mboka.

4 Mpe ezali mingi o ntei ya biso baye bazali na mabimisi mingi, mpo bazali na nkanza te bango banso. Mpe mingi lokola bazali na nkanza te mpe bazali na bondimi, bazali na lisanga elongo na Molimo Mosantu, oyo akomimonisa epai ya bana ba bato, engebene na bondimi bwa bango.

5 Mpe sikawa, tala, mibu nkama mibale milekaki, mpe bato ba Nefi bakolaki o makasi o mboka. Batosaki kobatela mobeko mwa Mose mpe saba esantu epai ya Nkolo. Mpe basantolaki te; mpe batukaki te. Mpe mibeko mya mboka mizalaki sikisiki mpenza.

6 Mpe bapalanganisamaki likolo lya etando ya mboka, mpe Balamani lokola. Mpe bazalaki motango mpenza koleka ezalaki baye ba Banefi; mpe balingaki koboma mpe balingaki komele makila ma niama.

7 Mpe esalemaki ete bayaki mbala mingi likolo lya biso, Banefi, mpo ya kobunda. Kasi bakonzi ba biso mpe bakambi ba biso bazalaki bato ba bokasi o bondimi bwa Nkolo; mpe balakisaki bato nzela ya Nkolo; yango wana, topikaki mpende na Balamani mpe tobenganaki bango mosika libanda lya mboka ya biso, mpe tobandaki kolendisa bingumba bya biso, to esika enso ya lisango lya biso.

8 Mpe toyikanaki mpenza, mpe topanzanaki likolo lya etando ya mboka, mpe tokomaki bazwi mpenza ya wolo, mpe ya mpauni, mpe ya biloko bya motuya, mpe ya bikelamo bya malonga bya mabaya, mpe ya ndako, mpe ya masini, mpe lisusu ya bibende mpe mbengi, mpe motako mpe ebende ekasi, kosalaka ndenge inso ya bisalele bya lolenge na lolenge mpo ya kosala bilanga, mpe mandoki ma bitumba—iyo, makonga na nsonge epotu, mpe likoba, mpe etengu, mpe mosuki, mpe bolengeli bonso bwa etumba.

9 Mpe boye elengelemeki biso mpo ya kokutana na Balamani, bazwaki elonga likolo lya biso te. Kasi liloba lya Nkolo lilakisamaki solo, liye alobaki epai ya batata ba biso, kolobaka ete: Mbala nzike lokola ekobomba bino mitindo mya ngai bokozwa bomengo o mboka.

10 Mpe esalemaki ete baprofeta ba Nkolo babandaki kokebisa bato ba Nefi, engebene na liloba lya Nzambe, ete soko babatelaki te mitindo, kasi bakweyaki o kati ya bobuki mobeko, bakobebisama mosika ya etando ya mboka.

11 Yango wana, baprofeta, mpe banganga, mpe balakisi, basalaki na etingia kolendisaka na bompikiliki bato mpo ya etingia; kolakisaka mobeko mwa Mose, mpe mokano mpo ya mwango mopesamaki; kondimisaka bango mpo ya kotalela o boso epai ya Masiya, mpe kondima na ye oyo akoya lokola soko azalaki kala. Mpe nsima ya lolenge loye bateyaki bango.

12 Mpe esalemaki ete na kosalaka boye babatelaki bango uta o kobebisama likolo lya etando ya mboka; mpo batubaki mitema mya bango na liloba, mbala inso kolamusaka bango epai ya boyamboli.

13 Mpe esalemaki ete mibu nkama mibale na ntuku misato na mwambe milekaki—nsima ya lolenge la bitumba, mpe boweli, mpe bokabwani, mpo ya ntaka ya ntango nzike.

14 Mpe ngai, Yalomi, nakokoma lisusu te, mpo palaki izali ike. Kasi tala, bandeko ba ngai, bokoki kotala o palaki isusu ya Nefi; mpo tala, likolo lya yango makundoli ma bitumba bya biso ikomami, engebene na nkoma ya bakonzi, to iye basalaki ikomama.

15 Mpe napesi palaki iye o kati ya maboko ma mwana mobali wa ngai Omini, ete makoka kobatelama engebene na mitindo mya batata ba ngai.